Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na Betania, epai na Simona

Na Betania, epai na Simona

Mokapo 101

Na Betania, epai na Simona

KOTIKÁKÁ Yeriko, Yesu azwi nzela mpo na kokende na Betania. Mobémbo mokoumela soko mokolo mobimba, mpo ete esengeli komata pene na bakilometele ntuku mibale na nzela na ngomba molai. Ya solo, Yeriko ezali na nsé, soko bametele 250 longwa na nivo ya libéké, mpe Betania ezali na likoló, soko bametele 760 longwa na nivo ya libéké. Tozali komikundola ete ezali na Betania nde epai kuna Lazare mpe bandeko na ye ya basi bafandi. Mboka wana moke etangwi na Yelusaleme na ntáká ya bakilometele misato, epai moi mokobimaka na ekitelo ya ngomba na Olive.

Bato mingi bayei na Yelusaleme mpo na Pasiká. Bato oyo bauti mosika, bakómi liboso mpenza mpo na komipetola engebene milulu. Mbala mosusu basimbaki ebembe to eloko mosusu oyo ekómisi bango mbindo. Bazali bongo kolanda mitinda ya kopetolama ete bakumisa Pasiká na ezalela endimami. Wana bato oyo bakómaki liboso bayangani na tempelo, mingi bazali komituna soko Yesu akoya na Pasiká to te.

Na Yelusaleme, ntembe makasi ebimaki na ntina na Yesu. Bato bazali kokumisa ye mingi kino bakonzi na mangomba balingi kokanga ye mpo na koboma ye. Nkutu basili kopesa etinda oyo ete: Moto oyo akoyeba epai Yesu azali, akende koyebisa bango. Mbala misato, na basanza oyo euti koleka—na elambo ya Mingombo, na elambo ya kopetola tempelo mpe nsima na lisekwa ya Lazare—bakonzi wana ya mangomba bakanaki koboma Yesu. Yango wana bato bazali komituna soki Yesu akomimonisa lisusu. Bazali komituna ete: “Bino bokanisi nini?”

Na ntango yango, mikolo motoba liboso na Pasiká, oyo ekokumisama na mokolo ya 14 Nisan engebene manáka ya Bayuda, Yesu akómi na mboka Betania. Akóti na mboka yango na mpokwa ya mokolo na mitano, elingi koloba na ebandeli na mokolo ya 8 Nisan. Akokaki kosala mobémbo oyo na mokolo ya poso te, mpamba te mobeko na Bayuda mopekisi kosala mibémbo na boumeli ya sabata, elingi koloba kobanda mokolo ya mitano na kolala na moi kino mokolo ya poso na kolala na moi. Na ntembe te Yesu akei epai na Lazare, lokola asalaki yango na mbala eleki, mpo na kolala kuna mokolo ya mitano.

Na mpokwa ya mokolo na poso, mofandi mosusu ya mboka Betania abengisi Yesu mpe baninga na ye. Mobali yango ezali Simona, moto na mába oyo mbala mosusu Yesu abikisaki mwa ntango moke liboso. Malatá, lokola amesana na mosala mikolo nyonso, azali kosalela babyangami. Kasi, Marie, lokola ezali momeseno na ye, azali koyoka Yesu na likebi nyonso, nde na mbala oyo asali likambo moko libimisi koimaima.

Afungoli mbeki, molangi moke oyo mozali soko na litele moko ya mafuta na malasi, “esalami na nzeté ebengami nard.” Ezali eloko ya motuya mingi, mpo ete motuya na yango mokokani soko na mosolo na lifuti ya mbula moko! Ntango Marie asopi mafuta yango na motó mpe na makolo na Yesu mpe apangusi ye makolo na nsuki na ye, nsolo kitoko etondi ndako mobimba.

Bayekoli bamoni mabe mpo na yango mpe balobi ete: “Libebi oyo ezali mpo na nini?” Mpe Yuda Iskariote alobi ete: “Mpo na nini malasi oyo matekisami na denali nkámá misato te ete epesamela babólá?” Solo mpenza, azali komibanzabanza mpo na babólá te, ezali mpo ete uta mwa ntango azali koyiba na ebómbelo na mosolo na bayekoli.

Yesu akɔteli Marie. Azongisi na bayekoli ete: “Botika ye. Mpo na nini bozali koluka kotungisa ye? Asili kosalela ngai mosala kitoko. Bozali na babólá awa elongo na bino mikolo nyonso, mpe soki bolingi kosalela bango malamu ntango nini, bokoki kosala, kasi bokozala na ngai ntango nyonso te. Ye asali eloko ekokaki na ye kosala; asili kopakola nzoto na ngai liboso na kokunda. Nazali koloba na bino solo ete, soko nsango malamu ekolakisama wapi na mokili mobimba, likambo lisali ye likoyebisama mpo na ekaniseli na ye.”

Eleki sikawa ngonga 24 wana Yesu azali na Betania, mpe bato nyonso na engumba bayebi ete azali wana. Na yango, bato mingi bayei epai na Simona mpo na komona Yesu, kasi bayei mpe kotala Lazare, ye oyo azali wana lokola. Na ntango wana banganga minene basali mwango mpo na koboma Yesu mpe Lazare lokola. Ya solo, bato mingi bandimeli Yesu mpo ete bamoni mpenza na bomoi, moto oyo ye asekwisaki longwa na bakufi! Oyo nde motema mabe na bakonzi ya mangomba! Yoane 11:55 kino 12:11; Matai 26:6-13; Malako 14:3-9; Misala 1:12.

▪ Likambo nini bato bazali kolobela na tempelo ya Yelusaleme, mpe mpo na nini?

▪ Likambo nini lipusi biso na koloba ete Yesu akómaki na Betania na mokolo ya mitano kasi na mokolo ya poso te?

▪ Ekómi ye na Betania, epai wapi emonani mpenza ete Yesu alekisaki sabata kuna?

▪ Likambo nini Marie asali oyo libimisi koimaima, mpe Yesu alobi nini mpo na kokɔtela mwasi yango?

▪ Likambo nini limonisi motema mabe ya banganga-kapita?