Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liboso na Sanedrina, mpe liboso na Pilato

Liboso na Sanedrina, mpe liboso na Pilato

Mokapo 121

Liboso na Sanedrina, mpe liboso na Pilato

NTONGO etani, Petelo asili kowangana Yesu mpo na mbala ya misato, mpe basangani ya Sanedrina basilisi kosambisa na bango ya bokosi mpe bapanzani. Kasi, bazóngi lisusu mokolo ya mitano na ntongo, na kobima na moi, mbala oyo bakei na ndako ya makita ya Sanedrina. Emonani lokola ete bazali na mposa ya koluka kolongisa kosambisa na bokosi oyo esalemaki butubutu. Ntango Yesu akambami liboso na bango, batuni ye, lokola esalaki bango na butu eleki, ete: “Loba na biso soko yo Klisto.”

Yesu ayanoli ete: “Soko nakoloba na bino, bokondima te, mpe soko nakotuna bino, bokozongisa eyano te.” Kasi, Yesu azali na mpiko mpo na koloba na bango soko azali nani, kolobáká ete: “Mwana na moto akofanda na loboko na mobali na nguya na Nzambe.”

Batuni ye ete: “Na bongo ozali Mwana na Nzambe?” Bango nyonso balingi koyeba yango.

Yesu alobi na bango ete: “Lokola elobi bino.”

Mpo na bato wana oyo bazali na mposa ya koboma ye, eyano oyo ekoki. Mpo na bango, eyano wana ezali kotuka. Mpe balobi ete: “Tokoluka lisusu litatoli nini? Biso mpenza toyoki na monoko na ye.” Bongo, bakangi Yesu na nsinga, bamemi ye epai na guvernere moromé Ponti Pilato.

Yuda, ye oyo atekaki Yesu, alandaki kosambisa wana. Ntango amoni ete Yesu akweisami, amitungisi mpenza. Akei bongo kozongisa misolo na palata ntuku misato epai na banganga minene mpe mikóló, kolobáká ete: “Nasali lisumu mpo na kokaba makila mazali na likambo te.”

Balobi na ye kozanga mawa ete: “Yango ezali nini epai na biso? Yo moko tala yango.” Bongo Yuda abwaki misolo na palata kati na tempelo mpe akei komikakisa na nzeté. Kasi, emonani lokola ete etápe ya nzeté oyo na yango Yuda akangisi nsinga ebukani mpe akwei motó liboso na libanga monene, epai kuna apanzani.

Banganga minene bayebi te nini basengeli kosala na misolo na palata wana. Balobani ete: “Ekoki te ete tobwaka oyo na sanduku-na-makabo, mpamba te ezali mosolo na makila.” Yango wana, nsima na koyokana na likambo yango, basómbi elanga na moyemi na mbeki mpo na kokunda bapaya. Ezali mpo na ntina oyo nde elanga yango ebengami ete “Elanga na makila.”

Ezali naino ntongo wana bamemi Yesu na ndako na guvernere. Bayuda oyo bazali komema ye, baboyi kokota na lopango, mpamba te bakanisi ete kozala esika moko na Bapakano ekoyeisa bango mbindo. Mpo na kosepelisa bango, Pilato ayei epai na bango na libanda. Mpe atuni bango ete: “Bofundi moto oyo na likambo nini?”

Bayuda balobi na ye ete: “Soko moto oyo azalaki mosali na makambo mabe te, mbele tokabi ye epai na yo te.”

Lokola aboyi komikotisa na likambo yango, Pilato alobi na bango ete: “Bokamata ye bino mpenza, mpe bosambisa ye na Mibeko na bino.”

Komonisáká mposa na bango ya koboma, Bayuda bazongisi ete: “Ebongi na biso koboma moto te.” Ya solo, soki babomi Yesu mokolo na Pasika, yikiyiki ekozala mpenza kati na bato, mpamba te mingi bandimi Yesu. Kasi soki balóngi kosenga na Baloma ete baboma ye na ntina na makambo na politike, bango bakomema mokumba moko te liboso na bato.

Yango wana bakonzi ya mangomba batiki kosambisa oyo basalaki liboso, oyo na yango basilaki kokweisa Yesu likoló na kotuka, mpe basaleli bifundeli mosusu. Bafundi Yesu na makambo misato, ete: “Tozwi moto oyo wana ezalaki ye [1] kopengwisa bato, [2] kopekisáka ete bafuta mpako na Kaisala te mpe [3] kolobaká ete ye mpenza azali Klisto, mokonzi.”

Efundeli oyo ete Yesu amizalisi mokonzi, yango nde ebendi likebi ya Pilato. Akoti na ndako, abengi Yesu mpe atuni ye ete: “Yo mokonzi na Bayuda?” Na maloba mosusu, obuki nde mibeko na kolobáká ete yo ozali mokonzi na esika na Kaïsala?

Yesu alingi koyeba makambo nini Pilato asili koyoka na ntina na ye, yango wana atuni ye ete: “Yo ozali koloba boye mpo na yo moko soko mpo na bamosusu balobi na yo na ntina na ngai?”

Pilato alobi ete, ayebi eloko moko te mpe alingi koyeba solo. Azongisi ye monoko ete: “Ngai nazali nde Moyuda? Libota na yo mpe banganga-kapita bakabi yo epai na ngai. Osali nini?”

Yesu aluki te kopengola eyano na ntina na bokonzi na ye. Mpe oyo akoyanola sikawa ekokamwisa mpenza Pilato. Luka 22:66 kino 23:3; Matai 27:1-11; Malako 15:1; Yoane 18:28-35; Misala 1:16-20.

▪ Na likanisi nini Sanedrina eyangani lisusu na ntóngo?

▪ Yuda akufi lolenge nini, mpe misolo na palata ntuku misato misalelami na nini?

▪ Mpo na nini Bayuda balingi ete Baloma baboma Yesu, na esika ete baboma ye bango moko, lokola bazalaki kokana kosala yango na mabaku mosusu?

▪ Bayuda bafundi Yesu mpo na makambo nini?