Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mozwi mpe Lazare

Mozwi mpe Lazare

Mokapo 88

Mozwi mpe Lazare

YESU azali koyebisa bayekoli na ye lolenge malamu ya kosalela bozwi ya mosuni ete, tokoki te kozala na mbala moko, baombo na misolo mpe baombo na Nzambe. Bafalisai mpe bazali koyoka, kasi babandi kotyola Yesu mpo ete balingi mosolo mingi. Yango wana alobi na bango ete: “Bino bokomilongisaka na miso na bato, nde Nzambe ayebi mitema na bino; mpo ete yango ezali monene kati na bato, ezali mbindo na miso na Nzambe.

Ntango ekoki mpo na kopamela baoyo bazali na bozwi, na bokonzi ya politike, bakisa mpe baoyo bazali na bopusi mpe na bokonzi kati na mangomba. Basengeli kokitisama, nde baoyo bazali komibanzabanza mpo na mposa na bango ya elimo basengeli kotombolama. Yesu ayebisi mbongwana yango epai na Bafalisai ete:

“Mibeko na basakoli mizalaki kino Yoane [Mobatisi], nde nsima na yango nsango malamu na Bokonzi na Nzambe ezali kosakolama mpe bato nyonso bakoti epai na yango na makasi. Likolo na nse ekoki kolimwa, kasi likomi moko te na Mibeko ekotikala mpamba.”

Bakomeli mpe Bafalisai bazali kosakola na lolendo nyonso bokangami na bango na Mibeko na Moise. Omikundola ete ntango Yesu afungolaki miso ya mobali moko na Yelusaleme, Bafalisai bamikumisaki ete: “Biso tozali bayekoli na Moise. Biso toyebi ete Nzambe asololaki na Moise.” Kasi sikawa, Mibeko na Moise mikokisi mosala na yango: ekambi basokemi epai na Yesu Klisto, Mokonzi aponami na Nzambe. Uta ebandeli na mosala na Yoane, bato ya lolenge nyonso, mpe mingi mpenza basokemi mpe babola, bazali bongo kosala makasi mpo na kokoma bato ya Bokonzi na Nzambe.

Lokola Mibeko na Moïse mizali kokokisama sikawa, lisengisi ya kotosa yango likozwa nsuka. Mibeko mizali kopesa nzela na koboma libala mpo na makambo ndenge na ndenge, kasi Yesu alobi sikawa ete “mobali na mobali oyo alongoli mwasi na ye mpe abali mwasi mosusu, azali kosala ekobo; mpe mobali oyo abaii mwasi alongolami na mobali mosusu, azali kosala ekobo.” Maloba motindo wana masengeli mpenza kosilikisa Bafalisai, lokola bango bazali kopesa nzela na koboma libala mpo na makambo ndenge na ndenge.

Bobele epai na Bafalisai, Yesu apesi lisese oyo limonisi bato mibale baoyo etelemelo, to ezalela na bango, esukaki na kobongwana na lolenge moko na kokamwa. Okokoka koyebisa soko bato yango bamonisi banani mpe soko mbongwana ya ezalela na bango elimboli nini?

Yesu alimboli ete: “Moto moko azalaki mozwi, mpe alataki bilamba kitoko ya motane, mpe asepelaki mokolo na mokolo na elambo kitoko. Mpe mobola moko, nkombo na ye Lazare, azalaki kolala na ekuke ya ndako na ye, nzoto na ye etondaki na bampota. Azalaki na mposa na kolya biloko bizalaki kokwea na mesa na mozwi. Ee, bambwa mpe bayaki kolembola bampota na ye.”

Awa Yesu asaleli mozwi mpo na komonisa bakonzi na mangomba ya Bayuda, bobele Bafalisai mpe bakomeli te, kasi lisusu Basadukai mpe banganga-kapita. Bazali bazwi na ntina na mikumba mpe matomba na bango ya elimo, mpe bazali komitambwisa lokola mozwi oyo Yesu alobeli. Bilamba na bango ya motane kitoko bimonisi etelemelo na bango ya lokumu, mpe bilamba pɛtɛpɛtɛ ya mpembe, bimonisi boyengebene oyo bazali komipesa bango moko.

Kelasi wana ya mozwi, etondi na lolendo, ezali mpenza kotyola makasi babola mpe bato mpamba, kobengaka bango ˈam haˈaˈrets, elingi koloba bato ya mokili. Molombi, Lazare, amonisi bato oyo bakonzi na mangomba bazali kopimela bilei ya elimo, mpe mikumba ya elimo oyo ekoki na bango. Lokola Lazare oyo atondi na bampota, bato mpamba baboyami mpe batangami bato na maladi kati na elimo, babongi mpenza kozala esika moko na bambwa. Nzokande, baoyo basali kelasi ya Lazare bazali na nzala mpe na mposa na bilei ya elimo, mpe bafandi na ekuke na elikya ya kozwa mwa bitika na bilei ya elimo, ya moke mpenza oyo kokwea na mesa ya mozwi.

Sikawa Yesu akoyebisa mbongwana na ezalela ya mozwi mpe Lazare. Mbongwana yango ezali nini? Ezali komonisa likambo nini?

Mbongwana mpo na mozwi mpe mpo na Lazare

Mozwi amonisi bakonzi na mangomba oyo bazali na mikumba mpe na matomba mingi kati na elimo. Nzokande, Lazare amonisi bato nyonso mosusu oyo bazali na nzala na elimo. Na lisolo na ye, Yesu amonisi mbongwana monene esalemaki kati na ezalela ya bato wana mibale.

Na nsima Yesu alobi ete: “Mobola akufi mpe amemami na baanzelu kuna na ntolo na Abrahame. Mozwi mpe akufi, mpe akundami. Azalaki na mpasi na esika na bakufi [Hades], atomboli miso na ye mpe amonaki Abrahame mosika, mpe Lazare na ntolo na ye.”

Lokola Lazare mpe mozwi bazali bato ya solo te, kasi nde bililingi ya kelasi na bato, emonani polele ete liwa na bango ezali mpe ya elilingi. Yango emonisi nini kati na makambo wana mibale?

Yesu auti komonisa mbongwana ya ezalela ete: ˈMibeko na Basakoli mizalaki kino Yoane, nde nsima na yango nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe ezali kosakolama.ˈ Ezali bongo mosala ya kosakola na Yoane mpe na Yesu Klisto nde ebendi liwa ya mozwi mpe ya Lazare mpo na oyo etali ezalela na bango to mpe bomoi na bango ya liboso.

Basokemi babongoli mitema oyo bazali bongo kelasi ya Lazare, basili kokufa mpo na bosenga ya elimo oyo bazalaki konyokwama kino ntango wana nde bapesameli etelemelo mosusu ya sika: ngolu na Nzambe. Nzokande bazalaki liboso kokende epai na bakonzi na mangomba mpo na kolokota moke oyo ezalaki kokwea na mesa na bango ya elimo, sikawa solo na Biblia oyo emonisami na Yesu ezali kokokisa bamposa na bango. Ezali na lolenge oyo nde bamemami penepene na Nzambe, Abrahame Monene, na ntolo na ye, to etelemelo eleki bonene.

Nzokande, baoyo basali kelasi ya mozwi bamibendeli bonguna na Nzambe mpamba te bazali kotyola na moto makasi, nsango ya Bokonzi oyo Yesu azali koteya. Na yango, bakufi mpo na etelemelo na bango ya kala, oyo emonanaki lokola ete ezalaki ngolu na Nzambe. Ya solo, elobami mpo na bango ete bazali kozwa mpasi na elilingi. Toyoka sikawa maloba ya mozwi:

“Tata Abrahame, yokela ngai mawa! Tinda Lazare ete atya nsonge na mosapi na ye na mai mpe amama lolemo na ngai mpo ete nazali na mpasi mingi na moto oyo.” Nini ezali kotungisa bato oyo bazali na kelasi ya mozwi? Ezali bansango na molende ya lisambisi liuti na Nzambe, oyo bayekoli na Yesu bazali kosakola. Bato yango balingi ete bayekoli batika kosakola bansango motindo wana, likambo oyo likosalisa bango mwa moke na mpasi na bango.

“Nde Abrahame alobi ete: ˈMwana, kanisa ete ozwaki biloko na yo malamu kati na bomoi na yo, mpe bobele bongo Lazare azwaki biloko mabe; nde sikawa abondisami awa kasi yo ozali na mpasi. Lisusu mpe libulu monene ezali kati na biso na bino, mpe bango bazali na mposa ya kolongwa awa mpo na koya na bino bakoki te, mpe moto te akoki mpe kokata longwa na ngambo kuna ete akoma awa na biso.ˈ”

Ezali mpenza sembo mpe ebongi ete mbongwana monene wana ya ezalela esalema kati na kelasi ya Lazare mpe oyo na mozwi. Yango ekosalema mwa basanza na nsima, na Pantekote ya mobu 33, bakokitana kondimana na sika na esika ya kondimana na Mibeko, oyo esili konuna. Bongo, ekomonana polele ete ezali bayekoli nde bazali kozwa ngolu na Nzambe, kasi Bafalisai te, mpe bakonzi mosusu na mangomba te. “Libulu monene” likaboli mozwi ya elilingi mpe bayekoli na Yesu emonisi bongo lisambisi na sembo na Nzambe, oyo ekoki kobongwana te.

Na nsima mozwi asengi epai na “tata Abarahame” ete: “[Tinda Lazare] kuna na ndako na tata na ngai, mpo ete nazali na bandeko babali mitano.” Na maloba wana, mozwi andimi ete azali na boyokani ya penepene elongo na tata mosusu, oyo ezali bongo Satan le Diable. Azali kobondela mpo ete Lazare abongola nsango na lisambisi na Nzambe, mpo ete “bandeko mibali [na ye] mitano,” to basalani na ye kati na lingomba, bakoka kotindama te kati na “esika wana ya mpasi.”

“Bongo Abrahame alobi ete: ˈBazali na mikanda na Moise mpe na basakoli, tika ete bayoka bango.ˈ” Ya solo, soki “bandeko mibali mitano” wana balingi kozwa mpasi te, ekoki na bango kotya likebi na makomi na Moise mpe na Basakoli oyo ezali komonisa Yesu ete azali Masiya, mpe na nsima bakokoma bayekoli na ye. Mozwi azongisi bongo maloba oyo: “Te, tata Abrahame, kasi soki moto moko akolongwa na bakufi kokenda epai na bango, bakobongola mitema.”

Kasi bayanolaki ye ete: “Soko bakoyoka Moise te, na Basakoli te, bakondima mpe te ata soko moto asekwi kati na bakufi.” Jéhovah akobimisa elembo moko te to ekamwiseli te ekeseni mpo na kondimisa bato. Soki balingi kozwa ngolu na ye, basengeli kotanga Makomami mpe kosalela makambo oyo bazali koyekola. Luka 16:14-31; Yoane 9:28, 29; Matai 19:3-9; Bagalatia 3:24; Bakolose 2:14; Yoane 8:44.

▪ Mpo na nini liwa ya mozwi mpe oyo na Lazare ezali mpenza ya elilingi, mpe liwa elimboli nini kati na makambo wana mibale?

▪ Engebene Yesu, mbongwana nini esalemaki na ntango Yoane abandaki mosala na ye?

▪ Eloko nini ekolongwa na liwa na Yesu, mpe na likambo nini yango ekotalela koboma libala?

▪ Kati na lisese na Yesu, mozwi azali nani? Mpe Lazare azali nani?

▪ Mpasi nini mozwi azali na yango, mpe asengi nini mpo ete ekita moke?

▪ “Libulu monene” ezali elilingi ya eloko nini?

▪ Nani azali tata ya solo ya mozwi, mpe banani bazali bandeko mibali na ye mitano?