Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mwana na elakà

Mwana na elakà

Mokapo 6

Mwana na elakà

NA ESIKA ete bazonga na Nazarete, Yozefe mpe Marie batikali na Beteleme. Ntango mwana akokisi mikolo mwambe, bakatisi ye ngenga, na boyokani na mobeko oyo Nzambe apesaki na Moise. Emonani mpe ete, engebene bonkoko, bana mike ya mibali bakozwaka nkombo na mokolo ya mwambe. Na bongo Yozefe mpe Marie bapesi mwana nkombo Yesu, lokola anzelu Gabriele atindaki bango.

Pene na sanza moko na ndambo esili koleka. Yesu akokisi mikolo 40. Epai wapi baboti na ye bakei na ye? Na tempelo ya Yelusaleme, oyo ezali bobele na mwa bakilometele kolongwa na mboka oyo bazali kolala. Engebene mobeko oyo Nzambe apesaki na Moise, mwasi nyonso oyo aboti mwana mobali asengeli kokende na tempelo nsima na mikolo 40 mpo na kopesa mbeka na kopetolama.

Ezali yango nde Marie asali. Mpo na mbeka, amemi ndeke mibale ya mike. Likambo oyo limonisi ete Yozefe mpe Marie bazalaki na bozwi mingi te. Mpamba te, mobeko na Moise moyebisaki na sikisiki ete na libaku yango basengelaki kopesa mpate mobali na mbula moko; nzokande yango ezalaki kosenga mosolo mingi koleka ndeke mibale. Kasi, soki mama akoki komonana na mosolo mingi boye te, akoki kopesa bibenga mibale to bana na bibenga mibale na esika na yango.

Kati na tempelo, mobange moko na nkombo Simeona amemi Yesu na maboko na ye. Nzambe ayebisaki ye ete akokufa te kino amona naino Klisto, Masiya oyo koya na ye esakolamaki uta kala. Na yango, ntango Simeona akomi na tempelo na mokolo wana, elimo santu ekambi ye epai na mwana oyo Yozefe mpe Marie bamemi.

Kosimbaka Yesu, Simeona atondi Nzambe. Alobi ete, “Sikawa, Nkolo, otika moombo na yo kokenda na kimya lokola elobaki yo; mpo ete miso na ngai mamoni Mobikisi oyo otindi na miso na bato nyonso, moi mpo na emoniseli na mabota, mpe nkembo na bato na yo Yisraele.”

Yozefe mpe Marie bakamwi na koyoka ye koloba boye. Wana lisusu, Simeona apamboli bango mpe alobi na Marie ete Mwana na ye “atyami mpo na kokweisa mpe kotelemisa bato mingi.” Abakisi ete mawa, lokola mopanga mopeli, ekotobola molimo na Marie.

Mosakoli mwasi Ana, oyo azali na mibu 84, azali mpe wana. Ye akoyaka na tempelo mikolo nyonso. Na ntango yango abelemi mpe abandi kotondo Nzambe mpe koloba na ntina na Yesu epai na baoyo nyonso balingi koyoka ye.

Kanisa naino esengo na Yozefe mpe na Marie mpo na makambo oyo nyonso bakutani na yango na tempelo! Nyonso wana emonisi polele epai na bango ete Yesu azali solo mwana alakamaki na Nzambe. Luka 2:21-38; Levitike 12:1-8.

Engebene bonkoko, ntango nini bana mike ya mibali ya Bayuda bazalaki kopesamela nkombo?

Likambo nini mama nyonso Moyisraele asengelaki kosala wana mwana na ye ya mobali akokisaki mikolo ntuku minei? Lolenge oyo Marie akokisi lisengami yango epesi biso likanisi nini mpo na oyo etali makoki na ye ya mosuni?

Banani basosoli Yesu na libaku yango? Ndenge nini?