Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moto na ligboma abiki

Moto na ligboma abiki

Mokapo 45

Moto na ligboma abiki

LIKAMBO ya nsomo ezali kozela Yesu ntango abimi na masuwa! Bato mibale ya magboma oyo bakeseni mpenza na bato mosusu ya magboma, babimi na mayita penepene wana mpe bayei mbango epai na ye; bazali na bilimu mabe. Likebi etyami mpenza likoló na moko na bango, oyo aleki mabe mpe aumeli mingi na boombo ya bilimu mabe.

Esili koleka mibu mingi uta moto oyo azali kotambola bolumbu katikati na mayita. Butu mpe moi, azali konganga mpe komizokisa na mabanga. Azali na nkanda mingi na boye ete moto ata moko te azali koleka na nzela wana. Bamekaki ndenge nyonso mpo na kokanga ye minyololo, kasi azali kokata minyololo mpe kobuka bibende na nse na makolo na ye. Moto moko te azali na nguya ya kolembisa ye.

Ntango moto yango apusani penepene na Yesu mpe akwei na makolo na ye, bilimu mabe oyo bazali konyokola ye balobisi ye: “Tozali na likambo nini biso na yo, Yesu, Mwana na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló? Nabondeli yo na nkombo na Nzambe ete otungisa ngai te.”

Yesu alobi ete, “Bima na moto oyo, yo elimu na mbindo!” Kasi na nsima atuni: “Nkombo na yo nani?”

“Nkombo na ngai Ebele, mpo ete tozali mingi.” Bilimu mabe bazali kosepela na komona mpasi ya bato oyo bango bazali konyokola mpe, na bolema nyonso, basepeli mpenza komikotisa ebele kati na moto moko. Nzokande, emoni bango Yesu, bazali kobondela ye ete abwaka bango kati na libulu mozindo te. Yango emonisi lisusu ete Yesu azali na nguya monene, azali na bokonzi ata epai na bilimu mabe ya nkanda mingi. Tala likambo oyo emonisi ete bilimu mabe bayebi ekateli nini Nzambe abombeli bango na mokolo ya nsuka, ezali bongo kobwakama kati na libulu mozindo elongo na mokonzi na bango, Satan le Diable.

Penepene na esika yango, likoló na ngomba, etuluku ya bangulu soko 2 000 bazali kolya wana. Bilimu mabe basengi ete: “Tinda biso kati na ngulu, tika ete tokotela yango.” Ezali polele ete bilimu mabe bayokaka elengi na mbindo mpo na komikotisa kati na nzoto na bikelamu ya mosuni. Ntango Yesu apesi bango nzela ete bakota kati na bangulu 2 000, banyama yango babulungani, mpe longwa na likoló na ngomba bamibwaki kati na libeke mpe bazindi.

Komonáká bongo, babateli na bangulu bakimi koyebisa likambo yango kati na engumba mpe na bamboka mikemike. Mpo na yango, bato bayei kotala likambo libimi wana. Ntango bakómi, bakuti moto oyo bilimu mabe bibimi kati na ye, alati bilamba, ligboma na ye esili, afandi na nse na makolo na Yesu!

Bato oyo bamonaki ndenge makambo malekaki, babandi kolimbola epai na bamosusu ndenge nini moto yango abiki. Bayebisi mpe likambo na nsomo oyo ekómeli bangulu. Ntango bayoki boye, babangi makasi, mpe babondeli Yesu nokinoki ete alongwa na mokili na bango. Yesu ayokeli bango mpe amati na masuwa. Moto oyo atungisamaki liboso na bilimu mabe abondeli ye ete apesa ye nzela bakenda na ye elongo. Kasi Yesu alobi na ye ete: “Zonga na ndako na yo epai na bandeko na yo koyebisa bango likambo nini lisili Jéhovah kosala mpo na yo, mpe motindo esili ye koyokela yo mawa.”

Na momeseno na ye, Yesu azali kopekisa bato oyo abikisi ete baloba na moto moko te, mpo alingi te ete bato bandima bobele mpo na nsango na bikamwiseli. Kasi ndingisa oyo ezali sembo, mpo ete moto oyo asikolami na boombo ya bilimu mabe akopesa litatoli epai na bato oyo Yesu akokoka lisusu kokutana na bango te. Epai mosusu, wana bato bakozala komona moto yango, bakondima ete Yesu azali na nguya ya kosala malamu epai na bato mpe ekokweisa makanisi nyonso ya lokuta oyo makoki kopalangana na ntina na kufa ya bangulu.

Kotosáká etinda oyo Yesu apesi ye, moto oyo azalaki kala na bilimu mabe azongi. Abandi kosakola kati na Dekapoli makambo nyonso oyo Yesu asali mpo na ye, mpe bato bazali kokamwa mpo na yango. Matai 8:28-34; Malako 5:1-20; Luka 8:26-39; Emoniseli 20:1-3.

▪ Mpo na nini likebi etyami sé likoló na moto moko oyo azali na bilimu mabe, nzokande bazali mibale na esika wana?

▪ Nini emonisi ete bilimu mabe bayebi ete bakobwakama na libulu mozindo?

▪ Mpo na nini bilimu mabe balingaka kokótela bato mpe banyama?

▪ Mpo na nini Yesu apesi nzela epai na moto oyo asikolami na bilimu mabe ete asakola epai na bato mosusu likambo oyo Jéhovah asali mpo na ye?