Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nsango euti na likolo

Nsango euti na likolo

Mokapo 1

Nsango euti na likolo

BIBLIA na mobimba na yango ezali nsango euti na likolo, mpamba te ezali Tata na biso na likolo nde apesaki biso yango mpo na koteya biso. Nzokande, ekoki sikawa penepene na mibu 2 00O, nsango mibale ya lokumu koleka mpe ya ntina mingi epesamaki na Gabriele, anzelu oyo “akotelemaka liboso na Nzambe.“ Totala likambo oyo ememaki ye awa na mabele na mabaku wana mibale.

Tokomi na mobu 3 liboso ya ntango na biso. Na bangomba na Yudea, mosika te na Yelusaleme, nganga moko ya Jehovah, nkombo na ye Zakaria afandi kuna. Mobali wana mpe mwasi na ye Elizabete bazali sikawa mibange mpe bazali na mwana te. Ntango ngala na ye ekoki, Zakaria akei na Yelusaleme mpo na kokokisa mosala na ye ya nganganzambe kati na tempelo ya Nzambe. Na ntango wana nde Gabriele abimeli ye pwasa na loboko ya mobali na etumbelo ya malasi ya bosantu.

Zakaria abangi mingi mpenza. Kasi Gabriele alendisi ye mpe alobi na ye ete: “Obanga te, Zakaria, mpo ete Nzambe ayoki libondeli na yo. Elizabete akobotela yo mwana mobali, mpe okobyanga ye na nkombo Yoane.“ Alobi lisusu ete Yoane “akozala monene liboso na Jehovah“ mpeˈakobongisela Jehovah libota lisili komilengela.ˈ

Makanisi ya Zakaria mabulungani mpenza. Azali kondima te ete Elizabete mpe ye bakoki kobota mwana na mbula oyo bakomi na yango. Bongo Gabriele abakisi lisusu ete: “Okoloba lisusu te kino makambo oyo makobima, mpamba te ondimi maloba na ngai te.“

Na ntango wana, baoyo bazali na libanda babandi komituna mpo na nini Zakaria azali koumela kati na tempelo. Kasi, ebimi ye, kosololaka na bilembo na maboko mpo ete akoki kosolola na nzela mosusu te, bato banso basosoli ete auti komona emo-naneli.

Wana Zakaria asilisi mosala na ye na tempelo, azongi epai na ye. Nsima mwa moke, makambo oyo anzelu alobaki makokisa-mi: Elizabete azwi zemi! Wana ezali ye kozela kobota, amibombi epai na ye sanza mitano.

Kasi tala Gabriele ayei lisusu. Azali koloba epai na nani? Epai na elenge mwasi moko nkombo na ye Marie, abali naino te mpe afandi na mboka Nazarete. Nsango nini amemeli ye? Alobi na ye ete: “Ozwi boboto na miso na Nzambe; tala, okozwa zemi mpe okobota mwana mobali mpe okobyanga nkombo na ye Yesu.“ Abakisi ete: “Ye akozala mokonzi, mpe akobyangama Mwana na Oyo-Aleki-Likolo; . . . mpe akozala na bokonzi likolo na ndako na Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.“

Na ntembe te Gabriele asepeli mingi na mokumba oyo azwi mpo na koya kopesa nsango oyo. Na masolo mazali kolanda, tokoyekola makambo mingi likolo na Yoane mpe likolo na Yesu, mpe tokokanga ntina malamu mpenza mpo na nini nsango oyo eutaki na likolo ezali na ntina monene. 2 Timote 3:16; Luka 1:5-33.

Nsango nini mibale ya ntina mpenza eutaki na likolo?

▪ Nani ayei kopesa nsango yango, mpe epai na nani?

▪ Mpo na nini nsango yango mibale ezali mpasi mpo na kondima yango?