Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo ya mwana oyo abunga

Lisolo ya mwana oyo abunga

Mokapo 86

Lisolo ya mwana oyo abunga

YESU auti kopesa eyano epai na Bafalisai na nzela na masese mibale, oyo na mpate mpe ya mbuma na palata ebungaki, nde na nsima, emonani. Sikawa abandi lisese mosusu. Lisese wana limonisi lolenge tata oyo atondi na bolingo asali liboso ya bana na ye mibale, bango nyonso mibale basali mabunga minene.

Moto oyo atalelami mingi kati na lisese oyo, ezali mwana na nsima. Mokolo moko, asengaki ndambo na libula na ye epai na tata na ye, oyo apesaki ye yango kozanga kokakatana. Na nsima atiki ndako na baboti mpe abandi bomoi ya mbindo mpenza. Kasi totika Yesu abetela biso lisolo yango, mpe tomeka kotala soki bato yango bazali komonisa banani.

Yesu alobi ete: “Moto moko azalaki na bana babali mibale. Oyo na nsima kati na bango alobaki na tata na ye ete: ˈTata, pesa ngai ndambo na libula na ngai.ˈ [Tata] akabweli bango biloko na ye.” Mwana na nsima akosala nini na biloko oyo ye azwi?

Yesu alimbweli biso ete: “Nsima na mwa mikolo, mwana na nsima akangaki biloko nyonso, mpe akendaki na mokili mosusu mosika, mpe abebisi biloko na ye wana na kotambola kilikili.” Mpo na koloba polele, abebisi mosolo na ye elongo na basi ya pite. Na nsima, lokola Yesu amonisi yango, mpasi ebandi.

“Wana esilisaki ye biloko na ye nyonso, nzala monene mpenza ebimi na mokili yango, ye mpe abandi kozanga. Bongo akendaki mpe azwaki mosala epai na moto na mboka na mokili yango, mpe atindi ye kati na bilanga na ye koleisa ngulu. Azalaki na mposa na kotondisa libumu na ye na mposo ezalaki ngulu kolya, mpe moto apesaki ye eloko te.”

Kozala na mokumba ya kobatela bangulu, ezalaki mpenza komisambwisa mpo na Moyuda! Tobosana te ete engebene Mibeko, banyama yango bazalaki mbindo. Kasi, likambo lipesi elenge mobali mpasi mpenza ezali oyo ete, likolo na nzala, akomi kino kosepela na bilei bipesameli banyama wana. Yesu alobi na biso ete, kati na mpasi wana, “makanisi malamu mazongelaki ye.”

Yesu akobi lisolo na ye: “[Amilobelaki] ete: ˈEbele na basali na lifuti na tata na ngai bazali na mampa mingi, nde ngai nazali kokufa na nzala awa! Nakolongwa mpe nakokenda epai na tata na ngai, mpe nakoloba na ye ete: “Tata, nasaleli likolo mabe, mpe nasaleli yo mabe, nabongi kobyangama mwana na yo lisusu te, zalisa ngai lokola moko na basali na yo na lifuti.”ˈ Alongwi, mpe akomi epai na tata na ye.”

Tala likambo oyo tosengeli kokanisa: Soki tata na ye apamelaki ye na makasi mpenza, na ntango oyo ye atikaki ndako, mbele mwana yango akokaki mpenza koyeba te eloko oyo asengelaki kosala. Mbala mosusu akokaki nde kozonga na mboka mpo na koluka mosala epai mosusu na esika ete ezala epai na tata na ye, ete aluka lisusu matata elongo na ye te. Kasi, likanisi motindo wana liyelaki ye te: azongaki bobele epai na ye.

Ezali polele kati na lisese wana ete, tata ezali Tata na biso ya likolo, Jehovah Nzambe, ye oyo atondi na bolingo mpe na motema mawa. Mbala mosusu ososoli ete mwana na kilikili ezali bongo, basali na masumu mingi. Bafalisai, baoyo Yesu azali kolobela makambo oyo, batɔngaki ye liboso mpo ete azalaki kolya elongo na basumuki yango. Bongo mwana na liboso, amonisi nani?

Ntango mwana oyo abunga amonani

Kati na lisese na Yesu, lolenge nini mwana oyo abunga, to mwana na kilikili, ayambami ntango azongi epai na Tata na ye? Toyoka lisolo:

“Naino ezalaki ye mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokeli ye mawa; akei mbango koyamba ye.” Tata oyo na motema mawa boye mpe na bolingo, amonisi bongo Jehovah, Tata na biso ya likolo.

Mobali wana asilaki mpenza koyoka nsango na ntina na bomoi ya mbindo oyo mwana na ye azalaki na yango. Kasi, na esika ete atungisa ye na mituna mingi, ayambi ye malamu. Yesu mpe azali komonisa elimo motindo moko, mpamba te azali kokenda epai na bato ya masumu mpe epai na bakongoli na mpako baoyo kati na lisese, bamonisami na mwana na kilikili.

Ya solo, mpo na mawa mpe ezalela ya konyokwama na motema oyo emonani epai na mwana na ye, tata na mayele oyo na lisese, andimi mpenza ete mwana yango abongoli motema. Nzokande, ezaleli na ye oyo etondi na bolingo esalisi elenge mobali ete andima masumu na ye. Yesu akobi lisolo na ye: “Mwana alobi na ye ete: ˈTata, nasaleli likolo mabe mpe nasaleli yo mabe, nabongi kobyangama mwana na yo lisusu te.ˈ”

Nsima wana mwana abimisi maloba oyo, nokinoki tata alombi baombo na ye ete: “Yaka na elamba eleki kitoko kolatisa ye noki, mpe tya lopete na mosapi na ye, mpe sapato na makolo na ye, mpe yaka na mwana na ngombe na mafuta mpe boma yango, tolya, tosepela, mpamba te mwana na ngai oyo azalaki mokufi nde azongi na bomoi; azalaki mobungani nde azwami.” Mpe babandi “kosepela.”

Na boumeli ya ntango wana, “mwana ya liboso azalaki na elanga.” Toyoka nsuka ya lisolo mpe tomeka kososola soki mwana ya liboso amonisi nani. Yesu alobi na ntina na ye ete: “Ebelemaki ye na ndako, ayokaki miziki na kobina. Abyangi moko na basali epai na ye, mpe atuni ye soko makambo nini mazali. Ayebisi ete: ˈNdeko na yo ayei, mpe tata na yo abomi mwana na ngombe na mafuta mpo ete azwi ye na nzoto makasi.ˈ Asiliki mpe alingaki kokota te, bongo tata na ye abimi mpe abondeli ye. Mpe ye azongisi monoko na tata na ye ete: ˈKanisa ete nasaleli yo mbula mingi boye, mpe naboyi monoko na yo mbala moko te, nde opesi ngai ata mwana na ntaba mbala moko te ete nasepela na baninga na ngai; nde awa eyei mwana na yo oyo, ye oyo asilisi biloko na yo na basi na pite, — obomeli ye mwana na ngombe na mafuta.ˈ”

Nani asilikaki lokola mwana na liboso mpo na motema mawa oyo momonisamaki epai na basali na masumu? Ezali bakomeli mpe Bafalisai, boye te? Yesu ayanolaki na lisese wana mpo baboyaki ete bato na masumu bayambama malamu; emonani polele ete, ezali bango nde bamonisami na mwana na liboso.

Yesu asukisi lisolo na ye na maloba na kobondela oyo na tata epai na mwana na ye ya liboso: “Mwana na ngai, yo ozali na ngai elongo ntango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso bizali na yo. Nde ekoki ete tosepela mpe tozala na esengo mpo ete ndeko na yo oyo azalaki mokufi nde azongi na bomoi, azalaki mobungani nde azwami.”

Yesu ayebisi te likambo oyo mwana na liboso akosala. Toyebi ete na mikolo mikoya, nsima na liwa mpe lisekwa na Klisto, ˈebele na banganga bakotosa kondima yangoˈ; mbala mosusu ekozala na bamoko kati na mwa ndambo na balobani na ye ya sikawa, baoyo basali kelasi ya “mwana ya liboso.”

Kasi, na eleko na biso, bana mibale wana bamonisi banani? Ekoki kozala bobele bato oyo basilaki koyeba malamu mikano na Jehovah mpo na kozwa moboko likolo na yango bakotonga boyokani elongo na ye. Mwana na liboso amonisi bamoko na basangani ya “etonga moke,” ya “lisanga na babotami na liboso baoyo bakomami nkombo kuna na makolo.” Baklisto yango bamekolaki ezalela motindo moko na oyo ya mwana na liboso. Balingaki te koyamba kelasi mosusu ya mabele oyo esalemi na “bampate mosusu,” mpamba te, bakanisaki ete babotolaki lokumu na bango.

Mwana na kilikili amonisi bato mosusu oyo bazali kotika libota na Nzambe mpo na kosepela na bisengo ya mokili. Na nsima, bato yango bazali kobongola mitema, bazali kozonga epai na Nzambe mpe kozongela molongo ya basaleli na ye ya molende. Solo mpenza, Tata azali komonisa bolingo mpe motema mawa epai na baoyo bayebi ete bazali na mposa ya lilimbisi na ye mpe bazali kozonga epai na ye. Luka 15:11-32; Levitike 11:7, 8; Misala 6:7; Luka 12:32; Baebele 12:23; Yoane 10:16.

Yesu azali koyebisa lisese oyo epai na banani, mpe mpo na nini?

Nani atalelami mpenza kati na lisolo yango, mpe likambo nini likomeli ye?

▪ Na mikolo na Yesu, tata mpe mwana na nsima bamonisi banani?

▪ Na likambo nini Yesu alandi ndakisa ya tata na motema mawa ya lisese?

▪ Ndenge nini mwana na liboso azali kotalela boyambi oyo basaleli ndeko na ye, mpe mpo na nini tokoki koloba ete Bafalisai basalaki lokola ye?

▪ Lisese na Yesu lizali na ndimbola nini na mikolo na biso?