Mosika te Yesu akokufa, kasi bayekoli bazali koswana
Mokapo 98
Mosika te Yesu akokufa, kasi bayekoli bazali koswana
YESU mpe bayekoli na ye bauti kokatisa ebale Yordani, mpo na koleka na etúká ya Peleo mpe kokóta na mokili ya Yudea. Bato mingi mosusu bakei elongo na bango mpo na kokumisa Pasiká ya mobu 33, oyo etikali soko poso moko ete esalema.
Yesu atamboli liboso na bayekoli na ye, mpe bazali kokamwa na ntina na molende na ye. Bamikundoli ete, mwa baposo liboso, ntango Yesu azalaki komibongisa ete atika Peleo mpo na kokende na Yudea na liwa ya Lazare, Toma alendisaki bayekoli mosusu ete: “Biso mpe tokenda ete tokufa na ye elongo.” Bamikundoli lisusu ete bakonzi ya Sanedrina balukaki koboma Yesu nsima wana asekwisaki Lazare. Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete bayekoli bazala na kobanga wana ezali bango kokóta lisusu na Yudea.
Mpo na kobongisa bango na makambo bakokutana na yango, Yesu abendi bazomi na mibale na pembeni mpe alobi na bango ete: “Tala tozali kobuta na Yelusaleme mpe Mwana na moto akokabama na banganga-kapita mpe na bakomeli mpe bakokweisa ye ete akufa, mpe bakokaba ye epai na bapakano ete atyolama mpe abetama mpe abomama likoló na nzeté mpe mokolo na misato akosekwa na bakufi.”
Ezali mbala ya misato na boumeli ya mwa basanza oyo Yesu alobeli bayekoli na ye na ntina na liwa mpe lisekwa na ye. Mpe bango, atako bazali koyoka ye, kasi bazali kokanga ntina te. Ezali mbala mosusu mpo bakanisi ete bokonzi na Yisraele bokozongisama na mabelé, mpe bazali na elikya makasi ya kozwa nkembo mpe lokumu kati na bokonzi ya mabelé elongo na Klisto.
Kati na basali mobembo oyo bakei kokumisa Pasiká, Salomé, mama na ntóma Yakobo mpe ntóma Yoane azali wana. Yesu apesaki mibali wana nkombo “Bana na Nkaké,” na ntembe te ezali mpo na molende na bango. Kasi, uta mwa ntango, bango nyonso mibale bazali na elikya ya kozala na esika monene kati na Bokonzi na Klisto, mpe bayebisaki mposa na bango epai ya mama na bango. Tala ye oyo akei epai na Yesu mpo na kolobela bango; akumbami liboso na ye mpe asengi eloko moko.
Yesu atuni ete: “Olingi nini?”
“Pesa nzela ete bana na ngai mibale bafanda moko na loboko na yo na mobali mpe mosusu na loboko na yo na mwasi kati na bokonzi na yo.”
Koyebáká epai wapi likanisi wana liuti, Yesu alobi na Yakobo mpe Yoane ete: “Boyebi yango esengi bino te. Bokoki nde komela kopo ekomela ngai?”
Bango bazongisi ete: “Tokoki.” Atako Yesu auti koyebisa bango ete akei kokutana na monyoko makasi kino akobomama, emonani lokola ete bakangi ntina te ete ezali yango nde elimboli “kopo” oyo azali pene na komela yango.
Atako bongo, Yesu alobi na bango ete: “Bokomela kopo na ngai, nde kofanda na loboko na ngai na mobali mpe na loboko na ngai ya mwasi ezali nde likambo na ngai te kopesa yango, kasi ezali mpo na bango babongisami mpo na yango na Tata na ngai.”
Nsima na yango, bantóma mosusu zomi bayoki likambo oyo Yakobo mpe Yoane basengi, mpe basiliki mpo na yango. Mbala mosusu Yakobo mpe Yoane balobaki mingi koleka kati na kowelana oyo bayekoli bazalaki na yango, mwa moke liboso, mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene. Lilɔmbo na bango limonisi ete basalelaki te toli oyo Yesu apesaki mpo na likambo yango. Mawa! Mposa na bango ya kozala na esika na lokumu ezali naino makasi.
Mpo na kosilisa matáta wana mpe likunya oyo yango ebimisaki, Yesu ayanganisi bongo bazomi na mibale. Na bolingo nyonso, apesi bango toli oyo: “Boyebi ete mikóló na bapakano bazali bakonzi likoló na bango mpe bato minene bakonyokola bango na makasi. Nde kati na bino ezala bongo te. Ye oyo alingi kozala monene kati na bino, akóma mosali na bino, mpe ye oyo alingi kozala moto na liboso na bino, azala moombo na bino.”
Yesu apesi ndakisa oyo basengeli komekola; ezali oyo ete: “Bobele bongo Mwana na moto ayaki mpo na kosungama te, kasi mpo na kosunga mpe kopesa molimo na ye lokola lisiko mpo na mingi.” Yesu asaleli bobele bazalani na ye te, kasi akokufa mpe mpo na bato nyonso! Bayekoli bazali na mposa ya kozala na elimo motindo oyo: basengeli koluka kosalela na esika ete bato mosusu basalela bango, basengeli komikitisa na esika ya koluka etelemelo monene. Matai 20:17-28; Malako 3:17; 9:33-37; 10:32-45; Luka 18:31-34; Yoane 11:16.
▪ Mpo na nini bayekoli bazali kobanga sikawa?
▪ Ndenge nini Yesu azali kobongisa bayekoli na ye mpo na makambo oyo makobima na nsima?
▪ Lilɔmbo nini lisalemi epai na Yesu, mpe bantóma mosusu basali nini?
▪ Ndenge nini Yesu akáti likambo oyo likaboli bantóma na ye?