Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu abondisi mwasi mokufeli-mobali

Yesu abondisi mwasi mokufeli-mobali

Mokapo 37

Yesu abondisi mwasi mokufeli-mobali

MWA ntango moke nsima wana abikisaki mosali na komanda moko na basoda Baloma na bokono na ye, Yesu akei na Naine, mboka moko ezali na ntaka ya bakilometele 30 na nse ya Kapernaume. Bayekoli na ye mpe bibele na bato mosusu balandi ye. Ekoki kozala ete na bantango na mpokwa, bakomi pene na mboka; kuna, bakutani na bato bazali kokende kokunda ebembe. Bazali kokumba nzoto ya elenge mobali na libanda na mboka mpo na kokende kokunda yango.

Mama na mowei azali na mpasi makasi, mpamba te azali mokufeli-mobali mpe oyo azali mwana na ye bobele moko. Ntango mobali na ye akufaki, akokaki komibondisa ete, mwana na ngai ya mobali azali. Atyaki elikya na ye nyonso, mikano na ye nyonso, se na mwana na ye. Kasi sikawa azali lisusu na moto te oyo akoki kobondisa ye. Azali na mawa monene, mpe bato na mboka bazali kokenda na ye elongo na nkunda.

Ntango Yesu amoni mwasi oyo, ayoki mpasi na motema mpo na mawa monene ya mwasi oyo. Alobi na bolingo nyonso, mpe na mpiko oyo ezali kopesa elikya ete: “Tika kolela.” Yango ebendi likebi na bato, na motindo boye ete baoyo bazali komema ebembe batelemi ntango Yesu abelemi pene na tipoyi oyo likolo na yango batye nzoto ya mowei mpe asimbi yango. Banso bazali komituna mpenza likambo nini akosala.

Ya solo, baoyo bazali kotambola elongo na Yesu basila komona ete abikisaki bato mingi na bokono na bango na likamwisi. Kasi ekoki kozala ete naino bamoni ye te kosekwisa moto kati na bakufi. Akoki kosala likambo motindo oyo? Kolobaka na ebembe ya elenge mobali, Yesu apesi etinda ete: “Elenge mobali, nalobi na yo ete, Sekwa!” Mbala moko alamuki! Abandi koloba, mpe Yesu apesi ye epai na mama na ye.

Komonaka ete elenge mobali azali mpenza na bomoi, bamoko bangangi: “Mosakoli monene abimi kati na biso.” Basusu balobi: “Nzambe ayei kotala lisusu libota na ye.” Nsango ya likambo oyo ya kokamwa epalangani nokinoki kati na Yudea mobimba mpe kati na mboka nyonso zingazinga.

Yoane Mobatisi azali ntango nyonso na boloko. Kasi, bayekoli na ye bazali kopesa ye nsango ya makamwisi oyo nyonso Yesu azali kosala, mpe alingi kozwa ndimbola mingi likolo na yango. Akosala nini? Luka 7:11-18.

Likambo nini esalemi wana Yesu abelemi pene na Naine?

Yesu ayoki nini ntango amoni likambo yango, mpe asali nini?

Bato balobi nini na komona likamwisi oyo Yesu asali?