Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu abengi Matai

Yesu abengi Matai

Mokapo 27

Yesu abengi Matai

NSIMA wana Yesu abikisi ebosono, alongwi na Kapernaume mpe akei pembeni na libeke ya Galilai. Kuna, bibele bayei lisusu epai na ye, mpe abandi koteya bango. Wana ezali ye koleka, amoni Matai, oyo abengami mpe Levi, afandi na biro mpo na kofutisa mpako. Abyangi ye ete: “Landa ngai.”

Na ntembe te Matai ayebi malamu mateya ya Yesu, lokola Petelo, Andre, Yakobo mpe Yoane basilaki koyeba yango ntango Yesu abengaki bango ete balanda ye. Lokola bango, Matai andimi mpe na mbala moko libyangami oyo epesameli ye. Atelemi, atiki mosala na ye ya mokongoli na mpako mpe alandi Yesu.

Na nsima, mbala mosusu ekoki kozala mpo na kosepela libyangami oyo azwaki, Matai abongisi elambo monene na ndako na ye. Longola Yesu mpe bayekoli na ye, baninga ya mosala ya Matai bazali mpe wana lokola. Bayuda mosusu bamonaka ete bakongoli na mpako bazali bato mabe, mpo ete bazali kokongola mpako mpo na bakonzi Baloma oyo bayinami kati na Yisraele. Lisusu, mingi-mingi bazali kosala mosala na bango na koyibaka, bazali kokamata mbongo mingi epai na bato, koleka mbongo esengami mpenza mpo na mpako.

Lokola bamoni ete Yesu ayei na elambo yango mpe azali elongo na bato motindo wana, Bafalisai babandi kotuna bayekoli na ye: “Mpo na nini molakisi na bino akolyaka na bakongoli na mpako mpe na bato na masumu?” Yesu ayoki bango mpe ayanoli bango ete: “Bato na nzoto makasi bakolukaka monganga te, bobele bato na maladi nde bakolukaka monganga. Bokenda koyekola ntina na liloba oyo ete: ˈNalingi mawa, nalingi mbeka te.ˈ Mpamba te nayei kobyanga bayengebeni te kasi bato na masumu.”

Emonani lokola ete, Matai abengisaki bakongoli wana na mpako epai na ye mpo ete bayoka Yesu mpe babikisama na maladi na bango ya elimo. Yesu afandi na bango esika moko mpo na kosalisa bango ete bazala na boyokani malamu elongo na Nzambe. Azali kotyola bango te lokola Bafalisai batondi na lolendo bazalaki kotyola bango. Nde Yesu azali mpenza na mawa, mpe ye azali epai na bango lokola monganga na elimo.

Soki Yesu amonisi motema mawa epai na bato na masumu, elingi koloba te ete azali kokanga miso liboso na masumu na bango, kasi azali kotalela bango lokola bato bazali na maladi na nzoto. Omikundola lisusu ete mokolo mosusu, Yesu atombolaki loboko na ye mpo na kosimba moto na maba mpe alobaki na ye: “Nalingi ete opetwa.” Tomekola ye, mpe tomonisa motema mawa na kosalisaka baoyo nyonso bazali na mpasi, mingimingi na kopesaka bango lisalisi ya elimo! Matai 8:3; 9:9-13; Malako 2:13-17; Luka 5:27-32.

Yesu akuti Matai epai wapi?

Mosala ya Matai ezali nini, mpe mpo na nini bato lokola ye batyolami na Bayuda mosusu?

▪ Likambo nini Bafalisai bamoni yango mabe epai ya Yesu, kasi Yesu ayanoli bango ndenge nini?

▪ Mpo na nini Yesu azali esika moko na bato na masumu?