Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mosamaria moko na motema malamu

Mosamaria moko na motema malamu

Mokapo 73

Mosamaria moko na motema malamu

MBALA mosusu Yesu azali penepene na Betania, mboka moko ezwami pene na kilometele misato na Yelusaleme. Moto moko oyo ayebi malamu Mibeko na Moïse abelemi epai na ye mpe atuni ye ete: “Molakisi, nasala nini mpo ete nazwa bomoi na seko?”

Yesu asosoli ete moto yango, molakisi na mibeko, atuni ye bobele mpo na kozwa boyebi te, kasi nde mpo na komeka ye. Mbala mosusu alingi ete Yesu ayanola na lolenge moko oyo ekopesa nkanda epai na Bayuda. Na bongo Yesu abendi molakisi na mibeko na koloba, na kotunaka ye boye: “Likambo nini ekomami kati na mibeko? “Otangi nini na yango?”

Na bososoli mozindo, molakisi na mibeko atangi mobeko moko na Nzambe ekomami kati na Deteronome 6:5 mpe na Levitike 19:18, oyo ete: “‘Okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba, mpe na mayele na yo mobimba,’ mpe ‘okolinga mozalani na yo lokola yo mpenza.’”

Yesu alobi ete: “Ozongisi malamu, sala boye mpe okozala na bomoi.”

Kasi molakisi na mibeko asepeli te. Eyano na Yesu ezali mpenza sikisiki te mpo na ye. Alingi koyoka na monoko na Yesu mpenza ete likanisi na ye ezali malamu mpe ete azali sembo na lolenge na ye ya kosala liboso na bamosusu. Yango wana atuni Yesu ete: “Mozalani na ngai nani?”

Bayuda bazalaki kokanisa ete liloba “mozalani” ezali bobele mpo na baninga na bango Bayuda, engebene oyo maloba na zingazinga ya Levitike 19:18 ezali komonisa. Nkutu, na nsima, ata ntoma Petelo alobaki: “Bino boyebi ete ekoki na mobali Moyuda kosangana soko kobelema na bato na libota mosusu te.” Na bongo, molakisi na mibeko oyo mpe mbala mosusu bayekoli na Yesu bazali kondima ete bazali sembo soki bakosala malamu bobele epai na Bayuda mosusu mpamba te, na makanisi na bango, moto oyo azali Moyuda te azali mpenza mozalani na bango te.

Ndenge nini Yesu akosembola likanisi na bango, kozanga ete azokisa bayoki na ye? Apesi lisolo moko, mbala mosusu yango ezwami na likambo moko oyo esalemaki mpenza. “Moto moko [Moyuda] azalaki kokita na Yelusaleme kokenda na Yeriko. Akweaki kati na babotoli, mpe bango balongolaki bilamba na ye, mpe babeti ye, mpe kokenda na bango batiki ye penepene na kufa.”

Akobi: “Likambo ebimi boye ete nganga moko azalaki kokita na nzela yango, mpe amonaki ye, mpe aleki na epai mosusu. Bobele bongo Molewi akomi na esika yango, mpe amonaki ye, mpe aleki na epai mosusu. Nde Mosamaria azalaki kotambola mobembo, akutaki ye, mpe emonaki ye ayokelaki ye mawa mingi.”

Banganga mingi, mpe Balevi oyo bazali kosalisa bango na tempelo na Yelusaleme, bazali kofanda na Yeriko. Yango wana, ntango bazali kozonga epai na bango, mboka oyo ezali na nse mpenza, kino bametele 900, basengeli kotambola bakilometele ntuku misato na nzela moko ya makama. Bato bakokaki komizela ete nganga mpe Molevi basalisa moko na bandeko na bango Moyuda oyo azali na mpasi. Kasi basali bongo te. Ezali nde Mosamaria moko moto akosala yango. Bayuda bayinaka makasi Basamaria mpe, kala mingi te, bafingaki Yesu na maloba mabe koleka ntango babengaki ye “Mosamaria.”

Na lolenge nini Mosamaria asalisaki Moyuda? “Mpe akendaki epai na ye mpe akangi mpota na ye mpe asopi mafuta ná vinyo na kati na yango, mpe abutisi ye na mpunda na ye mpenza, mpe akei na ye na ndako na bato na mobembo, mpe abateli ye. Na mokolo na nsima abimisi denali mibale [pene na lifuti ya mikolo mibale], mpe apesi yango na mobateli na ndako, mpe alobi ete: ‘Batela ye, mpe soko okosilisa mosolo mosusu boni, nakozongisela yo yango wana ekozonga ngai awa.’”

Ntango lisolo na ye esili, Yesu atuni na molakisi na mibeko ete: “Na kati na bango misato okanisi nani azalaki mozalani na oyo akweaki kati na babotoli?”

Molakisi na mibeko ayoki esengo te mpo na kokumisa Mosamaria atako bongo ayonali ete: “Ye oyo ayokelaki ye mawa.”

Yesu alobi na ye ete, “kenda na yo kosala bobele bongo.”

Soki Yesu alobelaki molakisi na mibeko mbala moko ete Mopakano nyonso azalaki mpe moninga na ye, mbele molakisi wana na mibeko alingaki kondimela ye te; epai mosusu, ebele na bayoki oyo bazalaki wana mbele balingaki kokotela molakisi na mibeko kati na lisolo wana elongo na Yesu. Nzokande, lisolo wana oyo elobelaki likambo likoki solo kosalema, emonisaki na lolenge ya polele ete moto nyonso akoki kozala mozalani na biso, nde bobele bato ya loposo na biso te mpe ya ekolo na biso te. Ya solo, Yesu azali moteyi monene! Luka 10:25-37; Misala 10:28; Yoane 4:9; 8:48.

▪ Mituna nini molakisi na mibeko atuni epai na Yesu, mpe makanisi na ye mazali mpenzampenza nini?

▪ Mpo na Bayuda, nani azali mozalani na bango? Mpo na nini ebongi kokanisa ete ata bayekoli bazali mpe kondima likanisi wana?

▪ Ndenge nini Yesu alakisi likanisi malamu na lolenge boye ete molakisi na bino akoka kotemela yango te?