Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mapango mpe Mobateli na mpate

Mapango mpe Mobateli na mpate

Mokapo 80

Mapango mpe Mobateli na mpate

YESU abuti na Yelusaleme mpo na elambo ya Epetweli, to Hanukkah, oyo ezali kokundola mokolo babenisaki tempelo mpo na kopesa yango lisusu epai na Jéhovah na mbala ya sika. Ekokaki pene na mibu 200, na mobu 168 liboso na ntango na biso, Antiochus IV Epiphane (mokonzi wa Sulia-Greke) abotolaki engumba, abebisaki tempelo mpe etumbelo na yango. Nzokande, mibu misato na nsima Yelusaleme ezongaki na maboko na Bayuda mpe mpo na mbala ya sika tempelo epesamaki na Nzambe. Epetweli wana ya sika ekumisami bongo mbula na mbula.

Elambo na Epetweli ezali kosalema le 25 Kislev, sanza ya manaka na Bayuda, oyo kati na manaka na biso, ekokani mpenzampenza na eteni ya mibale ya sanza ya novembre mpe na eteni ya liboso ya sanza ya décembre. Na bongo etikali soki mikolo 100 liboso na Pasika ya mobu 33, Pasika oyo ekotikala libela na makanisi na bato. Ezali eleko na malili, lokola ntoma Yoane alobaki yango.

Sikawa Yesu asaleli lisese moko oyo kati na yango azali kolobela mapango misato mpe mokumba oyo ye azali kokokisa lokola Mobateli malamu na bampate. Oyo na liboso kati na mapango yango emonisi kondimana na Mibeko na Moïse. Mibeko mizalaki lokola lopango, kobatelaka Bayuda na misala mabe ya bato oyo bayambamaki te kati na kondimana wana oyo etalaki bobele Bayuda elongo na Nzambe. Yesu alimboli ete: “Solosolo nazali koloba na bino ete, ye oyo akoingela na lopango na bampate na nzela na ekuke te akobuta na esika mosusu, ye wana azali moyibi mpe mobotoli. Nde ye oyo akoingela na nzela na ekuke azali mobateli na bampate.”

Bato mosusu bayaki, kolobaka ete Masiya, to Klisto ezali nde bango, kasi bazalaki mobateli na solo na bampate te oyo Yesu alobi na ntina na ye ete: “Mokengeli na ekuke akofungwela ye mpe bampate bakoyoka mongongo na ye; akobyanga bampate na ye na nkombo mpe akokamba bango libanda. . . . Bakolanda mopaya te kasi bakokima liboso na ye mpo ete bayebi mongongo na bapaya te.”

“Mokengeli na ekuke” na lopango ya liboso ezalaki Yoane Mobatisi. Na mokumba na ye ya mokengeli na ekuke, Yoane ‘afungwelaki’ Yesu na kolakisaka ye epai na bampate na elilingi oyo asengelaki koleisa. Bampate oyo Yesu azali kobyanga na nkombo na bango mpe azali komema bango na libanda, nsuka na yango bakokota kati na lopango mosusu. Ezali yango nde Yesu azali kolimbola: “Solosolo nazali koloba na bino ete, ngai nazali ekuke na bampate,” elingi koloba ekuke na lopango ya sika. Bampate wana bakokotisama kati na lopango wana ya sika ntango Yesu akosala kondimana ya sika elongo na bayekoli na ye mpe, uta likoló, akosopa likoló na bango elimo santu na Pantekote ya nsima.

Yesu ayebisi sikisiki mokumba na ye, kolobaka ete: “Ngai nazali ekuke. Soko moto nani akoingela na nzela na ngai, akobika mpe akoingela mpe akobima mpe akozwa bilei. . . . Ngai nayei ete [bampate] bazala na bomoi mpe bazala na bomoi boleki mingi. . . . Ngai nazali mobateli malamu, nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai bayebi ngai, lokola Tata ayebi ngai mpe ngai nayebi Tata; mpe nakotika bomoi na ngai mpo na bampate.”

Mwa moke liboso, Yesu alendisaki bayekoli na ye na maloba oyo: “Banga te, etonga moke, mpo ete Tata na bino asepeli kopesa bino bokonzi.” Etonga moke wana, oyo nyonso ekozala na basangani 144 000, ekoti kati na lopango wana ya sika to ya mibale. Kasi, Yesu abakisi ete: “Nazali mpe na bampate mosusu baoyo bazali na lopango oyo te, ekoki na ngai kokamba mpe bango mpe bakoyoka mongongo na ngai mpe bakozala etonga moko mpe na mobateli moko.”

Lokola “bampate mosusu . . . bazali kati na lopango oyo te,” elakisi ete lopango mosusu ezali, lopango ya misato. Mapango mibale oyo na nsuka, to bisika na koleisa bampate, ekokani na bilikya bikeseni. “Etonga moke” ya moko na mapango ekoyangela elongo na Klisto kati na makoló, nzokande “bampate mosusu” ya lopango oyo mosusu bakofanda na mabelé oyo makobongwana paradis. Atako bazali kati na mapango mibale makeseni, bampate bazali na zuwa te mpe bazali komona te ete basaleli bango bokesene, mpamba te, lokola Yesu alobi yango, bakomi “etonga moko” etambwisami na “mobateli na mpate bobele moko.”

Yesu Klisto, Mobateli malamu na mpate, andimi kopesa bomoi na ye mpo na bampate ya mapango mibale wana. Alobi ete, “moto alongoli yango na ngai te, nde natiki yango na mokano na ngai mpenza. Nazali na bokonzi na kotika yango mpe nazali na bokonzi na kozwa yango lisusu na nsima. Nazwi lilako oyo epai na Tata na ngai.” Nzokande maloba oyo mabimisi bokabwani kati na Bayuda.

Kati na bibele, mingi balobi ete: “Azali na elimu mabe mpe abeli ligboma. Mpo na nini bozali koyoka ye?” Bamosusu bayanoli ete: “Oyo ezali maloba na moto akangami na elimu mabe te!” Na nsima, komikundolaka ete Yesu abikisaki mokufeli miso sanza mibale liboso, babakisi: “Elimu mabe akoki nde kofungola miso na mokufeli-miso?” Yoane 10:1-22; 9:1-7; Luka 12:32; Emoniseli 14:1, 3; 21:3, 4; Nzembo 37:29.

▪ Elambo na Epetweli ezali nini, mpe ezali kokumisama ntango nini?

▪ Lopango na liboso ezali nini, mpe nani azali mokengeli na ekuke na yango?

▪ Na ndimbola nini mokengeli na ekuke afungoli mpo na Mobateli na mpate, mpe na nsima bampate bakotisami wapi?

▪ Banani bazali na mapango mibale ya Mobateli malamu na mpate, mpe bango nyonso bakomi bitonga boni?