Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokumba na moyekoli

Mokumba na moyekoli

Mokapo 84

Mokumba na moyekoli

NSIMA na kotika ndako ya Mofalisai na lokumu, ekoki kozala moko na basangani ya Sanedrina, Yesu azongeli mobembo na ye mpo na kokende na Yelusaleme. Bibele bazali kolanda ye. Kasi eloko nini ezali kopusa bango? Kozala moyekoli na solo ya Yesu, esengi nini mpenza?

Na nzela, Yesu abaluki epai na bibele mpe alobi na bango maloba oyo mbala mosusu epesi bango mpasi na motema: “Soko moto ayei epai na ngai mpe ayini tata na ye te, na mama na ye te, na mwasi na ye te, na bana na ye te, na bandeko na ye babali te, na bandeko na ye basi te, mpe molimo na ye mpenza te, akoki kozala moyekoli na ngai te.”

Yesu alingi koloba nini? Awa alingi koloba te ete bayekoli na ye basengeli koyina mpenza basangani ya libota na bango, kasi koyina bango na ndimbola oyo ete basengeli kolinga bango moke mpo ete balinga ye koleka. Na ndakisa, elobami mpo na Yakobo, nkoko na Yesu ete, ˈayinakiˈ Lea mpe alingaki Rachel. Na maloba mosusu, Lea alingamaki mingi te lokola ndeko na ye ya mwasi Rachel.

Totala Yesu alobi lisusu ete, moyekoli na ye asengeli koyina “molimo na ye,” to bomoi. Wana lisusu, alingi koloba ete moyekoli ya solo asengeli kolinga ye koleka lolenge oyo akolingaka bomoi na ye mpenza. Na bongo, Yesu ayebisi yango malamumalamu ete, kokoma moyekoli na ye ezali mpenza mokumba monene. Ezali te ekateli oyo esengeli kozwama kozanga kokanisa malamu.

Kozala moyekoli na Yesu elimboli kokutana na mimekamo mpe minyoko: “Ye oyo akumbi nzete na ye na mpasi te mpe alandi ngai te akoki kozala moyekoli na ngai te.” Na yango, moyekoli ya solo asengeli kondima komema bozito ya nsoni lokola oyo Yesu ayikelaki yango mpiko, nsoni oyo ekoki komema soki yango esengeli, kino na liwa kati na maboko ya banguna na Nzambe. Yango nde ezali kozela Yesu.

Na yango, bibele oyo bazali kolanda Klisto bazali na mposa ya kososola malamumalamu likambo oyo elimboli kozala moyekoli na ye. Yesu amonisi likambo yango na nzela ya lisese moko. Alobi na bango ete: “Nani kati na bino, soko azali na mposa na kotonga ndako, akofanda naino liboso te ete atanga motuya na yango mpo na kotala soko azali na mosolo mpo na kosilisa yango? Soki te, akotya moboko, nde akosilisa yango te, mpe bango nyonso bakotala yango, bakobanda koseka ye ete: ˈMoto oyo abandaki kotonga nde akokaki kosilisa te.ˈ”

Lokola Yesu alimboli yango epai na ebele na bayoki na ye baoyo bazali kolanda ye ete, liboso na kokoma bayekoli na ye bato yango basengeli mpenza kozwa ekateli makasi mpo na komema mikumba misengisami na liponi motindo wana, lokola moto oyo alingi kotonga ndako molai akomindimisaka liboso na kobanda ete, azali na mosolo mosengeli mpo na kosilisa yango. Na nsima Yesu apesi lisese mosusu:

“To mpe mokonzi nani, soko akokenda kobundisa mokonzi mosusu etumba, akofanda naino liboso te mpo na kokanisa soko na bato nkoto zomi, akokoka kotemela ye oyo azali koya na bato nkoto ntuku mibale? Soko akokoka te, naino ezali ye mosika, akotinda bantoma kotuna makambo na kimya.”

Yesu amonisi liteya ya masese wana ete: “Bobele bongo moto na moto na kati na bino akoboya biloko nyonso bizali na ye te, akoki kozala moyekoli na ngai te.” Tala likambo bato oyo bazali kolanda ye basengeli kondima kosala yango, mingi mpenza, moto na moto oyo ayebi Klisto. Soko balingi kozala bayekoli na ye, basengeli kondima kobungisa biloko nyonso oyo bazali na yango − bozwi na bango nyonso − mpe kino bomoi na bango. Osili komilengela mpo na komipesa motindo wana?

Yesu akobi ete: “Mongwa ezali malamu.” Liboso mpenza, kati na Lisolo na ye likolo na ngomba, alobaki ete bayekoli na ye bazali “mongwa na mokili,” na ndimbola oyo ete, lokola mongwa ezali na nguya ya kobatela biloko ete bipola te, maloba na bango makoki mpe kobatela bomoi ya baoyo bazali koyoka bango. Asukisi ete: “Soko nde elengi na mongwa esili, yango ekozwa elengi na nini? Ebongi na mabele te, soko na bipolu te. Kasi ekobwakama libanda. Tika oyo azali na matoi ya koyoka ayoka!”

Yesu amonisi wana ete ata baoyo bazali bayekoli na ye uta mwa ntango mingi, basengeli te kolemba kati na ekateli na bango ya kolanda kotambola kati na nzela wana. Soki te, bakozala na ntina mpenza te, bakokoma biloko na koseka mpo na bato ya mokili mpe bakondimama epai na Nzambe te, na mokuse, bakoyokisa Nzambe nsoni. Lokola mongwa mosili elengi mpe mobebi, bakobwakama na libanda, bakobomama. Luka 14:25-35; Genese 29:30-33; Matai 5:13.

ˈKoyinaˈ baboti na yo mpe ˈkomiyinaˈ yo moko elimboli nini?

▪ Yesu asaleli masese mibale. Yango nini mpe elimboli nini?

▪ Maloba ya nsuka na Yesu na ntina na mongwa mapesi liteya nini?