Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liteya ya komikitisa na Pasiká na ye ya nsuka

Liteya ya komikitisa na Pasiká na ye ya nsuka

Mokapo 113

Liteya ya komikitisa na Pasiká na ye ya nsuka

NA BOYOKANI na malako na Yesu, Petelo mpe Yoane basili kokóma na Yelusaleme mpo na kosala bibongiseli ya Pasiká. Yesu akómi na nsima na midi, na ntembe te azali elongo na bantóma mosusu zomi. Wana ezali bango kokita na ngomba ya Olive, moi molali. Ezali mbala ya nsuka oyo Yesu amoni engumba yango na moi, liboso na lisekwa na ye.

Nsima mwa moke, Yesu mpe bantóma na ye bakɔti kati na engumba mpe bakei na ndako epai kuna bakokumisa Pasiká. Bamati na eteni monene na ndako na likoló, epai kuna biloko bisili kobongisama mpo ete basala elambo bobele bango mpenza. Yesu azalaki mpenza kozela eleko wana na motema likoló, mpamba te alobi ete: “Nazalaki na mposa mingi ya kolya Pasiká oyo elongo na bino liboso ete nazwa mpasi.”

Engebene momeseno, bayangani na Pasiká bakomela kopo minei ya vinyo. Nsima na komela moko na bakopo yango, ekokaki kozala kopo ya misato, Yesu abondeli mpe alobi ete: “Kamata oyo mpe kabola yango kati na bino; mpamba te nazali koloba ete, longwa sikawa nakomela lisusu mai na vinyo te kino ekoya bokonzi na Nzambe.”

Wana ezalaki bango kolya, Yesu atelemi, alongoli bilamba na ye ya likoló, azwi epanguseli mpe atondisi mai kati na saani moko monene. Na momeseno, nkolo na ndako azalaki kosenzela ete makolo ya babyangami na ye masukolama. Kasi lokola nkolo na ndako azali te na libaku oyo, Yesu ye moko azwi mokumba yango. Moko kati na bantóma akokaki kosala yango kasi emonani lokola ete mwa kowelana ezali naino kati na bango, mpamba te moko te kati na bango asengaki kokokisa mokumba yango. Batungisami wana Yesu abandi kosukola bango makolo.

Ntango Yesu akómi epai na Petelo, ye oyo alobi ete: “Te, okosukola makolo na ngai te.”

Yesu alobi na ye ete: “Soko nakosukola yo te, ozali kosangana na ngai te.”

Bongo Petelo alobi ete: “Nkolo, bobele makolo na ngai te, kasi na maboko mpe motó lokola.”

“Ye oyo asili kosukola mai asengeli kosukola bobele makolo na ye mpo ete ye nyonso azali peto. Bino bozali peto kasi nyonso te.” Alobi bongo mpamba te ayebi ete Yuda azali komibongisa mpo na kokaba ye.

Esilisi ye kosukola makolo ya bantóma 12, oyo na Yuda mpe lokola, ye oyo akokaba ye, Yesu alati bilamba na ye ya likoló mpe afandi lisusu pene na mesa. Atuni bango ete: “Bososoli nde likambo lisili ngai kosala bino? Bino bokobyanga ngai ‘Molakisi’ mpe ‘Nkolo,’ mpe bozali koloba sembo ete nazali bongo. Soko nde ngai Nkolo mpe Molakisi nasukoli makolo na bino, ekoki na bino ete bosukolana makolo. Mpamba te napesi bino etaliseli ete bino mpe bosala pelamoko esili ngai kosalela bino. Solo solo, nazali koloba na bino ete, moombo aleki nkolo na ye te, mpe ntóma aleki motindi na ye te. Soko boyebi makambo oyo, esengo na bino soko bokosala yango.”

Oyo nde liteya kitoko ya komikitisa! Bantóma basengeli te koluka bobele esika ya liboso, komimonáká motuya mingi kino kokanisa ete bato mosusu basengeli ntango nyonso kosalela bango. Esengeli na bango kolanda ndakisa na Yesu; yango ezali molulu ya kosukola makolo te, kasi ezali nde mposa ya kosalisa bato mosusu kozanga koponapona, ata soko mosala oyo esengeli kokokisa ezali moke to ezali kosepelisa te. Matai 26:20, 21; Malako 14:17, 18; Luka 22:14-18; 7:44; Yoane 13:1-17.

▪ Wana Yesu amoni Yelusaleme, epai wapi akɔti mpo na kokumisa Pasiká, mpo na nini libaku yango ekeseni mpenza na nyonso mosusu?

▪ Na boumeli ya Pasiká, kopo ya boni emonani ete Yesu apesi epai na bantóma 12 nsima na kopambola yango?

▪ Na eleko na Yesu, mosala nini nkolo na ndako azalaki kokokisa epai na babyangami na ye, mpe mpo na nini ezali bongo te wana Yesu azali kokumisa Pasiká elongo na bantoma na ye?

▪ Na mokano nini Yesu ye moko akokisi mosala na kosokema oyo etali kosukola makolo ya bantóma na ye?