Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kowelana ebimi

Kowelana ebimi

Mokapo 115

Kowelana ebimi

KALA mingi te na mpokwa, Yesu auti kopesa liteya kitoko ya komikitisa na kosukoláká makolo ya bantóma na ye. Nsima na yango, asalaki Ekaniseli ya liwa na ye oyo ebelemi. Sikawa, likambo ya kokamwa lisalemi, ezali mpenza kokamwisa na ntina na likambo oyo lisalemi. Bantóma bawelani makasi mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki bamosusu. Emonani lokola ete koswana wana ebandi lelo te.

Tomikundola ete nsima wana Yesu asalaki ebongwaneli na likoló na ngomba, bantóma bawelanaki mpo na koyeba soki nani kati na bango alekaki monene. Lisusu, Yakobo mpe Yoane basengaki ete bazwa bisika ya lokumu kati na Bokonzi, kobimisáká lisusu matáta kati na bantóma. Mpe sikawa, lokola ezali butu ya nsuka oyo azali kolekisa elongo na bango, Yesu asengeli kooka mawa mingi na komona bango lisusu koswana. Asali nini?

Na esika ete apamela bantóma mpo na ezalela na bango wana, mbala oyo lisusu Yesu asosoli elongo na bango na motema petee, ete: “Mikonzi na mabota bakoyangelaka bango na nguya, mpe baoyo bazali na bokonzi liboso na bango bakobyangama basali na boboto. Nde bino bokosala bongo te. . . . Nani aleki monene, oyo afandi na mesa soko oyo apesi biloko? Oyo afandi na mesa te?” Mpe, akundweli bango ndakisa oyo ye moko apesaki, ete: “Nde ngai nazali kati na bino lokola mosaleli.”

Atako bolembu na bango na ntina na kozanga kokoka, bantóma baumelaki na Yesu kati na bampasi na ye. Mpe alobi na bango lisusu ete: “Nasali kondimana elongo na bino, pelamoko Tata na ngai asalaki kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi.” Kondimana oyo esangisi Yesu mpe bayekoli na ye ya sembo ete bayangela esika moko. Bobele bato 144 000, motuya etyameli ndelo, nde bakokɔta kati na kondimana wana mpo na Bokonzi.

Atako bantóma bapesameli libaku kitoko ya koyangela esika moko na Klisto, kasi bazali na bolembu mingi kati na elimo. Yesu alobi ete: “Bino nyonso [bokokwea, MN] mpo na ngai na butu oyo.” Kasi ayebisi ete ye abondelaki mpo na Petelo, mpe apesi ye toli oyo: “Wana esili yo kobutwa, lendisa bandeko na yo.”

“Bana, nazali naino na bino mwa ntango moke. Bokoluka ngai, nde pelamoko elobaki ngai na Bayuda: ‘Esika ekokenda ngai, bino bokoki koya te’; boye mpe nazali koloba na bino sikawa. Nazali kopesa bino lilako na sika ete, bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”

Petelo atuni ete: “Nkolo, okokenda wapi?”

Yesu alobi ete: “Esika ekokende ngai, okoki kolanda ngai sikawa te, nde okolanda ngai nsima.”

Petelo abakisi ete: “Nkolo, mpo na nini nakoki kolanda yo sikawa te? Nakosopa bomoi na ngai mpo na yo.”

Yesu atuni ete: “Okosopa bomoi na yo mpo na ngai? Solo solo nazali koloba na yo ete: naino nsoso eleli te, okoangana ngai mbala misato.”

Petelo alobi ete: “Soko ekokoka na ngai kokufa na yo elongo, nakoangana yo te.” Bantóma nyonso mpe lokola balobi bobele bongo, Petelo amikumisi ete: “Soko bango nyonso bakotuta libaku mpo na yo, ngai nakotuta libaku soko moke te!”

Kokanisáká ntango oyo atindáká bayekoli na ye kokende kosakola kati na Galilai mobimba, na mosolo te, na saki na bilei te, Yesu atuni bango ete: “Bozangaki nde eloko moko?”

Bazongisi ete “Te!”

“Kasi sikawa, oyo azali na mosolo akamata yango, na saki lokola; oyo mpe azangi yango ateka elamba na ye mpe asomba mopanga. Mpamba te nalobi na bino ete yango esili kokomama ekokisama kati na ngai ete: ‘Atangamaki kati na batyoli na mibeko.’ Ya solo, yango elobamaki na ntina na ngai ezali kokokisama.”

Na maloba wana, Yesu azali kosakola ntango oyo akotyama likoló na nzeté elongo na bato mabe, na elobeli mosusu batyoli na mibeko. Amonisi lisusu ete, na nsima, bayekoli na ye bakokutana na minyoko makasi. Bantóma balobi ete: “Nkolo, tala mipanga mibale.”

Yesu alobi ete: “Ekoki.” Lokola tokomona yango, mosika te mipanga mikopesa nzela na Yesu ete apesa liteya mosusu ya ntina mingi. Matai 26:31-35; Malako 14:27-31; Luka 22:24-38; Yoane 13:31-38; Emoniseli 14:1-3.

▪ Mpo na nini kowelana kati na bantóma ezali mpenza likambo na kokamwa?

▪ Ndenge nini Yesu asilisi matáta yango?

▪ Kondimana oyo Yesu asali elongo na bayekoli na ye ekokisi likambo nini?

▪ Yesu apesa lilako nini ya sika, mpe yango ezali na ntina nini?

▪ Na lolenge nini Petelo azali mpenza komityela motema, mpe Yesu alobi na ye nini?

▪ Mpo na nini malako na Yesu matali komema mosolo mpe saki na bilei ekeseni na oyo ye apesaki liboso?