Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mobongisi nzela abotami

Mobongisi nzela abotami

Mokapo 3

Mobongisi nzela abotami

ELIZABETE akomi pene na kobota. Na boumeli ya sanza misato, Marie afandaki epai na ye, kasi sikawa ntango ekoki mpo na ye ete akoka kozonga. Asengeli kosala mobembo molai mpo na kozonga kino na Nazarete. Nsima ya sanza motoba ye mpe akobota.

Mwa ntango moke nsima na kokenda ya Marie, Elizabete aboti mwana mobali. Bato banso bazali na esengo mpo ete kobota eleki malamu, mama mpe mwana bazali na nzoto kolongonu. Elizabete azali kolakisa mwana epai na bato bafandi penepene na ye mpe epai na bandeko na ye, mpe bango nyonso bazali na esengo.

Engebene Mobeko na Nzambe, bana mibali nyonso na Yisraele basengeli kokatama ngenga, na mokolo ya mwambe. Na libaku yango bandeko ya Elizabete balobi ete bapesa mwana nkombo Zakaria, lokola tata na ye. Kasi Elizabete aboi. Alobi ete: “Bongo te, kasi akobyangama Yoane.” Omikundola ete, ezali nkombo yango nde anzelu Gabriele alobaki na Zakaria ete apesa na mwana.

Baninga na bango bandimi ye te; balobi ete: “Moto moko te kati na libota na yo abyangami na nkombo oyo.” Mpo na kokata likambo, batuni tata na bilembo, soki nkombo nini alingi kopesa na mwana na ye. Zakaria asengi libaya mpe akomi ete: “Nkombo na ye Yoane.” Bango nyonso bakamwi mingi.

Bobele na ngonga wana, na likamwisi, monoko na ye mpe lolemo na ye efungwami mpe abandi koloba lisusu. Ozali koye-ba lisusu ete akomaki baba mpo ete andimaki te maloba oyo anzelu Gabriele ayebisaki ye, ete Elizabete akobota mwana. Ntango Zakaria abandi lisusu koloba bato banso bakamwi mpe bazali kotunana ete: “Mwana oyo akozala nani?”

Sikawa Zakaria atondi na elimo santu; na esengo nyonso; alobi ete: “Jehovah Nzambe na Yisraele asanzolama mpo ete atali bato na ye mpe abongisi lisiko na bango. Atelemisi mpo na biso Mobikisi makasi kati na ndako na Davidi mosaleli na ye.” “Mobikisi makasi” ezali bongo Nkolo Yesu, oyo mosika te akobotama. Zakaria alobi ete, na nsima na ye nde Nzambe ˈakopesa biso, wana ekosikolama biso liboso na bayini na biso, libaku kitoko ya kosalela ye mosala na bulee na kobanga te, na sembo mpe na boyengebene liboso na ye mikolo na biso nyonso.ˈ

Na nsima Zakaria asakoli na ntina na mwana na ye Yoane, alobi ete: “Yo mwana, okobyangama mosakoli na Oyo-Aleki-Likolo, mpo ete okokenda liboso na Jehovah kobongisa nzela na ye, mpo na kolakisa bato na ye nzela ya lobiko, mpo na kolimbisama na masumu na bango na motema na mawa na Nzambe na biso. Na mawa yango kotana na ntongo na likolo ekotanela biso, mpo na komonana na bango bafandi kati na butu mpe na molili na kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso na nzela na kimya.”

Na ntango wana, Marie, oyo abali naino te, asili kozonga epai na ye, na Nazarete. Nini ekokomela ye ntango bato banso bakomona ete azali na zemi? Luka 1:56-80; Levitike 12:2, 3.

Yoane abotami sanza boni liboso na Yesu?

Nini esalami na mokolo na mwambe nsima ya kobotama na ye?

Ndenge nini Nzambe ayaki kotala bato na ye?

Mosala nini Yoane asengeli kosala, engebene esakweli?