Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mateya likolo na koboma libala mpe kolinga bana

Mateya likolo na koboma libala mpe kolinga bana

Mokapo 95

Mateya likolo na koboma libala mpe kolinga bana

YESU mpe bayekoli na ye bakei na Yelusaleme mpo na koyangana na Pasika ya mobu 33. Eleki bango ebale Yordani, balandi nzela oyo ekatisi na etuka ya Pelea. Yesu asilaki kokoma na etuka yango mwa baposo liboso, kasi basengaki ye na ntango wana ete akoma na Yudea, mpo ete moninga na ye Lazare azalaki mpenza na maladi makasi. Wana ekomaki ye na Pelea, Yesu asololaki na Bafalisai na ntina na koboma libala. Sikawa bazongeli lisusu lisolo yango.

Kati na Bafalisai, ezali na makanisi makeseni na ntina na koboma libala. Moïse alobaki ete mobali akoki koboma libala na mwasi na ye soko amoni “likambo mabe epai na ye.” Bamoko bakanisi ete ezali bobele soko mwasi amitambwisi mabe. Nzokande, bamosusu bamoni ete “likambo mabe” yango etali ata mabunga mikemike. Yango wana, mpo na komeka Yesu, Bafalisai batuni ye ete: “Ebongi nde kolongola mwasi na ntina na makambo nyonso?” Bakanisaki ete ata eyano nini Yesu akopesa, akozala na mindondo elongo na bamoko kati na bango baoyo bazali na makanisi makeseni.

Yesu ayanoli malamu mpenza na motuna yango. Ataleli makanisi na bato te, kasi alobeli mokano na libala ya ebandeli. Atuni boye: “Botangi te ete ye oyo asalaki bango longwa na ebandeli, asalaki bango mobali mpe mwasi? Alobi mpe ete, ˈMpo na ntina oyo, moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye mpe bango mibale bakozala nzoto moko?ˈ Nde bazali lisusu mibale te kasi nzoto moko. Na yango, oyo Nzambe asili kotonga, tika te ete moto akangola yango.”

Yesu alimboli ete mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki ete babalani mibale bazala na bokangani moko na mosusu, kasi baboma libala te. Nde Bafalisai bazongisi ete, soko ezali bongo, “mpo na nini Moise alakaki mpo na kopesa ye mokanda na koboma libala mpe kolongola ye?”

Yesu ayanoli ete: “Moïse atikaki bino kolongola basi na bino mpo na mitema na bino makasi, nde longwa na ebandeli ezalaki bongo te.” Ya solo, ntango Nzambe abongisaki libala ya liboso kati na elanga ya Edene, akanaki te ete libala ekokufa.

Yesu alandi koloba lisusu epai na Bafalisai ete: “Nazali koloba na bino ete, moto nani akolongola mwasi na ye soko mpo na pite [na greke, porneiˈai] te, mpe akobala mosusu, azali kosala ekobo.” Amonisi na ndenge yango ete porneiˈai, liloba oyo lilimboli etamboli ya nsoni, ezali ntina bobele moko oyo endimami na Nzambe mpo na koboma libala.

Ekangi bango ntina ete libala lisengeli koumela seko mpe kobomama bobele mpo na ntina oyo Yesu alobi, bayekoli balobi ete: “Soko bongo mpo na mobali mpe mwasi, ebongi kobalana te!” Na ntembe te, moto nyonso oyo alingi kobala asengeli kokanisa malamu na likambo oyo ete bikanganelo ya libala ezali mpo na libela!

Na nsima, Yesu alobeli bonzemba. Alimboli ete bana mibali misusu babotami mikube: bakoki kobala te mpo ete bazali na mposa ya basi te. Bamosusu bazalisami mikube epai na bato, mpo ete bakatikati nzoto na bango. Mpe, mibali mosusu bazali kokanga mposa na bango ya kobala mpe ya kosangana na mwasi mpo na komipesa mobimba na makambo matali Bokonzi ya makolo. Nde Yesu asukisi na maloba oyo: “Tika ete oyo ayebi koyamba oyo [bonzemba], ayamba yango!”

Sikawa babandi komema bana mike epai na ye. Kasi, bayekoli bapameli bango mpe balingi kobengana bango, na ntembe te balingi te ete Yesu alemba bobele mpamba. Nde Yesu alobi ete: “Tika bana mike koya epai na ngai mpe pekisa bango te, mpo ete Bokonzi na Nzambe ezali na bato motindo oyo. Nalobi na bino solo ete, soko moto nani akoyamba Bokonzi na Nzambe lokola mwana moke te, akokota wana te.”

Oyo nde mateya kitoko Yesu apesi awa! Mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe, esengeli na biso komonisa bopolo mpe kondima kolakisama lokola bana mike. Kasi, ndakisa na Yesu emonisi mpe ntina monene oyo baboti basengeli kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango. Mpe Yesu amonisi bongo bolingo na ye epai na bana mike, azingeli bango maboko mpe apamboli bango. Matai 19:1-15; Deteronome 24:1; Luka 16:18; Malako 10:1-16; Luka 18:15-17.

▪ Bafalisai bazali na makanisi nini makeseni mpo na oyo etali koboma libala, mpe ndenge nini bameki Yesu mpo na yango?

▪ Ndenge nini Yesu ayanoli Bafalisai baoyo bazali koluka komeka ye, mpe wapi ntina bobele moko oyo ye apesi mpo na koboma libala?

▪ Mpo na nini bayekoli na Yesu balobi ete ebongi na mobali kobalana na mwasi te, mpe Yesu apesi etinda nini?

▪ Mateya nini Yesu apesi biso na lolenge na ye ya kosala epai na bana