Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mongongo na Nzambe moyokami mpo na mbala ya misato

Mongongo na Nzambe moyokami mpo na mbala ya misato

Mokapo 104

Mongongo na Nzambe moyokami mpo na mbala ya misato

KATI na tempelo, Yesu auti komonisa mpasi oyo azali kooka mpo na liwa na ye oyo ebelemi. Likambo lizali kotungisa ye mingi, ezali nsoni oyo yango ekobwaka likoló na nkombo ya Tata na ye. Nde abondeli ete: “Tata, kumisa nkombo na yo.”

Na maloba wana, mongongo makasi mouti na likoló, ete: “Nasili kokumisa yango mpe nakokumisa yango lisusu.”

Bato oyo bazali wana bakamwe. Bamoko balobi: “Anzelu alobi na ye.” Bamosusu balobi, ezali nkake. Kasi na solo mpenza, ezali Jéhovah Nzambe nde alobi. Nzokande, ezali mbala ya liboso te oyo mongongo na ye moyokami na ntina na Yesu.

Na yango, eleki sikawa mbula misato na ndambo, ntango Klisto azwaki batisimo, Yoane mobatisi ayokaki Nzambe koloba na ntina na ye ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.” Lisusu, mwa ntango moke nsima na Pasiká oyo euti koleka, Yesu asalaki ebongwaneli liboso na Yakobo, na Yoane mpe Petelo, bayokaki mongongo na Nzambe koloba ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi; boyoka ye.” Mpe lelo, mokolo ya 10 Nisan, mikolo minei liboso na liwa na Yesu, bato bayoki mongongo ya Nzambe mpo na mbala ya misato. Kasi ya mbala oyo, Jéhovah alobi na motindo boye ete bibele na bato bayoka ye.

Yesu alimboli ete: “Mongongo oyo eyei mpo na ngai te kasi mpo na bino.” Mongongo wana mozali elembeteli ete Yesu azali mpenza Mwana na Nzambe, Masiya na elaká. Yesu abakisi ete: “Mokili mozali sikawa kosambisama; sikawa mokonzi ya mokili oyo akobwakama libándá.” Ya solo, bomoi na ye ya sembo awa na mabelé emonisi ete Satan le Diable, mokonzi ya mokili oyo asengeli “kobwakama” na libándá, elingi koloba akobomama.

Na ntina na liwa na ye oyo libelemi, mpe makambo oyo makobima na yango, Yesu alobi ete: “Soko ngai nakolongolama na mokili, nakobenda bato na mitindo nyonso epai na ngai.” Liwa na ye elimboli te ete alóngi te, mpamba te na nzela yango nde akobenda bato epai na ye ete bazwa bomoi ya seko.

Kasi bibele balobi ete: “Biso toyoki kati na Mibeko ete Klisto akoumela seko. Motindo nini yo ozali koloba ete Mwana na moto akokenda na likoló? Mwana na moto azali nani?”

Atako bilembeteli nyonso wana, kati na yango mongongo na Nzambe, Bayuda mingi bazali kondima te ete Yesu azali mpenza Mwana na moto, Masiya na elaká. Atako bongo, lokola asalaki yango sanza motoba liboso na elambo na Mingombo, Yesu alobi lisusu ete azali “pole” mpe apesi toli oyo epai na bayoki na ye: “Naino bozali na pole, bondima pole ete bokóma bana na pole.” Nsima na koloba bongo, akei na ye mpe amibómbi, na ntembe te mpo amoni ete bomoi na ye ezali na likámá.

Bayuda bandimeli Yesu te; ezali bongo nde maloba na Yisaya makokokani, ete ‘miso na bango makozipama mpe motema na bango mokooka eloko te, mpo ete babongwana te mpe babikisama te.’ Na emonaneli, Yisaya amonaki kiti na bokonzi na Jéhovah mpe Yesu pene na Jéhovah, kati na nkembo na ye oyo azalaki na yango liboso ete akóma moto. Atako bongo, na boyokani na esakweli, Bayuda baboyi na motó makasi nyonso kondima bilembeteli oyo bimonisi ete Moto yango azali Mobikisi na elaká.

Nzokande, bato mingi bandimeli Yesu, ata mikonzi (na ntembe te basangani ya Sanedrina, Esambiselo monene ya Bayuda), kati na bango Nikodeme mpe Yozefe moto na Arimaté. Kasi, mpo na sikawa, bakonzi bazali komonisa kondima na bango polele te, bazali kobanga ete babimisama na eyanganelo te mpe babungisa mikumba na bango te. Bazali mpenza komipimela makambo kitoko.

Yesu alobi lisusu ete: “Ye oyo akondima ngai azali bobele kondima ngai te kasi Motindi na ngai mpe lokola. . . . Soko nani akoyoka maloba na ngai mpe akotosa yango te, ngai nakosambisa ye te; mpamba te nayei mpo na kosambisa mokili te nde mpo na kobikisa mokili. . . . Liloba lisili ngai kosolola, likosambisa ye na mokolo na nsuka.”

Mpo na bolingo na ye epai na bato, Jéhovah atindaki Yesu, ete baoyo bakondimela ye babikisama. Bato bakobika to bakobomama na kotalela botósi na bango na makambo oyo Yesu asili koloba na lotómo na Jéhovah. Kosambisama ekozala “na mokolo ya nsuka,” na boumeli na Boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto.

Yesu asukisi ete: “Nalobi makambo na ngai moko te kasi na motindi na ngai, Tata ye moko, asili kolakisa ngai yango ezali ngai koloba mpe yango ezali ngai kosolola. Nayebi ete lilako na ye lizali bomoi ya seko. Yango ekosolola ngai, nakoloba lokola Tata asili koyebisa ngai.” Yoane 12:28-50; 19:38, 39; Matai 3:17; 17:5; Yisaya 6:1, 8-10.

▪ Tángá mbala misato oyo mongongo na Nzambe moyokamaki na ntina na Yesu?

▪ Lolenge nini mosakoli Yisaya amonaki nkembo na Yesu?

▪ Banani bazali bakonzi oyo bandimeli Yesu, kasi mpo na nini bazali koyambola te kondima na bango polele?

▪ “Mokolo ya nsuka” elimboli nini mpe bato bakosambisama na kotalela likambo nini?