Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na libeke ya Galilai

Na libeke ya Galilai

Mokapo 130

Na libeke ya Galilai

KOTOSAKA lilako oyo Yesu apesaki bango, bantóma bazongi sikawa na Galilai. Nzokande, bayebi te soki basengeli kosala nini. Na nsima na mwa ntango, Petelo alobi na Toma, na Natanaele, na Yakobo mpe na ndeko na ye Yoane, mpe na bantóma mibale mosusu ete: “Nakei koboma mbisi.”

Baninga mosusu motoba balobi na ye ete: “Biso mpe tokei na yo.”

Bazwi eloko te butu mobimba. Nzokande, na ntongontongo, Yesu abimeli bango na libongo, kasi bantóma bazali koyeba te ete ezali ye. Yesu abengi bango: “Bana, bozali na eloko na kolya te?”

Bayanoli uta na masuwa ete, “Ezali te!”

Yesu alobi ete: “Bobwaka monyámá na loboko mobali na bwato mpe bokozwa.” Ezali yango nde bantóma basali, mpe bazali kokoka te kobimisa monyámá na bango mpo ete esili kotonda na mbisi.

Yoane angangi ete: “Ezali Nkolo!”

Petelo alati elamba na ye ya likoló, amibwaki na mai, mpe abandi kokata mai na bolai ya metele ntuku libwa kino na libongo. Bantóma mosusu balandi ye na bwato, bazali kobenda nsima na na bango monyámá motondi na mbisi.

Ebimi bango na mokili, bakuti móto ya makala, elongo na mbisi etyami likoló na yango, mpe mampa. Yesu alobi na bango ete: “Boya na mwa ndambo na mbisi oyo bouti kozwa.” Petelo amati na masuwa mpe abendi monyámá na libongo. Na kati ezali na mbisi minene 153!

Yesu alobi na bango ete: “Boya kolya.”

Moko te kati na bango azali na molende ya kotuna ye ete: “Yo nani?” Mpamba te bayebi ete ezali Yesu. Oyo ezali mbala ya nsambo mpo na komonana na ye uta lisekwa na ye, mpe ya misato liboso na bantóma mingi na mbala moko. Sikawa, azali kokabola bilei ya ntongo, kopesaka na moto na moto limpa mpe mbisi.

Ntango bango nyonso basilisi kolya, ekoki kozala ete Yesu alakisi na motó ebele na mbisi oyo bauti kozwa, mpe atuni Petelo ete: “Simona, mwana na Yoane, olingi ngai koleka baoyo?” To mpe, na maloba mosusu ekoki kozala ete atuni ye: Ozali na bolingo mingi epai na misala na yo ya mobomi mbisi koleka mosala oyo mpo na yango nasili kobongisa yo?

Petelo ayanoli ete: “Yo oyebi ete nazali na bolingo mingi mpo na yo.”

Yesu alobi ete: “Leisa bana na mpate na ngai.”

Mpo na mbala ya mibale, atuni lisusu: “Simona, mwana na Yoane, olingi nde ngai?”

Petelo ayanoli ete: “Ee, Nkolo, oyebi ete nazali na bolingo mingi mpo na yo.”

Yesu alobi na ye lisusu: “Leisa bampate na ngai.”

Na nsima, mpo na mbala ya misato, atuni ete: “Simona, mwana na Yoane, olingi nde ngai?”

Mbala oyo Petelo atungisami kati na motema. Mbala mosusu amituni soki Yesu azali na ntembe mpo na bosembo na ye. Mpamba te, kala mingi te, wana bazalaki naino kosambisa Yesu mpo na koboma ye, Petelo awanganaki ye mbala misato ete ayebi ye te. Na bongo Petelo alobi ete: “Nkolo, yo oyebi makambo nyonso, yo oyebi ete ngai nazali na bolingo mingi mpo na yo.”

Mpo na mbala ya misato, Yesu alobi na ye ete, “Leisa bampate na ngai.”

Yesu alobi boye bobele mpo na Petelo ye moko te, kasi mpo na bantóma mosusu lokola: Yesu alingi kobenda likebi na bango likoló na mosala oyo alingi komona bango kokokisa yango. Lokola mosika te akotika mokili, Yesu alingi ete bakamata makambo nyonso na maboko mpo na kosunga baoyo bakobendama kati na lopango na Nzambe.

Yesu ayebisi sikawa ete, lokola ye moko akangamaki mpe abomamaki mpo azalaki kosala mosala oyo Nzambe atindaki ye, Petelo akokutana na mikakatano motindo moko. Alobi na ye ete: “Ezalaki yo elenge, omikangaki loketo mpe otambolaki epai ezalaki na yo mposa. Nde ekokoma yo mobange, okosembola maboko na yo mpe mosusu akokanga yo loketo mpe akomema yo esika ezali yo na mposa te.” Atako liwa ya martire ezali kozela Petelo, Yesu alendisi ye ete: “Landa ngai.”

Petelo abongwani mpe amoni Yoane; bongo atuni ete: “Nkolo, oyo kuna akosala nini?

Soko nalingi ete aumela kino ekoya ngai, etali yo na nini? Yo, landa ngai.” Maloba oyo na Yesu mapusaki bayekoli mingi na kondima ete ntóma Yoane akokufa lisusu te. Nzokande, lokola Yoane ayebisaki yango sikisiki na nsima, Yesu alobaki te ete ntóma akokufa te; alobaki bobele ete: “Soki nalingi ete aumela kino ekoya ngai, yango etali yo na nini?”

Na nsima, Yoane akomaki mpe boye ete: “Kasi makambo mosusu mingi masalaki Yesu mazali; soko makokomama moko moko, nabanzi ete mokili mobimba ekokoka te mpo na mikanda mikokomama.” Yoane 21:1-25; Matai 26:32; 28:7, 10.

▪ Nini emonisi ete bantóma bayebi te likambo nini basengeli kosala na Galilai?

▪ Na libongo ya libeke ya Galilai, ndenge nini bantóma basosoli Yesu?

▪ Uta lisekwa na ye Yesu asili komimonisa mbala boni?

▪ Ndenge nini Yesu amonisi polele mosala oyo alingi ete bantóma basala yango?

▪ Ndenge nini Yesu amonisi motindo oyo Petelo akokufa?

▪ Maloba nini na Yesu na ntina na Yoane bato mingi basimbaki ntina na yango te?