Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mobembo na nkúku na Yelusaleme

Mobembo na nkúku na Yelusaleme

Mokapo 65

Mobembo na nkúku na Yelusaleme

TOKOMI na mobu 32, mpe elambo na Mingombo ebelemi. Uta Bayuda bakanaki koboma Yesu, na Pasika ya mobu 31, Yesu azalaki kosala mosala mingimingi na Galilai. Azongi lisusu na Yelusaleme te, longola bobele mpo na kokende koyangana na bilambo misato ya Bayuda oyo ekosalemaka mbula na mbula.

Sikawa, bandeko na ye balobi na ye ete: “Longwa awa mpe kenda na Yudea.” Yelusaleme ezali engumba eleki monene kati na Yudea mpe esika ya losambo ya Bayuda nyonso. Bandeko na ye bakanisi boye: “Moto akosalaka makambo na nkúku te wana elingi ye koyebana.”

Atako bango moko bazali kondima te ete Yesu azali Masiya, Yakobo, Simona, Yozefe mpe Yuda balingi ete kulutu na bango akenda kolakisa nguya na ye ya bikamwiseli epai na bato mingi oyo bakoyangana na elambo. Kasi Yesu azali koyeba likama oyo ekoki kobima. “Bamokili bayebi koyina bino te nde bazali koyina ngai mpo ete nazali kotatola mpo na bango ete misala na bango mizali mabe.” Mpo na yango, Yesu alobi epai na bandeko na ye ete: “Bino bobuta na elambo. Ngai nakobuta naino na elambo oyo te.”

Elambo na Mingombo eumelaka mikolo nsambo mpe esilaka na mokolo ya mwambe. Elambo oyo esukisaka mobu ya baloni bilanga; ezali eleko ya esengo mpe matondi. Mikolo mingi nsima wana bandeko na ye bakendaki elongo na bato mingi na mobembo yango, Yesu mpe bayekoli na ye bakei na nkúku mpe bamonani epai na bato te. Bakei na nzela na Yordani te, nzela oyo bato mingi bakendaka na yango, kasi bakatisi Samaria.

Lokola basengeli kotelema na mboka moko ya Basamaria, Yesu atindi bato liboso na ye mpo ete babongisa esika na kolala. Kasi bato baboi koyamba ye mpo bayoki ete azali kokenda na Yelusaleme. Yakobo mpe Yoane basiliki mpo na yango, mpe balobi na Yesu: “Nkolo, olingi ete tobyanga móto na likoló ekita mpe eboma bango?” Yesu apameli bango mpo na yango, mpe bakei na mboka mosusu.

Wana ezali bango koleka na nzela, mokomeli moko alobi epai na Yesu: “Soko okokenda wapi, nakolanda yo.”

Yesu alobi na ye ete: “Gambala bazali na mabulu, mpe ndeke na likoló bazali na bibombamelo, nde Mwana na moto azali na esika na kolalisa motó na ye te.” Yesu amonisi bongo epai na mokomeli yango ete mikakatano mizali kozela ye soko akomi moyekoli na ye. Emonani lokola ete moto yango azali na lolendo mingi na boye ete akoki kondima bomoi ya motindo wana te.

Yesu abengi moto mosusu: “Landa ngai!”

Kasi moto yango ayanoli: “Pesa ngai nzela liboso ete nakenda kokunda tata na ngai.”

Yesu alobi na ye: “Tika bakufi kokunda bakufi na bango mpenza, nde yo kenda kosakola Bokonzi na Nzambe.” Tata na moto yango akufaki naino te, mpamba te mbele mwana na ye alingaki kozala na esika wana te, mpo na koyoka Yesu. Alobaki boye nde mpo na kosenga nzela epai na Yesu ete azela kino tata na ye akokufa. Azalaki pene te mpo na kotya Bokonzi na Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na ye.

Yesu mpe bayekoli na ye balandi mobembo na bango mpo na kokenda na Yelusaleme. Moto mosusu alobeli ye boye: “Nkolo, nakolanda yo, nde tika nakende liboso kopesa mbote ya bokabwani na bato na ndako na ngai.”

Mpo na eyano, Yesu alobi na ye: “Moto oyo asimbi nkongo mpo na kosala elanga mpe azali kotala na nsima abongi na Bokonzi na Nzambe te.” Ya solo mpenza, baoyo balingi kokoma bayekoli na Yesu basengeli kotya miso na bango na mosala ya Bokonzi. Lokola mosali na bilanga akoki kosala mikala mitengami soko atiki kotala liboso na ye, ye oyo akotala nsima na ye, epai na biloko mabe ya ntango oyo, akoki mpenza kopengwa na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yoane 7:2-10; Luka 9:51-62; Matai 8:19-22.

▪ Tanga nkombo ya baleki mibali ya Yesu, mpe bakanisi nini mpo na ye?

▪ Mpo na nini Basamaria baboi koyamba Yesu, mpe Yakobo na Yoane balingi kosala nini?

▪ Na nzela, masolo nini misato Yesu asololi yango na bato, mpe ndenge nini Klisto amonisi ntina ya kosalela Nzambe na elimo ya komiboya?