Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lazare asekwi

Lazare asekwi

Mokapo 91

Lazare asekwi

YESU akomi sikawa elongo na baoyo nyonso bazali kolanda ye na liyita ya Lazare. Ezali mobenga to lilusu oyo lizipami na libanga. Yesu alobi ete: “Bolongola libanga.”

Malata, ye oyo azali kososola makanisi na Yesu te, alobi ete: “Nkolo, azali kolumba nsolo mabe mpo ete akufi esili koleka mikolo minei.”

Kasi Yesu ayanoli ye boye: “Nalobi na yo te ete, soko okondima, okomona nkembo na Nzambe?”

Balongoli bongo libanga. Yesu atomboli miso likolo mpe asali libondeli oyo: “Tata, natondi yo ete oyoki ngai. Nayebi ete okoyokaka ngai ntango nyonso; nde nalobi yango mpo na ebele etelemi pene awa mpo bandima ete osili kotinda ngai.” Yesu abondeli liboso na bato mpo bayeba ete ezali na nguya oyo azwi epai na Nzambe nde akokokisa likambo oyo likosalema nsima. Mpe angangi na mongongo makasi ete: “Lazare, bima libanda!”

Mpe Lazare abimi na liyita. Maboko na ye mpe makolo na ye malingami naino na bilamba mpe elongi na ye ezipami na litambala. Yesu alobi ete: “Bokangola ye mpe botika ye atambola.”

Liboso na ekamwiseli wana, mingi kati na Bayuda oyo bayaki kobondisa Marie mpe Malata bandimi Yesu. Nzokande, bamosusu bakei koyebisi epai na Bafalisai likambo oyo lisalemi. Nokinoki, Bafalisai mpe banganga-kapita bayanganisi Sanedrina, Esambiselo monene ya Bayuda.

Sanedrina esangisi kati na yango Kaïfe, nganga monene ya ntango wana, bakisa Bafalisai mpe Basadukai, banganga-kapita mpe bangana minene ya kala. Bango bazali komilelalela na maloba oyo ete: “Tokosala nini, mpamba te moto oyo azali kosala makamwisi mingi? Soko tokotika ye boye, bato nyonso bakondima ye mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa esika na biso mpe libota na biso.”

Atako bayebi ete Yesu “azali kosala bikamwiseli mingi,” bakonzi wana ya mangomba bazali komibanzabanza bobele mpo na etelemelo na bango mpe mpo na bokonzi na bango. Kozonga ya Lazare na bomoi epesi mpenza mpasi makasi epai na Basadukai, mpamba te bango bandimaka lisekwa te.

Kaïfe, ye oyo mbala mosusu azali mosadukai, akamati sikawa maloba: “Bino boyebi eloko te! Bobanzi mpe te ete ekozala malamu na biso ete moto moko akufa mpo na libota mpe ete bato nyonso bakufa te.”

Ezali Nzambe nde apusaki Kaïfe na koloba maloba wana. Na yango, Yoane akokoma na nsima ete: “Nzokande [Kaïfe] alobi bongo na makanisi na ye moko te.” Kasi Kaïfe alingaki mpenza koloba ete, esengelaki koboma Yesu mpo na kopekisa ye ete abebisa te bokonzi mpe bopusi oyo bazali na yango mpo na etelemelo na bango. Nzokande, lokola Yoane alobi yango, ˈKaïfe asakolaki ete Yesu aponamaki mpo na kokufela libota, nde bobele mpo na libota te, kasi lisusu mpo na koyanganisa kati na bomoko, bana na Nzambe oyo bapalanganaki.ˈ Ya solo, mokano na Nzambe ezali ete Mwana na ye akufa lokola mbeka mpo na bato banso.

Sikawa Kaïfe alongi mpo na kobenda Sanedrina ete bayanga mwango ya liwa na Yesu. Kasi, mbala mosusu Nikodeme, mosangani moko ya Sanedrina oyo azali komonisa boboto epai na Yesu, ayebisi ye likanisi na bango, Yesu alongwe na mboka yango. Yoane 11:38-54.

▪ Mpo na nini Yesu azali kobondela liboso na bato, naino Lazare asekwi te?

▪ Batemwe ya lisekwa yango basali nini?

▪ Nini emonisi mabe na basangani ya Sanedrina?

▪ Nini ezali makanisi ya Kaïfe, mpe likambo nini Nzambe apusi ye ete asakola yango?