Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nini ezali kobebisa moto?

Nini ezali kobebisa moto?

Mokapo 56

Nini ezali kobebisa moto?

BOTEMELI oyo Yesu akutani na yango eyei makasi koleka. Ezali bobele te ete mingi kati na bayekoli na ye batiki ye, kasi, na Yudea, Bayuda bazali koluka koboma ye, lokola ntango azalaki na Yelusaleme mpo na Pasika ya mobu 31.

Sikawa Pasika ya mobu 32 ekoki. Mpo na kotosa mobeko na Nzambe, Yesu akei na Yelusaleme mpo na elambo yango. Kasi, amibateli mpenza, mpamba te bomoi na ye ezali na likama. Na nsima, azongi na Galilai.

Mbala mosusu ezali na Kapernaume nde Bafalisai mpe Bakomeli bauti na Yelusaleme bayei kokutana na ye. Bazali koluka bilembo mpo na kofunda ye ete akotosaka mibeko ya lingomba te. Batuni ye: “Mpo na nini bayekoli na yo bakobukaka mibeko na mikóló na kala? Mpamba te bakosukolaka maboko te wana ekolyaka bango.” Lisengami oyo euti na Nzambe te, kasi na miso na Bafalisai ezali lisumu monene mpo na moto soko akozanga kotosa etinda oyo ya kosukola maboko kino na mabolongo, liboso ya kolya.

Na esika ete ayanola na efundeli na bango, Yesu amonisi bango ete bango nde bazali kobuka mobeko na Nzambe na nkò. Alobi: “Mpo na nini bino bokobukaka mibeko na Nzambe mpo na bonkoko na bino? Mpo ete Nzambe alobaki ete: ‘Kumisa tata na yo mpe mama na yo,’ mpe ete: ‘Ye oyo akoloba mabe mpo na tata to mama, tika ete akufa!’ Nde bino bokolobaka ete: ‘Ye nani azali koloba na tata to na mama ete: “Eloko nakoki kosalisa bino na yango nasili kopesa yango likabo epai na Nzambe,” moto wana azali lisusu na mokumba te ete akumisa tata na ye to mama na ye.’”

Bafalisai bazali mpenza koteya ete mosolo, to eloko nyonso mosusu epesami lokola likabo epai na Nzambe ezali mpo na tempelo, mpe ekoki kosalelama mpo na mosala mosusu te. Nzokande, momeseno bazali kosalela ezali boye ete likabo oyo etangami bongo ekofanda epai na oyo apesaki yango. Na bongo mwana akoki komilongola na mokumba ya kosalisa baboti na ye oyo bakómi mibange, baoyo mbala mosusu bazali na mpasi, na kolobáká bobele ete mosolo na ye to biloko na ye bizali “kolobani” elingi koloba likabo lityami pembeni mpo epesama na Nzambe to na tempelo.

Yesu ayoki solo mabe na komona ndenge Bafalisai bazali kobebisa Mibeko na Nzambe. Yango wana alobi na bango ete: “Boye mpo na mateya na bino bobebisi Liloba na Nzambe. Bakosi! Yisaya asakolaki malamu mpo na bino ete: ‘Bato oyo bakotosaka ngai na minoko, kasi mitema na bango mizali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai se mpamba, mpo ete bakolakisaka malako mazali mibeko na bato.’”

Ntango mosusu bibele balongwaki wana mpo na kotika esika na Bafalisai ete batuna Yesu. Bafalisai nde bayebi koyanola eloko te liboso na mpamela makasi oyo Yesu apameli bango; yango wana, Yesu abengi bibele ete babelema. Alobi na bango: “Boyoka mpe bokanga ntina. Yango ekoingela na monoko ekobebisa moto te. Kasi oyo ekobima na monoko, yango wana ekobebisa moto.”

Na nsima, ntango bakoti na ndako, bayekoli na ye balobi na ye ete: “Oyebi ete Bafalisai bazoki na mitema wana eyoki bango maloba na yo?”

Yesu ayanoli bango ete: “Nzeté nyonso oyo Tata na ngai na likoló akónaki te bakopikola yango. Tika bango, bazali bakufi miso oyo bazali kokamba bakufi miso na nzela. Soki mokufi miso akokamba mokufi miso na nzela, bango mibale bakokwea na libulu.”

Emonani lokola ete Yesu akamwi, ntango Petelo atuni ye na nkombo ya bayekoli nyonso, ndimbola ya polele mpo na koyeba likambo oyo ezali kokómisa moto mbindo. Yesu ayanoli ete: “Bino mpe bozwi naino mayele te? Bososóli te ete oyo ekoingela na monoko ekoleka kino na libumu mpe ekobwakama libanda? Nde oyo ekobima na monoko euti na motema; yango wana ekopesa moto mbindo. Mpo uta na motema ekobima makanisi mabe, libomi koboma moto, ekobo, pite, moyibi, litatoli na lokuta, kotuka; ezali yango ekopesa moto mbindo. Kasi kolya na maboko masukwami te, yango ekopesa moto mbindo te.”

Na maloba wana, Yesu apekisi bopeto te. Alingi koloba te ete ebongi te kosukola maboko liboso ya kolamba bilei to liboso ya kolya. Te, azali nde kokweisa ezaleli ya bokosi ya bakonzi na mangomba oyo bazali komeka kobongola mibeko ya sembo ya Nzambe na kopesaka lokumu mingi na mibeko oyo mitongami likoló na Makomami te. Ezali nde misala mabe ezali kopesa mbindo epai na moto mpe Yesu amonisi ete yango ezali kouta na motema. Yoane 7:1; Deteronome 16:16; Matai 15:1-20; Malako 7:1-23; Exode 20:12; 21:17; Yisaya 29:13.

▪ Botemeli nini Yesu akutani na yango sikawa?

▪ Bafalisai bafundi Yesu mpo na likambo nini, kasi engebene Yesu, ndenge nini bango moko bazali kobuka Mibeko na Nzambe na nkò?

▪ Engebene Yesu, nini ezali kokómisa moto mbindo?