Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na ntongo ya mokolo moko ya ntina mingi

Na ntongo ya mokolo moko ya ntina mingi

Mokapo 105

Na ntongo ya mokolo moko ya ntina mingi

ETIKI ye Yelusaleme na mokolo ya liboso na mpokwa, Yesu azongi na Betania, mboka oyo ezali na ekitelo na ngomba na Olive, epai moi mokobimaka. Mokolo ya mibale mpo na mosala na ye ya nsuka na Yelusaleme esuki bongo. Na ntembe te, Yesu akei lisusu kolala epai ya moninga na ye Lazare. Ezali butu ya minei oyo ye alekisi na Betania kobanda mokolo ya mitano, mokolo oyo autaki na Yeriko.

Sikawa, tokómi mokolo ya mibale 11 Nisan. Na ntongontongo, Yesu mpe bayekoli na ye bazongeli mobémbo. Lelo ekozala mpenza mokolo ya ntina mingi; mokolo ya mosala mingi koleka uta ntango oyo Yesu azali kokokisa mosala na ye. Akomonana na tempelo mpo na mbala ya nsuka. Mokolo oyo mokozala mpe mokolo na nsuka ya mosala na ye liboso ete asambisama mpe abomama.

Mpo na kokende na Yelusaleme, Yesu mpe bayekoli na ye bazongeli bobele nzela ya ngomba na Olive. Pembeni na nzela oyo ezali kouta na Betania, Petelo amoni nzete oyo Yesu alakelaki mabe lobi na ntongo. Alobi na ye ete: “Labi, tala nzeté na figi oyo olakelaki mabe, esili kokauka.”

Kasi mpo na nini Yesu akausaki nzete yango? Ayebisi bantina, ete: “Nazali koloba na bino solo ete, soko bozali na kondima mpe bokobeta ntembe te, bokosala bobele oyo esali ngai na nzeté na figi oyo te, kasi ata soko bokoloba na ngomba oyo [ngomba na Olive, esika oyo bazalaki likoló na yango] ete: ‘Opikwa mpe obwakama na mai, ekozala bobele bongo. Nyonso ekolombaka bino na libondeli, soko bokondima, bokozwa yango.’”

Na kokausáká nzeté, Yesu amonisi bongo epai na bayekoli na ye ete, basengeli kozala na kondima epai na Nzambe. Na yango alobi na bango ete: “Biloko nyonso bizali bino kosenga na kobondela, bondima ete bosili kozwa mpe yango, bokozwa yango.” Wana ezali liteya ya ntina mingi, oyo basengeli kosimba malamu, mingimingi na ntina na komekama oyo ezali kozela bango mosika te. Kasi, boyokani mosusu bozali kati na kufa ya nzeté wana mpe kondima.

Lokola nzeté wana na figi, libota na Yisraele ezali na ezaleli ya bokosi. Ya solo, atako Yisraele asalaki elongo na Nzambe kondimana oyo azali komonisa na libándá lokola nde azali kotósa mitinda, nzokande Yisraele azangi kondima mpe azali kobota mbuma te. Mpo na kozanga kondima na ye, azali nkutu pene na koboya Mwana na Nzambe! Yango wana, na ntango akausaki nzeté na figi wana ezangi kobota mbuma, Yesu asaleli yango lokola elakiseli minene mpo na komonisa nsuka oyo ezali kozela libota yango likobota mbuma te, liye lizangi kondima.

Nsima na mwa moke, Yesu mpe bayekoli na ye bakoti na Yelusaleme. Bakei na tempelo lokola ezalaki momeseno na bango, epai kuna Yesu abandi koteya. Banganga-kapita mpe mikóló na mboka, baoyo babosani te likambo oyo Yesu asalaki lobi loleki epai na bato oyo bazalaki kosanzé mbongo kati na tempelo, batuni ye motuna oyo na matumoli ete: “Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Mpe nani apesi yo bokonzi yango?”

Nde Yesu azongisi ete: “Ngai mpe nakotuna bino likambo moko, soko bokoloba na ngai, ngai mpe nakoyebisa bino na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo. Batisimo na Yoane euti wapi? Na likoló soko na bato?”

Banganga mpe mikoló na mboka bakómi kotunana mpo na koluka eyano nini bakozongisela ye. “Soko tokoloba ete: ‘Na likoló,’ akoloba na biso ete: ‘Mpo na nini bondimaki ye te?’ Soki tokoloba ete: ‘Na bato’ tokobanga bato, mpamba te, bango nyonso batangi Yoane ete azalaki mosakoli.”

Ezangi bango eyano ya kozongisa, bakonzi wana balobi na Yesu ete: “Toyebi te.”

Bongo Yesu alobi na bango ete: “Ngai mpe nakoloba na bino te mpo na bokonzi bozali ngai kosala makambo oyo.” Matai 21:19-27; Malako 11:19-33; Luka 20:1-8.

▪ Likambo nini likesenisi mokolo ya mibale ya 11 Nisan mpe mikolo nyonso mosusu?

▪ Mateya nini Yesu apesi na kokausáká nzeté na figi?

▪ Ndenge nini Yesu ayanoli na baoyo batuni ye soko na bokonzi nini ye azali kosala makambo mosusu?