Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Epai na Anne, mpe epai na Kayife

Epai na Anne, mpe epai na Kayife

Mokapo 119

Epai na Anne, mpe epai na Kayife

BAKANGI Yesu na nsinga lokola mosali na mabe, mpe bakumbi ye epai na Anne, nganga monene ya kala mpe moto monene na nguya. Anne azalaki nganga monene wana Yesu azalaki na mibu 12, ntango akamwisaki balakisi na Bayuda mpo na boyebi na ye na tempelo. Bana mingi ya Anne bakomaki banganga minene na nsima, mpe, sikawa, ezali bokilo na ye, Kayife, nde moto azali kokokisa mokumba yango.

Na ntembe te Yesu akumbami liboso epai na Anne, mpamba te nganga-kapita wana azali uta kala kokokisa mokumba monene kati na lingomba ya Bayuda. Kotelema wana epai na Anne epesi nzela na nganga monene Kayife ete ayanganisa basangani 71 ya Sanedrina, esambiselo monene na Bayuda, mpe mpo na koyanganisa batatoli na lokutá.

Sikawa, Anne, nganga-kapita, atuni Yesu na ntina na bayekoli na ye mpe na mateya na ye. Kasi Yesu ayanoli ye ete: “Ngai nasololi polele kati na mokili. Ntango nyonso nalakisi polele kati na eyanganelo mpe kati na tempelo wana Bayuda nyonso bazali koyangana; nasololi likambo moko na nkuku te. Mpo na nini ozali kotuna ngai? Tuna bango basili koyoka makambo masololaki ngai na bango. Bango bayebi makambo malobi ngai.”

Na maloba oyo, moko na basali oyo atelamaki pene na Yesu abeti ye mbata, ye ete: “Ozali kozongisela nganga-kapita na lolenge boye?”

Yesu azongiseli ye ete: “Soko nalobi mabe, tatola mpo na mabe yango; nde soko nalobi malamu, mpo na nini obeti ngai?” Nsima na kolobana wana, Anne atindi Yesu oyo alingámi na nsinga epai na Kayife.

Na ntango wana, banganga-kapita nyonso, mikóló mpe bakomeli, elingi koloba Sanedrina mobimba, ebandi koyangana. Emonani lokola ete, likita yango lisalemi epai na Kayife. Atako yango eyokani te na mobeko na Bayuda na kosala esambiseli motindo wana na butu ya Pasiká, mikóló na lingomba baboyi kotika mwango na bango mabe.

Baposo mingi liboso, ntango Yesu asekwisaki Lazare, Sanedrina ezwaki ekateli ya koboma ye. Mpe nsima na mikolo mibale, na mokolo mwa misato, mikóló ya lingomba bayangaki mwango ya kokanga ye na nzela ya mayele mabe ete baboma ye. Kanisa naino mwa moke: Yesu akatelami etumbu ya liwa nkutu liboso ete asambisama!

Sikawa bazali kosala makasi ya kozwa batatoli oyo bamilengeli mpo na kopesa matatoli ya lokutá mpo na koyanganisa bilembeteli na ntina na ye. Kasi, matatoli yango mazali na boyokani te. Na nsuka na yango, batatoli mibale batelemi mpe balobi ete: “Toyoki ye koloba ete: ‘Ngai nakoboma tempelo oyo esalami na maboko, mpe nsima na mikolo misato nakotonga mosusu ekosalama na maboko te.’”

Kayife atuni ete: “Okozongisa monoko te? Makambo bato oyo balobi na ntina na yo ezali solo?” Kasi Yesu ayanoli te. Mpo na nsoni monene ya Sanedrina, ata kati na efundeli wana ya lokutá, matatoli ya batemwe wana mibale mayokani te. Na yango, Kayife ameki mwango mosusu.

Ayebi ete Bayuda bakotombokaka wana moto moko amikumisi ete, azali Mwana na Nzambe. Mbala mibale liboso, bawelaki koloba ete Yesu azali motuki oyo abongi na liwa, mpo bakanisaki ete Yesu amikokanisi na Nzambe, nzokande ezalaki bongo te. Na mayele mabe, Kayife asengi Yesu ete: “Nazali kokatisa yo ndai na Nzambe na bomoi ete oloba na biso soko yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe!”

Atako likanisi na Bayuda ezali nini, Yesu azali mpenza Mwana na Nzambe. Soko afandi nyee, bakokanisa ete awangani ete azali Klisto te. Na yango, Yesu ayanoli na mpiko nyonso ete: “Ngai nazali, mpe bokomona Mwana na moto kofanda na loboko na mobali na nguya mpe koya kati na mapata longwa na likoló.”

Na maloba wana, na ekela moko, Kayife apasoli bilamba na ye ya likoló mpe angangi ete: “Asili kotuka! Tozali lisusu koluka litatoli mpo na nini? Sikawa bosili koyoka maloba na kotuka! Bino bokanisi nini?”

Sanedrina ekati ete: “Abongi kokufa.” Bongo, mibali yango babandi koseka ye mpe kotuka ye. Bamosusu bazali kobeta ye mpe kobwakela ye nsoi na elongi. Bamosusu bazali kozipa elongi na ye mpe kobeta ye makofi kolobáká na mongongo ya kotyola ete: “Sakwela biso, yo Klisto, nani abeti yo?” Wana ezali makambo mabe mpe mandimami na mibeko te oyo basalelaki Yesu na boumeli ya kosambisama na ye butubutu. Matai 26:57-68; 26:3, 4; Malako 14:53-65; Luka 22:54, 63-65; Yoane 18:13-24; 11:45-53; 10:31-39; 5:16-18.

▪ Yesu akumbami liboso epai wapi, mpe likambo nini likomeli ye?

▪ Na nsima akumbami lisusu epai wapi, mpe na mokano nini?

▪ Lolenge nini Kayife asali mpo ete Sanedrina ekatela Yesu etumbu ya liwa?

▪ Makambo nini ya mabe mpe ezangi kondimama na mibeko basali yango epai na Yesu na boumeli ya kosambisama na ye butubutu?