Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntembe na ntina na Yesu

Ntembe na ntina na Yesu

Mokapo 41

Ntembe na ntina na Yesu

MWA ntango moke nsima wana ayambamaki na ndako na Simona, Yesu abandi mobembo ya mibale mpo na kokende kosakola na Galilai. Na mobembo na ye ya liboso kati na teritware yango, azalaki elongo na bayekoli na ye ya liboso, Petelo, André, Yakobo mpe Yoane. Kasi ya mbala oyo bantóma 12 bazali na ye elongo, bakisa basi mosusu, kati na bango, Marie Madeleine, Suzanne mpe Jeanne, oyo mobali na ye azali kapita na ndako na mokonzi Hérode.

Lokola mosala na Yesu ezali kokóla, ntembe na ntina na ye ezali kobakisama. Bamemeli Yesu moto moko azali na bilimu mabe, miso na ye makufa mpe alobaka te. Ntango Yesu abikisi ye, kosikolaka ye na maboko ya bilimu mabe, abandi koloba mpe komona; bibele bakamwi mingi. Batunani: “Oyo Mwana na Davidi te?”

Bibele mingi bayangani zingazinga na ndako epai Yesu azali kofanda. Yesu na bayekoli na ye bazwi ata ntango ya kolya te. Longola baoyo bazali kotunana soki azali “Mwana na Davidi” te oyo bazali kozela uta kala, ezali mpe na bakomeli mpe Bafalisai oyo balandaki ye longwa na Yelusaleme mpo na kotyola ye. Epai mosusu, ntango bandeko na Yesu bayoki nsango ete bibele bazali kolanda Yesu, bayei mpo bakamata ye. Mpo na nini?

Mpo ete bandeko na Yesu bandimi naino te ete ye azali Mwana na Nzambe. Lisusu bazali kokoka kondima te ete Yesu oyo, ndenge bango bamonaki ye kokola na Nazarete, akoka kobimisa yikiyiki mpe ntembe ya ndenge oyo. Yango wana bakanisi ete motó na ye ezali lisusu malamu te. Bazali koloba ete “ye azali na ligboma,” mpe balingi kokanga ye na makasi mpe kokenda na ye.

Nzokande, ntembe ezali te ete Yesu abikisaki moto oyo azalaki na bilimu mabe. Bakomeli mpe Bafalisai bayebi ete bakoki koangana te bosolo ya bikamwiseli ya Yesu. Yango wana balobi epai na bato mpo na kotyola Yesu: “Moto oyo azali kobimisa bilimu mabe bobele na nguya na Belezebula, mokóló na bilimu mabe.”

Koyebaka makanisi na bango, Yesu abengi bakomeli mpe Bafalisai, mpe alobeli bango ete: “Bokonzi na bokonzi bokabwani kati na yango mpenza bokobeba. Mboka na mboka mpe ndako na ndako oyo ekabwani kati na yango mpenza, ekotelema te. Soko Satana akobimisa Satana, akabwani kati na ye moko; boye bokonzi na ye ekotelema boni?”

Oyo nde maloba na mayele makoki kotyamela ntembe te! Lokola Bafalisai bandimi ete bamosusu kati na bango babimisaki bilimu mabe, Yesu atuni bango lisusu: “Soko ngai nabimisi bilimu mabe na nguya na Belezebula, bana na bino bazali kobimisa yango na nguya ya nani?” Na maloba mosusu, efundeli oyo bango bafundi Yesu ezali nde mpo na bango moko. Na nsima Yesu ayei koloba ete: “Nde soko ngai nazali kobimisa bilimu mabe na nzela na elimo na Nzambe, bokonzi na Nzambe esili koyela bino.”

Mpo na komonisa ete nguya na ye ya kobengana bilimu mabe ezali elembo ete azali na bokonzi likoló na Satana, Yesu apesi elakiseli oyo: “Moto akoingela na ndako na elombe na nzela nini mpe akokamata biloko na ye boni soko liboso akangi elombe te? Nsima na yango akoki solo kokamata biloko na ndako na ye. Ye oyo azali na ngai elongo te azali kotelemela ngai mpe ye oyo akoyanganisa na ngai elongo te azali kopanzapanza.” Emonani polele ete Bafalisai batemeli Yesu, komonisáká ete bazali basali ya Satana. Bazali kopengwisa Bayisraele ete bandimela Klisto te.

Yango wana Yesu ayebisi na banguna oyo mpe basaleli na Satana ete “lituki na kotuka elimo santu ekolimbisama te.” Alimboli: “Ye nani akoloba liloba kotemela Mwana na moto akolimbisama yango. Nde ye nani akoloba liloba kotemela elimo santu akolimbisama te, soko na ntango oyo soko na ntango ekoya.” Bakomeli mpe Bafalisai oyo basali lisumu likoki kolimbisama te, mpo ete bawangani ekamwiseli moko esalemi na nzela na elimo santu na Nzambe, kolobaka ete esalemi na nguya ya Satana. Matai 12:22-32; Malako 3:19-30; Yoane 7:5.

▪ Nini ekesenisi mobembo ya mibale na Yesu na Galilai na oyo ya liboso?

▪ Mpo na nini bandeko na Yesu bazali koluka kokanga ye?

▪ Na lolenge nini Bafalisai bamekaki kotyola bikamwiseli ya Yesu, mpe Yesu ayanoli nini na bifundeli na bango?

▪ Bafalisai oyo bakwei na lisumu nini, mpe mpo na nini?