Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mobembo mosusu mpo na kosakola na Galilai

Mobembo mosusu mpo na kosakola na Galilai

Mokapo 49

Mobembo mosusu mpo na kosakola na Galilai

PENE na mibu mibale misili koleka uta Yesu abandaki mosala na ye, mpe asakoli na molende nyonso; sikawa, okanisi ete alingi kolembisa mpo na kopema moke? Soko moke te; abakisi nde mosala na ye, abandi mobembo mosusu, mobembo ya misato oyo akosala yango na Galilai. Azali kotambola na mboka minene mpe na mboka mike nyonso, kolakisaka kati na biyanganelo mpe kosakolaka nsango malamu na Bokonzi. Makambo oyo amoni na mobembo na ye mandimisi ye mpenza ete asengeli kobakisa molende kati na mosala ya kosakola.

Bisika nyonso azali koleka, Yesu amoni ete bato bazali na mposa na libiki mpe kolendisama kati na elimo. Bazali lokola bampate bazangi mobateli, balembi mpe bapalangani, mpe ayokeli bango mawa. Alobi na bayekoli na ye ete: “Ee, mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bobondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga [mpo na kobuka] mbuma na ye.”

Yesu azali na mwango mpo na mosala. Ayanganisi bantóma 12, oyo aponaki esili koleka pene na mbula moko. Akaboli bango na bituluku motoba ya basakoli mibalemibale, mpe apesi bango malako oyo ete: “Bokenda epai na mabota na bapaya te mpe boingela na mboka moko na Basamaria te, kasi bokende liboso epai na bampate babungani na libota na Yisraele. Wana ekokenda bino na nzela, bosakola ete: ‘Bokonzi na likoló esili kobelema.’”

Bokonzi oyo basengeli kosakola ezali oyo Yesu alakisaki bango kobondela mpo na yango, kati na libondeli oyo ateyaki bango lokola elakiseli. Bokonzi ebelemi, elimboli ete Yesu Klisto, Mokonzi aponami na Nzambe, azali wana. Mpo ete bayekoli na ye bakoka kondimisa bato ete bazali bamonisi ya bokonzi yango oyo eleki bikonzi nyonso na bato, Yesu apesi bango nguya ya kobikisa bato na bokono mpe ata kosekwisa bakufi. Alobi na bango ete basala nyonso wana kozanga kosenga lifuti.

Alobi lisusu na bayekoli na ye ete bakumba eloko moko te ya mosuni kati na mobembo na bango mpo na kosakola. “Bokamata wolo to palata te, mosolo na libenga te, biloko bya bolei na nzela te, bilamba bibale te, sapato te, lingenda mpe te, mpamba te mosali akoki ete azwa bilei na ye.” Baoyo bakondima nsango na bango bakopusama na kosala eloko mpo na kopesa bango bilei mpe esika ya kolala. Ezali yango nde Yesu amonisi: “Ekokoma bino na mboka monene nini to mboka moke nini, boluka soko nani azali moto malamu kati na yango. Boumela wana kino ekolongwa bino.”

Na nsima, Yesu apesi epai na bayekoli na ye malako likoló na lolenge oyo basengeli kolakisa nsango ya Bokonzi epai na bafandi na ndako. “Ekoingela bino na ndako, bopesa mbote wana. Soko bato ya ndako wana bazali malamu, tika ete kimya na bino efanda na yango. Nde soko bazali malamu te, tika ete kimya na bino ezonga epai na bino. Mpe soko moto nani akoyamba bino te, akoyoka maloba na bino te, wana ekobima bino na ndako yango to na mboka yango, bobwaka mputulu na matambe na bino.”

Mpo na mboka nyonso oyo ekoboya koyamba nsango malamu, Yesu alobi ete etumbu likoló na yango ekozala na makasi koleka. Alimboli: “Nazali koloba na bino solo ete, na mokolo na kosamba, ekozala malamu mpo na mokili na Sodome mpe Gomore koleka mboka yango.” Matai 9:35 kino 10:15; Malako 6:6-12; Luka 9:1-5.

▪ Ntango nini Yesu abandi mobembo na ye ya misato mpo na kosakola na Galilai, mpe andimisami na likambo nini?

▪ Malako nini apesi epai na bantóma na ye 12 liboso ete atinda bango kosakola?

▪ Mpo na nini ebongi ete bayekoli bateya ete Bokonzi na Nzambe ebelemi?