Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina ya kobondela mpe ya komikitisa

Ntina ya kobondela mpe ya komikitisa

Mokapo 94

Ntina ya kobondela mpe ya komikitisa

LIBOSO, ntango azalaki na Yudea, Yesu apesaki lisese moko mpo na ntina ya kolendendala kati na mabondeli. Nzokande ntango akei sikawa na Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka, alobeli lisusu makasi mpo na ntina ya kobondela na etingya. Emonani lokola ete azali bobele na Samaria to na Galilai wana epesi ye lisese oyo mosusu epai na bayekoli na ye.

“Kati na mboka moko, ezalaki na mosambisi oyo abangaki Nzambe te mpe akanisaki mpo na moto te. Nde na mboka yango mwasi moko akufeli mobali azalaki, mpe ayaki epai na ye nde alobi ete: ˈLongisa ngai na ntina na moyini na ngai.ˈ Na liboso aboi, nde na nsima alobi na motema na ye ete: ˈAtako nakobanga Nzambe te mpe nakokanisa moto te, kasi mpo ete mwasi oyo atungisi ngai, nakolongisa ye ete alembisa ngai na koya mingi boye te.ˈ”

Sikawa Yesu amonisi liteya ya lisolo na ye: “Yoka yango elobi mosambisi mabe! Nzambe akolongisa baponami na ye te, baoyo bazali kobyanga ye butu na moi, atako ayoki bango na motema molai?”

Na maloba oyo, Yesu alingi koloba te ete Jehovah akokani na mosambisi mabe oyo. Kasi alingaki koloba ete soko mosambisi oyo mabe andimi malɔmbo ya etingya, na ntembe te, Nzambe, ye oyo azali sembo mpe malamu, akoyoka basaleli na ye soko nde bakolendendala kati na mabondeli. Mpe abakisi boye: “Nalobi na bino ete [Nzambe] akolongisa bango nokinoki.”

Wana babola mpe bato mpamba bazali mbala mingi konyokwama mpo na kozanga kolongisama na esambiselo likolo na koponapona, bazwi mpe bato ya lokumu bazali mbala mingi kolongisama. Mpo na Nzambe, akosenzela bobele te ete bato mabe bazwa etumbu ebongi na bango, kasi akosalela mpe boyengebene epai na basaleli na ye, na kopesaka bango bomoi ya seko. Kasi bato boni bandimi mpenza ete Nzambe akolongisa bango nokinoki?

Kolobaka mpenzampenza mpo na ntina ya kozala na kondima kati na nguya ya libondeli, Yesu atuni ete: “Wana ekoya Mwana na moto, akokuta nde kondima awa na mokili?” Atako eyano epesamaki te na motuna oyo, kasi yango emonisi ete bobele bato moke nde bakozala na kondima motindo wana ntango Yesu akoya kati na nguya ya Bokonzi.

Kati na bayoki na Yesu, ezali na bato oyo bazali komikumisa mpo na kondima na bango. Bandimisami ete bazali sembo mpe bazali kotyola bato mosusu. Kati na bato yango, bamoko bakoki kozala bayekoli na Yesu. Ezali mpo na bato nyonso wana nde Yesu apesi lisese oyo ete:

“Bato mibale babutaki kuna na tempelo mpo na kobondela; moko Mofalisai mpe mosusu mokongoli na mpako. Mofalisai atelemi kobondela na motema na ye ete: ˈNzambe, natondi yo ete nazali lokola bato mosusu te, bayibi, bato mabe, bato na ekobo to lokola mokongoli na mpako oyo te. Nakokilaka bilei mbala mibale poso na poso, nakokabolaka ndambo na zomi na biloko nyonso bizwi ngai.ˈ”

Bafalisai bayebani mpo na lolenge na bango ya kolakisa boyengebene na bango mpo na kobenda likebi ya bato mosusu. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya minei, bazali na momeseno ya kokila bilei oyo bango moko bamityelaki mobeko. Lisusu, bazali kofuta ndambo na zomi ata mpo na matiti mpamba ya bilanga. Mwa basanza liboso, na ntango na elambo ya Mingombo, bamonisaki polele ezaleli na bango ya kotyola bato na kolobaka ete: “Ebele oyo na bato bayebi mibeko te [Elingi koloba lolenge oyo Bafalisai bazali kolimbola Makomami], basili kolakelama mabe.”

Kolandaka lisese na ye, Yesu alobi na ntina na moko kati na “baoyo balakelami mabe” ete: “Nde mokongoli na mpako atelemi mosika, alingaki ata kotombola miso na likolo te, kasi abetaki ntolo na ye mpe alobi ete: ˈNzambe, yokela ngai mawa, ngai moto na masumu!ˈ” Na yango, mokongoli wana na mpako andimaki na komikitisa nyonso mabunga na ye. Yango wana Yesu alobi boye: “Nalobi na bino ete: Moto wana akitaki na ndako na ye alongisami koleka oyo wana mosusu; mpamba te ye oyo akomizwela lokumu, lokumu na ye lokolongwa nde ye oyo aboi lokumu, lokumu na ye lokozala monene.”

Na bongo, Yesu alobeli lisusu ntina ya kozala na komikitisa. Ezali likambo ya kokamwa te ete bayekoli na Yesu batalelama mpe na maloba oyo, soki totaleli ezalela ya bomoi kati na yango bakolaki: Bafalisai, baoyo bazali komimona sembo bazali na bopusi mingi, bato ya eleko wana bazali kokumisa mingi etelemelo mpe ezalela ya bomoi na bato. Kasi oyo nde mateya kitoko na komikitisa Yesu apesi awa! Luka 18:1-14; Yoane 7:49.

▪ Mpo na nini Mosambisi mabe andimaki kokata lilombo ya mwasi mokufeli mobali, mpe liteya nini lizwami na lisese na Yesu?

▪ Yesu akoluka kondima ya motindo nini wana ekoya ye?

▪ Mpo na nani Yesu apesi lisese ya Mofalisai mpe mokongoli na mpako?

▪ Tosengeli koboya ezaleli nini oyo Bafalisali bazali na yango?