Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nini epesami nzela na kosala na mokolo na sabata?

Nini epesami nzela na kosala na mokolo na sabata?

Mokapo 32

Nini epesami nzela na kosala na mokolo na sabata?

MOKOLO mosusu ya sabata, Yesu akoti na eyanganelo pembeni na libeke ya Galilai. Kuna na kati ezali na moto moko oyo loboko na ye ekauka. Bakomeli mpe Bafalisai bazali kotala Yesu soko akobikisa moto yango. Na nsuka batuni ye ete: “Bakoki nde kobikisa moto na mokolo na sabata?”

Bakonzi na mangomba Bayuda bakanisi ete, lotomo ezali ya kosalisa moto na maladi mokolo na sabata bobele soko bomoi na ye ezali na likama. Bazali koteya na ndakisa ete, na mokolo na sabata epekisami kozongisa mokwa to kokanga eteni ya elamba na esika evimbi mpo na konyolisa yango. Soko Bakomeli mpe Bafalisai batuni Yesu, ezali mpo na kozwa likambo bakoki kofunda ye na yango.

Nzokande, Yesu ayebi makanisi na bango. Amoni mpe ete bazali na makanisi na kolekisa ndelo mpe na kotemela Makomami, na likambo etali, nini ekoki kobengama ete ezali mosala oyo ebuki mobeko na sabata. Mpo na yango Yesu abongisi ntembe na kolobáká na moto oyo loboko na ye ekauká ete: “Telema mpe yaka na kati.”

Na nsima, kotalaka epai na Bakomeli mpe Bafalisai, Yesu alobi na bango: “Moto nani kati na bino oyo azali na mpate, soko ekokwea na libulu na mokolo na sabata, akosimba yango mpe akobimisa yango te?” Mpo ete mpate ezali ebwele ekoki kopesa mosolo mwa mingi, akotika yango kati na libulu te kino lobi, mpamba te ekoki kokufa mpe akozanga. Lisusu, Makomami malobi ete: “Moyengebeni akobatela bomoi na bibwele na ye.”

Kolimbolaka ntina na maloba na ye, Yesu abakisi: “Moto aleki mpate na motuya boni! Ekoki nde kosala malamu na mokolo na sabata.” Bakonzi na mangomba bakoki kozongisa ata liloba moko te liboso na mayele oyo ya Yesu, oyo mpe emonisi ete azali kookela bato mawa; bafandi nyee.

Yango eyokisi Yesu nkanda mpe motema mpasi mpo na bozoba na bango na motó makasi. Yesu atambwisi miso na ye likolo na bango nyonso. Bongo alobi na moto na maladi ete: “Sembola loboko na yo.” Ye mpe asemboli yango, mpe loboko na ye ebongi.

Na esika ete basepela lokola Yesu abikisi moto oyo, Bafalisai babimi mpe babandi kobongisa mwango mpo na koboma Yesu, elongo na bato ya Hérode. Bato ya Hérode bazali na parti politike oyo kati na yango Basadukai mpe bazali. Mingimingi, bato na Hérode balingaka Bafalisai te, kasi sikawa bayokani bango nyonso mpo na kotelemela Yesu. Matai 12:9-14; Malako 3:1-6; Luka 6:6-11; Masese 12:10; Exode 20:8-10.

▪ Motindo nini Yesu akweisi ntembe kati na Bafalisai mpe ye?

▪ Bayuda bakanisi nini mpo na oyo etali kosalisa moto na mokolo na sabata?

▪ Elakiseli nini Yesu asaleli mpo na kokweisa likanisi mabe na bango?