Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokonzi mabe alongi te

Mokonzi mabe alongi te

Mokapo 8

Mokonzi mabe alongi te

YOZEFE alamusi Marie. Azali na likambo asengeli koyebisa ye noki. Anzelu ya Jehovah abimeli ye mpe alobi na ye: “Telema, kamata mwana mpe mama na ye mpe kima na Ezipito; umela kuna kino ekoloba ngai na yo. Mpamba Herode akani ete aluka mwana mpo na koboma ye.”

Bongo, bakimi bango nyonso misato. Ntango ya kobungisa ezali te, mpamba te Herode asili koyoka ete banganga-minzoto bakosi ye mpe basili kozonga na mokili na bango. Omikundola lisusu ete, mbele basengelaki kozonga koyebisa ye soki bamoni Yesu. Herode asiliki makasi. Bongo mpo na kokoka koboma Yesu, apesi etinda ete baboma bana nyonso ya mibali baoyo bazali na mibu mibale kino na nse kati na Beteleme mpe na bamboka mosusu penepene wana. Akati mbula yango na kolandaka makambo oyo banganga-minzoto bayebisaki ye.

Kobomama ya bana mibali oyo nyonso ezali likambo ya nsomo. Basoda ya Herode bazali kokota na makasi na ndako moko moko, mpe bazali kobotola bana mibali na maboko ya bamama na bango. Toyebi te bana boni bango babomi, kasi kolela mpe mawa ya bamama oyo ekokisi esakweli moko ya Biblia, na mokanda ya Yilimia, mosakoli ya Nzambe.

Yozefe mpe Libota na ye basili kokoma malamu na Ezipito epai bazali kofanda sikawa. Kasi mokolo mosusu, na butu, anzelu ya Jehovah abimeli lisusu Yozefe na ndoto. Alobi na ye ete: “Telema, kamata mwana mpe mama na ye mpe kenda na mokili ya Yisraele, mpamba te baoyo bazalaki koluka bomoi ya mwana basili kokufa.” Yango wana, Yozefe mpe libota na ye bazongi na mboka na bango, mpe yango ekokisi esakweli mosusu ya Biblia oyo elobaki ete Nzambe akobenga Mwana na ye longwa na Ezipito.

Emonani lokola ete Yozefe azali na mposa ya kofanda na Yudea, esika azalaki kofanda liboso ete akima na Ezipito. Kasi ayoki ete Arkelause, mwana mabe ya Herode, akomi mokonzi ya Yudea mpe, na ndoto mosusu, Jehovah akebisi ye mpo na likama yango. Yozefe mpe libota na ye bakei bongo epai na nordi mpe bafandi na engumba ya Nazarete. Yesu akolaki wana, mosika na mboka monene ya losambo ya Bayuda. Matai 2:13-23; Yilimia 31:15; Hosea 11:1.

Lokola banganga-minzoto bazongi epai na ye te, likambo nini ya nsomo Hérode asali? Kasi ndenge nini Yesu abatelami?

Wana elongwi bango na Ezipito, mpo na nini Yozefe afandi lisusu na Beteleme te?

Bisakweli nini ya Biblia bikokisami bongo na eleko yango?