Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango Mwana na moto akoya

Ntango Mwana na moto akoya

Mokapo 93

Ntango Mwana na moto akoya

YESU azali naino epai na likolo ya mboka (ekoki kozala na Samaria, to na Galilai) wana Bafalisai bazali kotuna ye mpo na koya ya Bokonzi. Bakanisi ete ekoya na lolenge na polele mpenza; kasi Yesu alobi ete: “Bokonzi na Nzambe ekoya na motindo ete bokotala yango te; bakoloba mpe te ete: ˈTala awa!ˈ, to ˈYango kuna!ˈ Mpo ete bokonzi na Nzambe ezali katikati na bino.”

Maloba oyo na Yesu ete, “katikati na bino” esili mbala mosusu kobongolama ete “kati na bino.” Na yango, bamosusu basili kosukisa ete, engebene Yesu, Bokonzi na Nzambe efandi kati na mitema ya basaleli na Nzambe. Nzokande, na ndenge emonani, Bokonzi na Nzambe ezali te kati na mitema ya Bafalisai oyo bazangi kondima, baoyo Yesu azali koloba na bango. Kasi, ezalaki katikati na bango na ndimbola oyo ete, moto oyo aponami mpo na kozala Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe, elingi koloba Yesu Klisto, azali katikati na bango.

Ekoki mpenza kozala ete nsima wana Bafalisai bakei, nde Yesu alandi lisolo elongo na bayekoli na ye likolo na koya na Bokonzi. Azali mpenzampenza kokanisa mpo na koya na ye kati na nkembo ya Bokonzi, wana epesi ye likebisi oyo: “Bakoloba na bino ete: ˈTala kuna!ˈ, ˈTala awa!ˈ Bobima te mpe bolanda bango te [ba Masiya ya lokuta]. Mpo ete lokola na ntango mokalikali mokopelaka, mokopelaka na epai moko na likolo kino epai mosusu, Mwana na moto akozala bongo na mokolo na ye.” Na maloba oyo Yesu amonisi ete, lokola mokalikali emonanaka na etando monene mpenza, bobele bongo bilembo na koya na ye kati na nkembo na Bokonzi bikomonana polele na bato nyonso baoyo bakolinga komona yango.

Na nsima, Yesu asali bokokani elongo na makambo masila koleka mpo na kolakisa lolenge nini bato bakosala na ntango na koya na ye. Alimboli ete: “Lokola na mikolo na Noa, ekozala bongo na mikolo na Mwana na moto . . . Lokola mpe na mikolo na Lota: balyaki, bamelaki, basombaki, batekaki, bakonaki, batongaki, nde na mokolo elongwaki Lota na Sodome, moto na sufulu na likolo enokaki mpe ebomaki bango nyonso. Ekozala bongo na mokolo na koya na Mwana na moto.”

Yesu alingi koloba te ete bato na ntango ya Noa mpe Lota babomamaki bobele mpo bazalaki kolya, komela, kosomba, koteka, kokona mpe kotonga. Ata Noa mpe Lota, elongo na mabota na bango, basalaki mpe makambo nyonso wana. Likeseni ezali ete, bamosusu bamipesaki mobimba na misala yango mokolo na mokolo kozanga kotya ata likebi moke na mokano na Nzambe, ezali mpo na ntina yango nde babomamaki. Ezali bobele mpo na ntina wana nde bato bakobomama ntango Klisto akoya na bolozi monene oyo ekokwela biloko ya ntango oyo.

Kolobelaka makasi mpo na ntina ya kozwa ekateli noki ntango bilembo bikomonana mpo na koya na ye kati na nguya ya Bokonzi, Yesu abakisi ete: “Na mokolo yango, oyo akozala na likolo na ndako mpe biloko na ye bizali na kati na ndako, akita kozwa yango te; bobele bongo, ye oyo akozala kati na elanga azonga lisusu te. Kanisa mwasi na Lota.”

Ntango bilembo ya kozonga na Klisto bikomonana, esengeli te ete moto akakatana mpo na kozwa ekateli nokinoki likolo na bokangami na ye epai na biloko ya mosuni. Emonani mpenza ete, ntango abimaki na Sodome, mwasi na Lota azongisaki liso nsima na mawa nyonso na ntina na biloko oyo atikaki nsima na ye, mpe akomaki likonzi na mongwa.

Kolandaka lisolo na ye mpo na komonisa lolenge oyo koya na ye ekozala, Yesu alobi na bayekoli na ye ete: “Na butu yango bato mibale bakozala na mbeto moko, moko akokamatama, mpe mosusu akotikala. Basi mibale bakozala kotuta esika moko moko akokamatama mpe mosusu akotikala.”

Kokamatama, ezali likambo likokani na bokoti ya Noa elongo na libota na ye kati na masuwa, to na kobima ya Lota elongo na libota na ye longwa na Sodome, na litambwisi ya anzelu. Yango elimboli lobiko. Nzokande, kotikala elimboli kobomama.

Na maloba oyo, bayekoli batuni Yesu ete: “Epai wapi Nkolo?”

Yesu ayanoli: “Esika nzoto ezali, mpongo mpe ekoyangana wana.” Baoyo “bazwami” mpo na lobiko bazali lokola mpongo oyo ekomonaka mosika mpo ete bazali koyangana esika “nzoto” ezali. Nzoto elakisi Klisto ya solo na boumeli ya kozonga na ye ezangi komonana, kati na nkembo na Bokonzi mpe na elambo na elimo oyo Jehovah abongisi. Luka 17:20-37; Genese 19:26.

▪ Na ndimbola nini Bokonzi ezalaki katikati na Bafalisai?

▪ Na ndimbola nini koya na Yesu ezali lokola mokalikali?

▪ Mpo na nini bato bakobomama na ntango na koya na Klisto?

▪ ˈKokamatamaˈ mpe ˈkotikalaˈ elimboli nini?