Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elambo ya ekaniseli

Elambo ya ekaniseli

Mokapo 114

Elambo ya ekaniseli

NSIMA na kosukola makolo ya bantóma na ye, Yesu atangi mokapo ya Nzembo 41:10, ete: “Ye oyo alei na mesa na ngai atombweli ngai litindi na ye.” Aoki mpasi mingi, mpe alimboli ete: “Moko na bino akokaba ngai.”

Bayekoli batungisami mingi mpenza, mpe mokomoko atuni Yesu ete: “Ezali ngai?” Ata Yuda Iskariote mpe atuni ye motuna yango. Yoane, oyo azalaki na mesa penepene na Yesu, abongwani na ntolo na Yesu mpe atunaki ye ete: “Nkolo, ezali nani?”

Yesu ayanoli ete: “Ezali moko na bazomi na mibale, oyo azali kotya misapi na ye kati na saani esika moko na ngai. Ya solo, Mwana na moto akokenda lokola ekomami mpo na ye, kasi mawa na moto oyo akokaba Mwana na moto! Elekaki malamu mpo na moto yango soko abotamaki te.” Nsima na yango, Satana akɔtaki lisusu epai na Yuda, mpamba te libaku lipesamelaki ye lokola motema na Yuda ekómaki mabe. Na nsima, na mpokwa wana, Yesu akobyanga Yuda na sembo nyonso ete, “mwana na libebi.”

Sikawa alobi na Yuda ete: “Yango ekosala yo, sala yango nokinoki.” Moko te kati na bantóma na ye mosusu akangi ntina ya maloba wana. Bamoko bakanisi ete, lokola Yuda abateli ebómbelo na mosolo, Yesu ayebisi ye ete: “Somba yango esengeli na biso mpo na elambo,” to asengeli kokende kopesa mwa eloko epai na babólá.

Nsima wana Yuda abimaki, Yesu abandisi elambo, to ekaniseli, yango ezali mpenza likambo ya sika. Azwi limpa, atɔndi yango, abuki mpe apesi bango, ye ete: “Bokamata, bolya.” Mpe alimboli ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai, ekopesama mpo na bino. Sala boye mpo na ekaniseli na ngai.”

Wana bango nyonso balyaki limpa, Yesu akamati kopo ya vinyo, na ntembe te ezali kopo ya minei na elambo wana ya Pasiká; atɔndi yango, apesi bango mpe asengi bango bamela, ete: “Kopo oyo elakisi kondimana na sika na makila na ngai, masengeli kosopana mpo na bino.”

Na bongo, abandisi ekaniseli ya liwa na ye. Mbula na mbula, na mokolo ya 14 Nisan, likambo yango lisengeli kozongelama, lokola Yesu alobi yango, mpo na ekaniseli na ye. Yango ekokundwela baoyo bazali kokumisa yango, makambo oyo Yesu mpe Tata na ye ya likoló basili kosala mpo na kosikola bato na etumbu ya liwa. Mpo na Bayuda bakokóma bayekoli na Klisto, elambo yango ekokitana Pasiká.

Kondimana na Sika, oyo ezwi motuya na yango na nzela na makila na Yesu maye masopamaki, ekitani Kondimana na kala, oyo na Mibeko. Yesu azali moyokanisi na kondimana yango oyo esalami kati na biteni mibale—ngambo moko, Jéhovah Nzambe, mpe ngambo mosusu, ba 144 000 baklisto bapakolami na elimo. Longola likoki ya kolimbisa masumu, kondimana yango ezali kopesa nzela ete libota ya bakonzi mpe banganga na likoló ekoka kosalema. Matai 26:21-29; Malako 14:18-25; Luka 22:19-23; Yoane 13:18-30; 17:12; 1 Bakolinti 5:7.

▪ Yesu atangaki esakweli nini na Biblia na ntina etali moninga na ye ya mosala, mpe lolenge nini alimboli yango?

▪ Mpo na nini bantóma batungisami mingi, mpe mokomoko azali kotuna nini?

▪ Yesu alobi na Yuda ete asala nini, kasi lolenge nini bamosusu balimboli maloba yango?

▪ Elambo nini Yesu abandisi nsima wana Yuda abimi, mpe asali yango na mokano nini?

▪ Biteni nini mibale biyokanisami na kondimana na sika? Mpe epesi nzela na kokokisa likambo nini?