Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Epai na Pilato mpe epai na Hérode

Epai na Pilato mpe epai na Hérode

Mokapo 122

Epai na Pilato mpe epai na Hérode

YESU ameki kobombela Pilato te ete ye azali mokonzi, kasi alimboli ete Bokonzi na ye ezalaki likama te mpo na Baloma. Alobi na Pilato ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbele bato na ngai babundi ete nakabama epai na Bayuda te. Kasi bokonzi na ngai bouti wana te.” Na yango, Yesu andimi mbala misato ete azali na bokonzi, kasi ezali bokonzi ya mabelé te.

Kasi Pilato atuni lisusu: “Boye, yo ozali mokonzi?” Na maloba mosusu, ozali mokonzi atako bokonzi na yo ezali ya mokili oyo te?

Yesu amonisi na Pilato ete likanisi na ye ezali sembo, na koyanolaka: “Yo moko olobi ete nazali mokonzi. Nabotami na ntina oyo, mpe nayei na mokili mpo na oyo ete: natatola mpo na solo. Soko moto nani azali na ngámbo na solo, akoyoka maloba na ngai.”

Na yango, ntina na bomoi na Yesu awa na mabelé ezali mpo na kotatola na ntina na “solo,” mpe mingi mpenza solo likoló na Bokonzi. Yesu amilengeli na kotikala sembo na solo wana, ata soko yango esengi bomoi na ye. Pilato atuni ete: “Solo ezali eloko nini?” Kasi azali na mposa ya bandimbola mosusu te. Asili koyoka makambo mingi, mpe yango ekoki mpo ete azwa ekateli.

Pilato azongi epai na ebele na bato oyo bazali libanda ya ndako. Ekoki kozala na miso na Yesu nde Pilato alobi epai na banganga-kapita mpe na baoyo bazali elongo na bango ete: “Namoni mabe moko na moto oyo te.”

Bibele basiliki mpo na ekateli oyo, babakisi ete: “Azali kotombokisa bato na kolakisáká kati na Yuda mobimba, mpe kobanda Galilai kino awa.”

Maloba na kozanga kososola oyo ya Bayuda ekamwisi Pilato mingi. Yango wana, ntango banganga-kapita mpe mikoló bakóbi kongánga, abongwani epai na Yesu mpe alobi ete: “Oyoki makambo mingi mazali bango kofunda yo te?” Kasi Yesu ayanoli ata liloba moko te mpo na bifundeli wana ya lokuta. Pilato akamwe mingi mpo na yango.

Eyoki ye ete Yesu azali Mogalilai, Pilato azwi libaku malamu ya komilongola na likambo na ye. Guvernere ya Galilai, Hérode Antipas (mwana ya Hérode le Grand), azali na Yelusaleme mpo na elambo ya Pasika. Bongo, Pilato atindi Yesu epai na ye. Mwa bambula liboso, Hérode abomaki Yoane Mobatisi, mpe azalaki kobanga wana ayokaki nsango ya bikamwiseli oyo Yesu azalaki kosala, mpamba te akanisaki ete Yesu azali nde Yoane, asekwi kati na bakufi.

Sikawa, Hérode asepeli mingi mpenza na komona Yesu. Ezali te mpo ete azali komibanzabanza likoló na oyo ekokómela Yesu, azali mpe na mposa mpenza te ya koyeba soki bifundeli likoló na ye bizali solo to lokuta. Kasi azali bobele na mposa ete amona ye mpe azali kolikya ete Yesu asala ekamwiseli.

Kasi Yesu aboi kokokisa mposa ya Hérode. Ntango Hérode atuni ye, azongisi ata liloba moko te. Wana bayoki nsoni, Hérode mpe basoda na ye baseki ye. Balatisi ye elamba motane mpe batyoli ye mpenza. Bongo, bazongisi ye epai na Pilato. Na nsuka na yango, Pilato mpe Hérode, baoyo bazalaki banguna, bakomi baninga malamu.

Wana Yesu azongi lisusu, Pilato abengi banganga-kapita, mikóló na Bayuda mpe bato, alobi na bango ete: “Bomemeli ngai moto oyo lokola motombokisi na bato, mpe nasambisi ye liboso na bino, kasi nazwi likambo moko te kati na ye na ntina na bifundeli na bino. Hérode bobele bongo, mpo ete azongiseli biso ye lisusu; mpe asali likambo moko te oyo libongi na kufa. Na bongo, nakobetisa ye fimbo mpe nakokangola ye.”

Na yango, mbala mibale, Pilato alobi ete Yesu azali na likambo te. Alingi kokangola ye, mpo asosoli ete ezali bobele zuwa nde epusi banganga minene ete bakumba Yesu epai na ye. Wana ezali ye kosala milende mpo na kokangola Yesu, likambo mosusu lipusi ye na kosala bongo. Lokola azali naino na tribinale, mwasi na ye atindeli ye nsango elendisi ye nokinoki ete: “Kosala likambo moko te na moyengebene wana, mpamba te nazwi mpasi mingi mpo na ye lelo kati na ndoto [solo euti mpenza epai na Nzambe].”

Pilato ayebi ete asengeli kokangola moto oyo azwi na mabe moko te. Kasi ndenge nini akosala? Yoane 18:36-38; Luka 23:4-16; Matai 27:12-14, 18-19; 14:1, 2; Malako 15:2-5.

▪ Ndenge nini Yesu ayanoli na motuna na ntina na bokonzi na ye?

▪ “Solo” nini Yesu atatolaki na ntina na yango na boumeli ya bomoi na ye mobimba awa na mabelé?

▪ Pilato azwi ekateli nini, bibele balobi nini, mpe Pilato asali nini mpo na Yesu?

▪ Hérode Antipas azali nani, mpo na nini asepeli mingi na komona Yesu, mpe asali ye nini?

▪ Mpo na nini Pilato alingi mpenza kokangola Yesu?