Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobikisama ya elenge mobali moko azalaki na elimu mabe

Kobikisama ya elenge mobali moko azalaki na elimu mabe

Mokapo 61

Kobikisama ya elenge mobali moko azalaki na elimu mabe

WANA Yesu akendaki na ngomba Hermon, elongo na Petelo, Yakobo mpe Yoane, bayekoli mosusu bakutani na mokakatano. Ezongi ye, Yesu amoni mbala moko ete likambo moko ezali kotambola te. Ebele na bato bazingi bayekoli na ye, mpe bakomeli bazali mpenza kotyana ntembe makasi na bango. Emoni bango Yesu, bato bakamwe mpe bayei mbango mpo na kopesa ye mbote. Yesu atuni bango boye: “Bozali kotyana na bango ntembe na likambo nini?”

Moto moko amitangoli na etuluku na bato afukami liboso na ye mpe alimboli ye ete: “Molakisi, nayei na mwana mobali na ngai epai na yo, mpo ete azali na elimo mabe alobaka te. Soko ekokanga ye wapi, ekobwaka ye na nse; ekobimisaka mfulu na monoko, ekopelisaka mino na ye, na bongo azali kokónda. Nalombi bayekoli na yo ete babimisa yango, nde bakoki te.”

Ekoki kozala lokola bakomeli bamoni ete bayekoli bakoki kobikisa mwana mobali oyo te, babandi koseka bango. Bobele na ntango yango, Yesu ayei. Angangi boye: “E libota na kozanga kondima, naumela na bino ntango molai boni? Nayikela bino mpiko kino ntango nini?”

Yesu azali koloba epai na bayoki na ye nyonso, kasi na ntembe te mpenza azali koloba mingimingi epai na bakomeli, oyo balingi kotumola bayekoli na ye. Bongo na nsima alobi na kotyáká mosapi epai na mwana mobali: “Bomema ye awa na ngai.” Kasi wana mwana azali kobelema epai na Yesu, elimu mabe abwaki ye na mabelé mpe abandi konyokwama na mpasi. Abaluki na nse, mfulu etondi na mbebo.

Yesu atuni: “Ye asili koumela na mpasi oyo ntango boni?”

Bongo tata na ye ayanoli: “Longwa na bomwana na ye. Ekobwakaka ye kati na móto mpe kati na mai mpo na koboma ye.” Bongo abondeli Yesu na maloba oyo: “Kasi soko okoki kosala eloko, sunga biso mpe yokela biso mawa.”

Mbala mosusu, tata yango azali koluka lisalisi uta bambula mingi. Bongo sikawa, ndenge amoni ete bayekoli bakoki eloko te, azangi elikya. Yesu amoni ete atikali lisusu na elikya te, bongo alobi boye mpo na kolendisa ye: “Liloba oyo: ‘Soko nakoki!’, Ya solo, makambo nyonso makoki kosalema mpo na moto na kondima.”

Tata yango angangi: “Nazali na kondima!” kasi abondeli boye: “Sunga ngai na ntembe na ngai!”

Yesu amoni ete bato bazali koya mbango epai na bango; yango wana angangeli elimu mabe yango na maloba oyo: “Yo elimo okufi matoi mpe okolobaka te, nazali koloba na yo, bima na ye mpe kokotela ye lisusu te!” Ntango elimo yango ebimi, engangisi mwana mobali yango mpe abandi kobendana mbala mingi mpenza. Bongo etiki ye na mabelé, na boye ete bato nyonso bazalaki wana balobi: “Asili kokufa!” Kasi Yesu asimbi ye na loboko, mpe atelemi.

Liboso na yango, wana atindaki bayekoli na ye bakenda kosakola, babenganaki bilimu mabe. Yango wana eyanganaki bango kati na ndako moko, batuni ye mpenza: “Mpo na nini biso tokoki kobimisa ye te?”

Komonisáká ete ezali mpo bazangi kondima, Yesu ayanoli boye: “Motindo oyo ekoki kobima bobele na libondeli.” Esengelaki mpenza komibongisa malamu mpo na kobengana elimo mabe wana, oyo ezalaki makasi mingi. Esengelaki kozala na kondima makasi mpe kobondela Nzambe na etingya mpo apesa bango nguya.

Nsima na yango, Yesu abakisi: “Mpamba te nazali koloba na bino ete, soko bozali na kondima ata lokola mombuma na sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete, Tambola longwa awa kino esika kuna mpe ekotambola. Likambo moko te likoleka nguya na bino.” Kondima ekoki kozala nguya mpenza!

Mabaku mpe mikakatano oyo ezali kobebisa mosala ya Jéhovah ekoki kokokana na ngomba monene. Nzokande, Yesu amonisi ete soki toloni kondima kati na motema, soko tobateli yango mpe tokolisi yango, ekotèla mpe ekopesa biso likoki ya kolónga mabaku mpe mikakatano mikokani na bangomba. Malako 9:14-29; Matai 17:19, 20; Luka 9:37-43.

▪ Na bozongi na ye na ngomba Hermona, likambo nini Yesu ayei kokutana na yango?

▪ Elendiseli nini Yesu apesi epai na tata ya elenge oyo elimo mabe ekotelaki ye?

▪ Mpo na nini bayekoli balongaki kobimisa elimo mabe te?

▪ Engebene oyo Yesu amonisi, kino wapi nguya na kondima ekoki kokoma?