Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kolela ebongwani esengo

Kolela ebongwani esengo

Mokapo 47

Kolela ebongwani esengo

NTANGO Yailo amoni ete mwasi oyo azalaki na maladi ya kotanga makila abiki na bokono na ye, kondima na ye eyei lisusu makasi kati na nguya ya kokamwa oyo Yesu azali na yango. Mwa ntango moke liboso asengaki epai na Yesu ete abikisa mwana na ye ya mwasi oyo alingi mingi, oyo azali na mibu 12, mpe akómi pene na liwa. Nzokande, likambo oyo ye abangaki, euti kosalema. Wana Yesu azali kosolola naino na mwasi oyo auti kobikisa, bato na Yailo bakómi mpe bayebisi ye na pembeni ete: “Mwana mwasi na yo asili kokufa! Mpo na nini okotungisa lisusu molakisi?”

Oyo nde nsango ya mabe! Kanisa mobali yango, mobali na lokumu mingi kati na mboka, sikawa ye nyonso alembi ntango ayoki nsango ya liwa ya mwana na ye. Kasi Yesu ayoki lisolo yango; abaluki epai na Yailo mpe alendisi ye ete: “Kobanga te, zala bobele na kondima.”

Bongo akei elongo na mobali oyo alembi na mpasi. Ntango bakómi, bamoni bato na ndako babulungani; bango nyonso bazali kolela. Bato mingi bazali wana, bazali konganga mpo na mawa. Ntango akoti, Yesu atuni ete: “Mpo na nini bino bozali kosala makelele mpe bozali kolela? Mwana akufi te kasi azali kolala mpongi.”

Elobi ye boye, bato baseki ye mpo na kotyola ye; bayebi malamu ete elenge mwasi akufi. Kasi, Yesu alobi ete azali kolala, mpo na komonisa ete na nguya oyo Nzambe apesi ye, akomonisa ete akoki kosekwisa bato na liwa lokola bakolamusaka moto oyo alali mpongi.

Yesu abimisi bato nyonso libanda longola Petelo, Yoane, Yakobo, Yailo mpe mwasi na ye. Yesu abelemi na bango elongo na motó na mbeto ya elenge mwasi. Asimbi ye na loboko, mpe alobi ete: “Talʹi·tha cuʹmi,” oyo elimboli: “Elenge mwasi, nalobi na yo ete, Telema!” Bobele na ntango yango, mwana alamuki mpe abandi kotambola! Emoni bango likambo oyo, baboti na ye bakamwi na kokamwa monene mpe basepeli mingi.

Nsima wana atindi ete bapesa bilei na mwana, Yesu alobi na Yailo mpe na mwasi na ye ete basolola likambo oyo na moto te. Ata apekisi bango kasi nsango epalangani na mboka mobimba. Ye azali moto ya mibale oyo Yesu asekwisi. Matai 9:18-26; Malako 5:35-43; Luka 8:41-56.

▪ Nsango nini ekómeli Yailo, mpe Yesu alendisi ye na maloba nini?

▪ Na ezalela nini bakuti bato na ndako na Yailo?

▪ Mpo na nini Yesu alobi ete mwana alali nzokande akufi?

▪ Banani bazali batemwe mitano ya lisekwa oyo?