Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likambo litali kokila bilei

Likambo litali kokila bilei

Mokapo 28

Likambo litali kokila bilei

ELEKI mbula mobimba uta Yesu akendaki koyangana na elambo na Pasika ya mobu 30. Yoane Mobatisi asili kokota boloko eleki sikawa sanza mingi. Alingaki ete bayekoli na ye balanda Klisto, kasi bango nyonso balandaki ye te.

Sikawa, bamoko kati na bayekoli na ye bayei epai na Yesu mpe batuni ye: “Mpo na nini biso mpe Bafalisai tozali kokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakokilaka te?” Bafalisai bazali mpenza kokila bilei mbala mibale na poso; ezali nde likambo esengami na lingomba na bango. Mpo na bayekoli na Yoane, mbala mosusu bazali kolanda bobele momeseno yango. Ekoki mpe kozala ete bazali na mawa na ndenge Yoane akangami mpe bazali komituna mpo na nini bayekoli na Yesu bazali komonisa mawa na bango te na kosalaka lokola bango.

Mpo na eyano, Yesu azongiseli bango boye: “Baninga na mobali na libala bakoki kolela naino mobali na libala azali na bango elongo? Nde mikolo mikoya, wana bakolongola bango mobali na libala; na bongo bakokila bilei.”

Bayekoli na Yoane bazali komikundola solo ete nkolo na bango akokanisaki Yesu na mobali na libala. Na bongo, ntango nyonso oyo Yesu akozala na bomoi, Yoane azali na ntina moko te ya kokila bilei; bayekoli na Yesu bazali mpe na ntina na kokila bilei te. Nde na nsima, ntango Yesu akokufa, bayekoli na ye bakozala na mawa mpe bakokila bilei. Kasi ntango akosekwa mpe akobuta likolo, bakozala lisusu na ntina moko te ya kooka mawa mpe ya kokila bilei.

Na nsima Yesu apesi masese oyo: “Moto moko te akobamba elamba ya kala na eteni ya elamba ya sika, mpamba te eteni ya sika ekobendabenda elamba ya kala mpe lilusu ekoleka monene. Bakotyaka vinyo ya sika na mposo ya kala te; soko bakosala bongo, mbele vinyo ekopasola mposo mpe ekosopana, mpe mposo ekobeba. Kasi bakotyaka vinyo ya sika na mposo ya sika.” Boyokani nini ezali kati na masese oyo mpe likambo litali kokila bilei?

Yesu asalisi bayekoli na Yoane na kokanga ntina ete moto moko te asengeli komizela ete bayekoli na ye balanda mitindo minuni ya Bayuda, lokola oyo ya kokila bilei mpo na momeseno ya lingomba. Soko Yesu ayaki na mabele, ezalaki te mpo ete asangisa losambo oyo ya kala na losambo ya sika. Losambo ya boklisto elingaki kotongama likolo na losambo ya boyuda ya eleko wana te mpe likolo na mitindo na bato te. Esengeli kokokana te na elamba ya sika oyo babambi yango likolo na elamba ya kala, to na vinyo ya sika oyo etyami na kati na mposo na kala. Matai 9:14-17; Malako 2:18-22; Luka 5:33-39; Yoane 3:27-29.

Banani bazali kokila bilei, mpe mpo na nini bazali kosala bongo?

Mpo na nini bayekoli na Yesu bazali kokila bilei te wana Nkolo na bango azali na bango elongo, kasi mpo na nini na nsima bakozala mpe na ntina na kokila bilei te?

▪ Masese nini Yesu apesi, mpe ndimbola na yango ezali nini?