Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na elambo ya Mingombo

Na elambo ya Mingombo

Mokapo 66

Na elambo ya Mingombo

NA BOUMELI ya mibu soko misato uta batisimo na ye, Yesu asili kozwa lokumu. Bankoto na bato basili komona bikamwiseli na ye mpe nsango ya misala na ye esili kopalangana na mboka mobimba. Bato oyo bayangani sikawa na Yelusaleme mpo na Elambo ya Mingombo babandi koluka ye. Bazali kotunana: “Moto yango azali wapi?”

Ntembe monene ebimi na ntina na Yesu. Bamosusu balobi: “Azali moto malamu.” Bamosusu ete: “Te azali kokosa bibele.” Bazali kolobaloba makambo mingi ya motindo oyo na boumeli ya mikolo ya liboso ya elambo. Nzokande moto ata moko te azali na nguya ya kokamata ekateli ya polele mpo na kolanda Yesu, mpo ete bazali kobanga kozwa bitumbu na mikóló na mangomba ya Bayuda.

Na katikati ya elambo, Yesu akómi. Amati na tempelo epai kuna akamwisi bato na lolenge na ye kitoko ya koteya. Lokola Yesu akotaki kelasi ya Balabi te, Bayuda bakamwi: “Ndenge nini moto oyo ayebi mikanda, ye moto ayekoli te?”

Yesu azongiseli bango monoko mpe alobi ete: “Mateya na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai. Soko moto nani azali na mposa ya kosala mokano na Ye, akoyeba mpo na mateya, soki mauti na Nzambe, soko nazali kosolola na motema na ngai moko.” Mateya na Yesu matongami nyonso likoló na mibeko na Nzambe. Esengelaki komonana polele epai na bato nyonso ete Yesu azali koluka lokumu ya Nzambe kasi lokumu na ye moko te. Yesu atuni ete: “Moïse apesaki bino Mibeko te?” Na nsima apameli bango na maloba oyo: “Moko te kati na bino azali kotosa Mibeko.”

Atuni bango mpe: “Mpo na nini bozali koluka koboma ngai?”

Bayoki na ye, ekoki kozala bapaya bayaki mpo na elambo, bayebi eloko moko te mpo na mokano mabe motindo oyo. Bandimi te ete bato bakoki kokana koboma moteyi malamu boye. Yango wana bakanisi ete Yesu azali na ligboma. Balobi na ye: “Ozali na elimu mabe; nani azali koluka koboma yo?”

Ata bibele bayebi yango to te, bakonzi na mangomba bazali na likanisi ya kolimwisa Yesu. Mobu moko na ndambo liboso, basilaki kokana koboma ye nsima wana abikisaki moto moko na mokolo na sabata. Sikawa Yesu amonisi polele bozoba na bango: “Soko moto akatami ngenga na mokolo na sabata, mpo ete mobeko na Moïse mobukama te, mpo na nini boyokeli ngai nkanda ete napesi makasi na nzoto mobimba na moto na mokolo na sabata? Botika kokata makambo engebene oyo ezali bino komona na miso, kasi bokata na ekateli na sembo.”

Bafandi na Yelusaleme, bango lokola bayebi makambo nyonso, bazali kotunana ete: “Ye moto oyo bazali koluka ye mpo na koboma ye te? Nde tala azali kosolola polele mpe bakoloba na ye te? Ezali solo ete mikoló basosoli ete ye oyo Klisto?” Na nsima balimboli mpo na nini baboyi kondima ete Yesu azali Klisto: “Kasi toyebi esika euti moto oyo; nde wana ekoya Klisto, moto moko akoyeba esika euti ye te.”

Yesu ayanoli bango na maloba oyo: “Boyebi ngai mpe boyebi esika euti ngai. Kasi nayei mpo na ngai moko te, nde Ye Motindi na ngai azali solo nde bino boyebi ye te. Ngai nayebi ye mpo ete nauti na ye mpe ye atindi ngai.” Na wana baluki kokanga ye mbala mosusu mpo na kotya ye na boloko to mpo na koboma ye. Kasi balongi te, mpamba te ngonga ya liwa na Yesu ekómi naino te.

Nzokande, bato mingi bandimi Yesu mpe ezali na bantina malamu mpo na yango. Mpamba te Yesu atambolaki likoló na mai, alembisaki mopepe, alembisaki mbonge ya ebale, aleisaki bankoto na bato na ekamwiseli bobele na mwa mampa mpe mwa mbisi. Abikisaki mpe bato na bokono, atambolisaki bibosono, azipolaki miso na bakufeli-miso, abikisaki bato na maba, mpe asekwisaki ata bakufi. Na bongo bato bazali kolobana kati na bango ete: “Ekoya Klisto, akosala bilembo bileki yango ezali moto oyo kosala?”

Na ntango Bafalisai bayoki bato kolobana makambo nyonso oyo na mongongo ya nse, bango mpe mikoló na banganga batindi bapolisi mpo ete bakanga Yesu. Yoane 7:11-32.

▪ Ntango nini Yesu akómi na elambo, mpe makambo nini bazali koloba na ntina na ye?

▪ Ekoki kozala mpo na ntina nini, mbala mosusu, bamoko bazali koloba ete Yesu azali na elimu mabe?

▪ Bafandi na Yelusaleme bakanisi nini mpo na Yesu?

▪ Mpo na nini bato mingi bandimi Yesu?