Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tozwa liteya na komekama na Yesu

Tozwa liteya na komekama na Yesu

Mokapo 13

Tozwa liteya na komekama na Yesu

NOKINOKI nsima na kobatisama na ye, Yesu akambami na elimo na Nzambe na esobe ya Yudea. Azali na mposa na kokanisa, mpamba te na mokolo na kobatisama na ye “makolo mafungwamaki,” na boye ete akomaki na makoki ya kososola makambo ya likolo. Azali mpenza na makambo mingi ya kokanisa likolo na yango na bozindo.

Yesu alekisi bongo mikolo 40 mpe butu 40 kati na esobe, alei eloko te. Na nsima, wana eyoki ye nzala, Satana abelemi na ye mpo na komeka ye; alobi na ye ete: “Soko ozali mwana na Nzambe, loba ete mabanga oyo mabongwana mampa.” Kasi Yesu ayebi malamu ete ezali mabe kosalela nguya na ye mpo na komisepelisa. Atemeli lisenginya wana, aboyi kosala bongo.

Diable alembi te. Ameki likambo mosusu. Abeteli Yesu ntembe ete amibwaka na nse longwa na likolo ya tempelo mpo ete baanzelu baya kosunga ye. Kasi Yesu akwei na lisenginya wana te ya koluka kosala ekamwiseli kozanga ntina. Asaleli Makomami na kolobaka ete, ezali malamu te na kotya Nzambe kati na komekama ya motindo wana.

Na lisenginya ya misato, Diable alakisi na Yesu bikonzi nyonso ya mokili mpe alobi na ye ete: “Nakopesa yo oyo nyonso soko okokwea mpe okokumbamela ngai.” Kasi na mbala oyo lisusu Yesu aboyi kokwea na lisenginya, aponi kotikala sembo epai na Nzambe.

Tokoki kozwa liteya na komekama oyo ya Yesu. Na ndakisa, eteyi biso ete, na kokesena na oyo ekanisami na bato mosusu, Diable azali makanisi ya mabe te, kasi moto mpenza, nde azangi komonana. Moko na komekama wana emonisi ete biyangeli nyonso ya mokili bizali ya Diable. Mpamba te, soki ezalaki ya ye te, ndenge nini akokaki kosenginya Yesu ete akopesa ye yango?

Kanisa lisusu na likambo oyo: Diable alobaki ete soki Yesu akumbameli ye, mbele akopesa ye mbano, bikonzi nyonso ya mokili. Diable akoki mpe komeka biso lolenge moko, mbala mosusu na kolakisaka biso likoki ya kozwa misolo, kozwa bokonzi to kokoma moto monene kati na mokili. Kasi tokomimonisa bato ya mayele na kolandaka ndakisa na Yesu; tokotikala sembo epai na Jéhovah ata tomekami na motindo nini. Matai 3:16; 4:1-11; Malako 1:12, 13; Luka 4:1-13.

Ekoki kozala na makambo nini Yesu azali kokanisa na boumeli ya mikolo 40 kati na esobe?

Ndenge nini Diable ameki Yesu?

Liteya nini tozwi na komekama na Yesu?