Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Toli mpo na kolimbisaka baninga

Toli mpo na kolimbisaka baninga

Mokapo 64

Toli mpo na kolimbisaka baninga

YESU azali naino na ndako kuna na Kapernaume elongo na bayekoli na ye. Auti kolimbwela bango ndenge bakoki kobongisa matata oyo ekoki kobima kati na bandeko. Bongo Petelo atuni ete: “Nkolo, soko ndeko na ngai akosalela ngai mabe, nalimbisa ye mbala boni?” Mpo bakonzi na mangomba balobi ete esengeli kolimbisa kino mbala misato, Petelo akanisi ete, ye azali na motema molai mpenza, mpamba te alobi: “Kino mbala nsambo?”

Nzokande, likambo oyo nkutu ya kotanga mbala oyo olimbisi moto ezali mabe mpenza. Yesu apameli Petelo na maloba oyo: “Nalobi na yo te kino mbala nsambo kasi kino mbala ntuku nsambo na nsambo.” Amonisi bongo epai na Petelo ete asengeli te kotya ndelo mpo na kolimbisa.

Yesu asaleli bongo lisese moko mpo na komonisa epai na bayekoli na ye ete basengeli kolimbisa. Alobeli mokonzi moko oyo alingi kosilisa makambo na nyongo na baombo na ye. Bamemeli ye moombo moko oyo azali na nyongo na ye 60 milió na denali. Kasi azali na eloko ya kofuta ye te. Nkolo na ye apesi etinda ete batekisa ye, mpe mwasi na ye mpe bana na ye mpe biloko nyonso azali na yango, mpo ete mbongo na ye efutama.

Eyoki ye bongo, moombo afukameli nkolo na ye mpe abondeli ye ete: “Pesa ngai mwa ntango mpe nakofuta nyongo na yo nyonso.”

Emoni ye boye, nkolo na moombo yango ayoki mawa mpe alimbisi ye nyongo yango. Yesu abakisi ete esili ye kobima, moombo yango akutani na moninga moombo mosusu, oyo azali na nyongo na ye ya denali 100 mpamba. Mobali yango akangi moninga na nkingo lokola aboma ye, kolobáká na ye ete: “Futa nyongo na ngai.”

Nzokande moninga na ye azali na mosolo yango te mpo na kofuta. Afukameli ye mpe abondeli ye ete: “Pesa ngai mwa ntango mpe nakofuta yo.” Kasi na kokesena na nkolo na ye, moombo ayoki mawa te mpo na moninga na ye mpe atindi ete bakanga ye mpe babwaka ye na boloko.

Yesu akobi lisolo na ye na kolobáká boye: “Emoni baninga baombo likambo oyo esalemi, bakei koyebisa yango epai na nkolo na bango. Ye atomboki mpe abengisi moombo oyo na motema mabe. Alobi na ye ete: ‘E moombo mabe mpenza! Nalimbisi yo nyongo yango nyonso mpo ete obondeli ngai. Ekokaki nde na yo te koyokela moninga na yo mawa lokola ngai nayokeli yo mawa?’” Nkolo na ye asiliki, akangisi moombo na motema mabe na boloko kino akofuta nyongo na ye nyonso.

Yesu asukisi na maloba oyo: “Tata na ngai na likoló akosalela bino bongo soko bokolimbisa na mitema na bino te moto na moto na ndeko na ye.”

Oyo nde liteya monene mpo na kolimbisana! Soko tokanisi ete Nzambe alimbisi biso nyongo monene oyo tozali na yango epai na ye, nyongo ya lisumu, libunga nyonso oyo ndeko na biso akoki kosalela biso ezali solo moke mpenza. Lisusu, Jéhovah asili kolimbisa biso mbala nkoto na nkoto. Mbala mosusu toyebaka ata masumu oyo tosaleli ye te. Na yango, tokoki te kolimbisa ndeko na biso mbala mingi koleka, ata soko tozali mpenza na likambo ya kosilikela ye? Omikundola makambo oyo Yesu ateyaki na Lisolo na ye likoló na ngomba, ete ‘Nzambe akolimbisa biso nyongo na biso na meko oyo biso tokolimbisa baye bazali na nyongo epai na biso.’ Matai 18:21-35; 6:12; Bakolose 3:13.

▪ Eloko nini etindi Petelo atuna soki mbala boni asengeli kolimbisa ndeko na ye, mpe mpo na nini akanisi ete kolimbisa mbala nsambo ezali boboto mingi?

▪ Kokesena nini ezali kati na ezaleli ya mokonzi epai na moombo oyo asengi lilimbisi mpe ezaleli ya moombo yango ntango moninga na ye moombo abondeli ye?

▪ Lisese na Yesu eteyi biso nini?