Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elikya ya lisekwa

Elikya ya lisekwa

Mokapo 90

Elikya ya lisekwa

NSUKA na yango, Yesu akomi pene na Betania, mboka oyo ezwami pene na bakilometele misato na Yelusaleme. Eleki bobele mwa mikolo moke uta Lazare akufi mpe akundami. Malata mpe Marie, bandeko basi ya mowei, bazali naino kolela mpe bato mingi bayei epai na bango mpo na kobondisa bango.

Wana basi yango mibale bazali kolela ndeko mobali na bango, moto moko ayebisi Malata ete Yesu azali koya. Emonani ete akei koyamba ye na lombango nyonso, kozanga koyebisa ndeko na ye ya mwasi. Wana abelemi na Yesu, Malata alobi na ye likambo oyo ye mpe Marie balobaki yango na boumeli ya mikolo minei oyo misili koleka: “Soko ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufi te!”

Atako bongo, maloba ya Malata mamonisi elikya na ye ete Yesu akoki lisusu kosala mwa likambo mpo na ndeko na ye ya mobali. Alobi ete: “Nayebi ete likambo nini likolomba yo na Nzambe akopesa yo yango.”

Yesu alaki ye ete: “Ndeko na yo akosekwa.”

Kokanisaka ete Yesu azali koloba mpo na lisekwa ya mabele na mikolo mizali koya, lisekwa oyo Abrahame mpe basaleli mosusu na Nzambe bazalaki kozela, Malata ayanoli ete: “Nayebi ete akosekwa na mokolo na nsuka.”

Kasi, kati na eyano na ye, Yesu apesi elikya ya kobondisama noki. Alobi mpo na yango ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.” Akundoli Malata ete Jéhovah asili kopesa ye nguya likolo na kufa: “Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika; mpe moto na moto oyo azali na bomoi mpe andimi ngai libela, akokufa te.”

Yesu alobi te epai na Malata ete basembwi oyo bazali na bomoi na ntango na ye bakokufa te. Likambo oyo alingi komonisa ezali ete, moto oyo akondima ye akoki kozwa bomoi na seko. Bato mingi oyo bakozwa bomoi ya seko bakozala bato oyo bakosekwisama na mokolo ya nsuka. Kasi, basembwi mosusu bakobika na mabele na nsuka na ebongiseli ya biloko na ntango oyo; epai na bango nde maloba oyo na Yesu makokokana na lolenge ya polele mpenza. Bakokufa te! Nsima na maloba wana na kosimba motema, Yesu atuni Malata ete: “Ondimi yango?”

Ayanoli ete: “Ee, Nkolo nandimi ete yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe oyo azali koya na mokili.”

Mpe Malata azongi mbango kobenga ndeko na ye ya mwasi. Alobi na ye na nkuku ete: “Moteyi azali awa mpe azali kobyanga yo.” Nokinoki Marie abimi na ndako. Ntango bato mosusu bamoni ye kokende, balandi ye, bakanisi ete akei na nkunda.

Ebelemi ye pene na Yesu, Marie akwei na makolo na ye na kolela, mpe alobi na ye ete: “Nkolo, soko ozalaki awa mbele ndeko na ngai akufi te!” Yesu ayoki mawa na motema wana emonaki ye Marie kolela mpe ebele na bato oyo bazali kolanda ye na kolela. Atuni ete, “Botii ye wapi?”

Bayanoli ete: “Yaka kotala, Nkolo.”

Yesu mpe atangisi mpisoli, mpe Bayuda balobi ete: “Tala lokola alingaki ye!”

Bamosusu bamikundoli ete mwa basanza liboso, na ntango ya elambo na Mingombo, Yesu abikisaki elenge mobali moko akufa miso banda kobotama na ye, nde bamituni ete: “Moto oyo afungolaki miso na mokufi-miso, akokaki kosala eloko te ete ye oyo akufa te?” Yoane 5:21; 6:40; 9:1-7; 11:17-37.

Ntango nini Yesu akomi na Betania, mpe likambo nini lizali kosalema kuna?

▪ Nini epesi nzela na Malata ete andima lisekwa?

▪ Liwa na Lazare epesi Yesu mawa kino asalaki likambo nini?