Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntembe na ntina na tata

Ntembe na ntina na tata

Mokapo 69

Ntembe na ntina na tata

NA BOUMELI na elambo, matata emati kati na Yesu mpe mikoló na Bayuda. Yesu alobi na bango ete: “Nayebi ete bozali bana na Abrahame; kasi bozali koluka ete boboma ngai mpo ete liloba na ngai ezali na efandelo kati na bino te. Ngai nakosololaka yango emoni ngai epai na Tata nde bino bokosalaka yango eyoki bino epai na tata na bino.”

Yesu amonisi polele ete tata na bango, ata atangi nkombo na ye te, akeseni na Tata na ye. Lokola bayebi te soko Yesu azali koloba na ntina na nani, mikoló na Bayuda bayanoli ye ete: “Tata na biso azali Abrahame.” Bakanisi ete bazali na kondima lokola oyo na Abrahame, ye oyo azalaki moninga na Nzambe.

Kasi Yesu ayokisi bango nsoni na eyano oyo: “Soko bozali bana na Abrahame, bosala misala na Abrahame.” Na yango mwana nyonso ya malamu akomekolaka tata na ye. “Kasi sikawa boluki koboma ngai, moto oyo ayebisi bino makambo na solo mayoki ngai epai na Nzambe. Abrahame asalaki bongo te.” Abakisi: “Bino bozali kosala misala na tata na bino.”

Kino sikawa mikoló na Bayuda bazali koyeba te soko Yesu azali koloba na ntina na nani. Balobi lisusu ete bazali bana na solosolo na Abrahame: “Biso tozali bana na ekobo te.” Yango wana, mpo na kondimisa ete bazali basambeli na solo lokola Abrahame, balobi lisusu ete: “Tozali bobele na tata moko, ye Nzambe.”

Kasi Nzambe azali solo Tata na bango? Yesu alobi boye: “Soko Nzambe azali nde tata na bino mbele bokolingaka ngai. Mpo ete ngai nabimi na Nzambe mpe nazali awa. Mpamba te, nayei na ntina na ngai moko te kasi Ye atindi ngai. Mpo na nini bokososola maloba na ngai te?”

Yesu asali makasi mpo na komonisa epai na mikoló wana na mangomba makambo oyo makoki kobimela bango na ndenge baboi ye. Kasi sikawa alobeli bango na polele nyonso ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino.” Diable azali tata ya motindo nini? Yesu alobi ete azali mobomi mpe abakisi: “Azali mobuki na lokuta mpe tata na lokuta.” Mpe asukisi boye: “Ye oyo auti na Nzambe akoyokaka maloba na Nzambe. Na ntina oyo bokoyokaka te mpo ete bouti na Nzambe te.”

Lokola maloba na Yesu makweisi bango, Bayuda basiliki mpe bazongiseli ye boye: “Tolobi nde na elonga te ete yo ozali Mosamaria mpe ozali na elimu mabe?” Babengi ye “Mosamaria” mpo na kotyola ye, mpamba te libota na Basamaria eyinami na Bayuda.

Kozanga koyanola na kofinga na bango ete ye azali Mosamaria, Yesu azongiseli bango nde boye ete: “Ngai nazali na elimu mabe te kasi nazali kokumisa Tata na ngai; nde bino bozali kotyola ngai.” Apesi lisusu elaka oyo ekamwisi bato: “Soko nani akotosa liloba na ngai, libela akomona kufa te.” Ya solo, alingi koloba te ete baoyo bazali komekola ye bakokufa te mokolo mosusu. Yesu alingi nde koloba ete bakobomama mpo na libela te, to bakokufa “liwa ya mibale” te, oyo mpo na yango elikya ya lisekwa ezali te.

Nzokande, Bayuda bakangi ntina ya maloba na Yesu te. Babakisi boye: “Sikawa toyebi ete ozali na elimu mabe. Abrahame akufaki mpe basakoli lokola, mpe yo olobi ete, Soko nani akotosa liloba na ngai, libela akoyeba kufa te. Yo nde oleki Abrahame tata na biso oyo akúfá? Basakoli mpe bakúfá. Ozali komizalisa lokola nani?”

Na boumeli ya ntembe oyo nyonso, ezali polele ete Yesu alingi komonisa epai na bato yango ete ye azali Masiya oyo alakamaki. Kasi na esika ete ayanola mbala moko na motuna na bango mpo na komiyebisa soko azali nani, apesi ndimbola oyo: “Soko nazali komikumisa, lokumu na ngai ezali mpamba. Nde Tata na ngai azali kokumisa ngai, ye oyo bolobi mpo na ye ete, azali Nzambe na bino. Nde boyebi ye te, kasi ngai nayebi ye. Soko nalobi ete nayebi ye te, nakozala lokola bino, mobuki na lokuta.”

Bongo na nsima alobeli lisusu mpo na mosembwi Abrahame: “Abrahame, tata na bino, asepelaki komona mokolo na ngai; amonaki yango mpe ayokaki esengo.” Na yango, na miso ya kondima, Abrahame asepelaki liboso mpo na koya na Masiya oyo alakamaki. Na motó makasi na bango, Bayuda balobi epai na Yesu: “Ozali naino na mibu ntuku mitano te, mpe osili komona Abrahame?”

Mpo na yango Yesu ayanoli: “Solosolo nalobi na bino ete, Naino ezalaki Abrahame te, ngai nazali.” Azali nde kolobela bomoi na ye liboso ete akoma moto, ntango azalaki ekelamu na elimo mpe na nguya kati na makóló.

Bayuda basiliki makasi mpo Yesu alobi ete azalaki na bomoi liboso na Abrahame. Yango wana balokoti mabanga mpo na kobwakela ye yango. Kasi abombami mpe abimi na tempelo, kozanga likama. Yoane 8:37-59; Emoniseli 3:14; 21:8.

▪ Ndenge nini Yesu amonisi ete ye mpe banguna na ye bazali na tata moko te?

▪ Bayuda balingi koloba nini ntango bafingi Yesu ete Mosamaria?

▪ Na ndimbola nini Yesu alobi ete bayekoli na ye bakomona kufa te?