Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mibembo na Yelusaleme

Mibembo na Yelusaleme

Mokapo 10

Mibembo na Yelusaleme

TOZALI kati na eteni na mibale na marsi mpe eteni na liboso na aprili. Ntango ekoki mpo na Yozefe mpe libota na ye, elongo na bandeko na ye mpe baninga na ye, ete basala mobembo na Yelusaleme mpo na elambo ya Pasika, lokola bameseni kosala mbula nyonso. Nsima na komilengela, banso basimbi nzela mpo na mobembo ya bakilometele soko 100. Yesu azali sikawa na mibu 12, mpe azali kozela elambo oyo na mposa mpenza.

Mpo na Yesu mpe libota na ye, Pasika ezali likambo ya mokolo moko te. Mpamba te, bakotikala na Yelusaleme na ntango ya elambo ya mampa mazangi mfulu oyo ezali kolanda Pasika mpe ekoumelaka mikolo nsambo. Yango wana kokende na Yelusaleme mpe kozonga na Nazarete, bakisa mikolo bakosala na Yelusaleme, ekoumelaka pene na poso mibale. Kasi na mbula oyo, ekoumela lisusu koleka, na ntina na likambo moko likokomela Yesu.

Likambo yango lisalemi na ntango ya kozonga na koutaka na Yelusaleme. Yozefe mpe Marie bakanisi ete Yesu azali kati na etuluku ya bandeko mpe baninga oyo bazali kosala mobembo elongo na bango. Nzokande, ntango batelemi mpo ete butu ekomi, Yesu azali komonana te, mpe baboti na ye babandi koluka ye kati na bato oyo bazali kosala mobembo. Kasi bamoni ye te. Bongo Yozefe mpe Marie bazongi kino na Yelusaleme, mpo na koluka ye.

Baluki ye mokolo mobimba kasi bobele mpamba. Mokolo ya mibale se ndenge moko. Na mokolo ya misato nde bakei na tempelo, mpe kuna kati na eteni na ndako moko, bamoni Yesu afandi na kati na balakisi na Bayuda, azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna.

Bongo mama na ye alobi na ye ete, “Mwana na ngai, mpo na nini osaleli biso boye? Biso na tata na yo toluki yo na motema likolo mpenza.”

Yesu akamwe ete bayebi te esika nini basengelaki komona ye. Atuni bango: “Bozalaki koluka ngai mpo na nini? Boyebaki te ete ekoki na ngai kozala kati na ndako na Tata na ngai?”

Yesu azali se kokamwa na komona ete baboti na ye bayebi likambo yango te. Nsima na oyo, azongi na mboka na bango elongo na tata na ye mpe na mama na ye, mpe alandi kotosa bango. Azali kokola na nzoto, azali mpe kokola na mayele, mpe na boboto na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato. Ee, uta bomwana Yesu azali kopesa ndakisa malamu, bobele na kosepela na makambo na elimo te, kasi lisusu na kozala na botosi epai ya baboti na ye. Luka 2:40-52; 22:7.

Mobembo nini Yesu azali kosala mbula na mbula na sanza ya misato mpe ya minei, elongo na libota na ye, mpe ntango boni yango ezali koumela?

Likambo nini libimi na mobembo oyo basali ntango Yesu azali na mbula zomi na mibale?

Ndakisa nini Yesu apesi na bana ya lelo?