Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moto abomami na elambo ya bokundoli mbotama

Moto abomami na elambo ya bokundoli mbotama

Mokapo 51

Moto abomami na elambo ya bokundoli mbotama

NSIMA na kopesa bango malako, Yesu atindi bantóma na ye mibalemibale kati na bamboka epai basengeli kosakola. Ekoki kozala ete Petelo akei elongo na ndeko na ye André, Yakobo elongo na Yoane, Filipe elongo na Bartelemi, Toma elongo na Matai, Yakobo elongo na Tadé mpe Simona elongo na Yuda Iskariote. Esika nyonso bazali koleka, bituluku motoba oyo ya basakoli bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe bazali kosala bikamwiseli mpo na kobikisa bato.

Na ntango yango, Yoane Mobatisi azali se na boloko. Esili kokoka mibu mibale. Na ntembe te bozali komikundola likambo yango: Yoane alobaki polele ete Hérode Antipas asalaki mabe lokola akamataki Hérodiade, mwasi ya ndeko na ye ya mobali Filipe, ete akoma mwasi na ye. Yoane azalaki na ntina mpo na kopamela libála wana ya ekobo, mpamba te Hérode Antipas azalaki koloba ete azali kolanda Mibeko na Moïse. Hérode abwakaki Yoane na boloko, mbala mosusu mpo na bopúsi na Hérodiade.

Hérode Antipas ayebi ete Yoane azali moto na sembo mpe azali koyokamela ye na esengo. Azalaki mpenza kokakatana soki akosalela ye nini. Nzokande, Hérodiade azali koyina Yoane mpe azali koluka ntango nyonso libaku ya kobomisa ye. Tala sikawa, libaku oyo azali kozela emonani.

Mwa ntango moke liboso na Pasika ya mobu 32, Hérode asalisi elambo monene mpo na kokundola mokolo ye abotamaki. Abengisi bato minene mpe bakonzi na basoda, mpe bato na lokumu mingi na Galilai. Na mpokwa yango, elenge mwasi moko abimi na kati na bato mpo na kobina liboso ya babyangami: nkombo na ye Salomé, mwana oyo Hérodiade abotaki na mobali na ye ya liboso, Filipe. Mabina na ye masepelisi mibali nyonso oyo bazali wana.

Hérode asepeli mingi mpo na Salomé. Yango wana mokonzi apesi ye elaka ete: “Senga ngai eloko nini elingi yo mpe nakopesa yo yango.” Mpe akateli ye lisusu ndai ete: “Eloko nini ekosenga yo na ngai, nakopesa yo, kino ndambo na bokonzi na ngai.”

Liboso ete asenga eloko ye alingi, Salomé abimi mpe akei kotuna mama na ye: “Nasenga eloko nini?”

Libaku azalaki koluka emonani! Nokinoki Hérodiade ayanoli ete: “Motó na Yoane Mobatisi.”

Salomé azongi epai na Hérode mpe asengi ye ete: “Nalingi ete opesa ngai sikawa motó na Yoane Mobatisi likoló na saani.”

Likambo yango esali Hérode mpasi mingi na motema. Kasi, lokola babyangami na ye bayokaki ye kolapa ndai, yango etungisi ye ete azanga kokokisa maloba na ye, ata soko asengeli koboma moto oyo asali eloko te. Apesi etinda mpe bobele na ntango yango, mobomi moko akei na boloko mpo na kokokisa etinda oyo ya nsomo. Moto yango aumeli te, azongi na motó na Yoane na saani mpe apesi yango epai na Salomé; mpe ye akumbi yango epai ya mama na ye. Eyoki bango nsango na likambo oyo, bayekoli na Yoane bayei koluka nzoto na ye na boloko mpo ete bakenda kokunda yango, na nsima bakei koyebisa nsango wana ya mawa epai na Yesu.

Na nsima, wana Hérode ayoki nsango na Yesu oyo azali kobikisa bato na maladi mpe azali kobengana bilimu mabe, abangi, mpamba te amituni soki moto yango azali nde Yoane oyo asekwisami na bakufi. Akoluka komona Yesu, mpo na koyoka mateya na ye te, kasi mpo na koyeba soko ndenge azali kokanisa ezali bongo to bongo te. Matai 10:1-5; 11:1; 14:1-12; Malako 6:14-29; Luka 9:7-9.

▪ Mpo na nini Yoane azali na boloko, mpe mpo na nini Hérode alingi koboma ye te?

▪ Ndenge nini Hérodiade azwi nzela ya kobomisa Yoane?

▪ Nsima na liwa na Yoane, mpo na nini Hérode alingi komona Yesu?