Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpasi ya liwa likoló na nzeté

Mpasi ya liwa likoló na nzeté

Mokapo 125

Mpasi ya liwa likoló na nzeté

BASALI na mabe mibale bakambami libanda mpo na kobomama esika moko na Yesu. Mosika te na engumba, bato nyonso batelemi na esika ebengami Gologota, elingi koloba Mokwa na Motó.

Basoda balongoli bilamba na bakangami. Bapesi bango vinyo esangisami na nkisi na bololo mola. Ekoki kozala basi na Yelusaleme nde balambaki yango, mpe Balóma bakoboyaka te kopesa epai na baoyo bakakisami na nzeté, masanga wana makoyokisa lisusu mpasi na monyoko te. Nsima na komeka yango, Yesu aboyi komela yango. Mpo na nini? Na ntembe te, ezali mpo ete alingi kolonga momekamo wana monene ya kondima na ye, na kobatelaka makoki na ye nyonso.

Sikawa batandi Yesu na nzeté, maboko na ye likoló na motó. Basoda batoboli ye nseté minene, moko na mabóko, mosusu na makolo. Yesu akangi motema na mpasi wana nseté ezali kotobola misuni mpe matongá ya mikwa. Kasi na ntango batelemisi nzeté, mpasi ekómi lisusu makasi mpenza, mpamba te kilo ya nzoto ezali kopasola bampótá oyo etobolami na nseté. Na esika ete abimisa matáta, Yesu abondeli nde mpo na basoda Baloma ete: “Tata, limbisa bango, mpamba te bayebi oyo ezali bango kosala te.”

Pilato atyisi libaya moko likoló na nzeté, lizalaki na makomi oyo ete: “Yesu moto na Nazarete, mokonzi na Bayuda.” Emonani lokola ete na kokomáká bongo, Pilato alingi bobele te kolakisa limemya oyo azali na yango epai na Yesu, kasi mpo na komonisa lisusu boni azangi kosepela na banganga Bayuda oyo bapusaki ye na kokatela Yesu etumbu ya kufa. Mpo ete bato banso batanga yango, Pilato akomisaki yango na minoko misato: na hébreu, na latin, lokóta ya Leta, mpe na greke, lokóta lozalaki kolobama mingi.

Anne, Kayife mpe banganga-kapita mosusu baoki nsoni. Esakola monene oyo etyami likoló na nzeté ebebisi elónga na bango. Baboyi yango, kolobáká na Pilato ete: “Kokoma te ete: ‘Mokonzi na Bayuda,’ kasi: ‘Alobaki ete, “Nazali mokonzi na Bayuda.”’” Pilato asiliki mpo ete asili kokosama na banganga, mpe ayanoli bango na nkanda nyonso ete: “Oyo ekomi ngai, nasili kokoma yango.”

Banganga mpe ebele na bato, bayangani sikawa na esika na kobomama mpe bazali koluka kopengola maloba makomami na libaya. Bazongeli bifundeli na lokuta oyo basalelaki liboso na Sanedrina. Ezali bongo likambo na kokamwa te ete baleki nzela bazali koloba mabe na ntina na Yesu, koningisáká motó mpe kolobaka ete: “Oh! yo oyo olingaki kobebisa tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato, omibikisa yo moko! Soki ozali mwana na Nzambe, kita na nzeté na mpasi!”

Banganga-kapita mpe balandi na bango basangani elongo na baseki, kolobáká ete: “Abikisaki bamosusu, ayebi komibikisa te! Azali mokonzi na Yisraele; akita sikawa na nzeté na mpasi, boye tokondima ye. Azali kotalela Nzambe; Nzambe abikisa ye sikawa soko alingi ye, mpamba te alobaki ete: ‘Ngai nazali Mwana na Nzambe.’”

Emoni bango oyo nyonso, basoda mpe baseki Yesu. Batyoli ye kopesáká ye mai na ngai, ekoki kozala ete na kotyáká yango liboso na monoko na ye, penepene na mbebu oyo ekauki. Balobi na ye ete: “Soki yo mokonzi ya Bayuda, omibikisa yo mpenza!” Ata mpe basali na mabe oyo bakakisami na nzeté ngambo na ngambo na Yesu, moko na loboko na mobali, mosusu na loboko na mwasi, bazali koseka ye. Kanisa naino moke! Moto oyo aleki bato nyonso ata na eleko nini, ee, ye oyo asalaki elongo na Jéhovah mpo na kozalisa biloko nyonso, andimi basalela ye motindo oyo!

Basoda bakamati bilamba na likoló ya Yesu mpe bakaboli na ndambo minei. Babwaki mbese mpo na koyeba soki moto na moto akozwa eteni nini. Nzokande, elamba na ye ya nse, ya motuya mingi, ezangi esoneli. Basoda balobani ete: “Topasola yango te, kasi tobwaka mbese koyeba soko ekozala ya nani.” Bakokisi bongo maloba oyo na Makomami ete: “Bakabani bilamba na ngai kati na bango mpenza, mpe babwaki mbese mpo na elamba na ngai.”

Moko na basali na mabe ayei kososola ete Yesu azali solo mokonzi. Yango wana, kopameláká moninga na ye, alobi ete: “Yo ozali kobanga Nzambe te, awa ezali yo na ekweli ya motindo moko? Mpo na biso, ezali sembo, mpamba te tozali kozwa mpasi ekoki na makambo tosalaki; kasi moto oyo asali likambo mabe te.” Asengi na Yesu ete: “Kanisa ngai wana ekokóma yo na bokonzi na yo.”

Yesu alobi na ye ete: “Solo nazali koloba na yo lelo ete: ‘Okozala na ngai elongo na Paradiso.’” Elaka oyo ekokokana wana Yesu akoyangela uta likoló, akosekwisa mosali na mabe wana abóngolaki motema mpo na kopesa ye likoki ete azala na bomoi kati na Paradiso, oyo babiki na Armagedon mpe baninga na bango bazali na libaku kitoko ya kobongisa yango. Matai 27:33-44; Malako 15:22-32; Luka 23:27, 32-43; Yoane 19:17-24.

▪ Mpo na nini Yesu aboyi komela vinyo esangisami na nkisi ebengami mola?

▪ Ekoki kozala, mpo na ntina nini libaya na makomi libakisami likoló na nzeté na mpasi na Yesu? Yango epesi nzela na ntembe nini kati na Pilato mpe banganga-kapita?

▪ Yesu azwi lisusu monyoko nini ya nsoni likoló na nzeté, mpe ekoki kozala mpo na nini?

▪ Ndenge nini makambo masalemi na bilamba na Yesu makokisi esakweli moko?

▪ Mosali na mabe moko asali mbongwana nini na ezaleli, mpe ndenge nini Yesu ayanoli na maloba na ye?