Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu abongisi bantóma liboso na kokende na ye

Yesu abongisi bantóma liboso na kokende na ye

Mokapo 116

Yesu abongisi bantóma liboso na kokende na ye

ELAMBO ya ekaniseli esili, kasi Yesu mpe bantóma na ye bazali naino na eteni na ndako kuna na likoló. Mosika te Yesu akozala lisusu elongo na bango te; nzokande azali naino na makambo mingi ya koyebisa bango. Mpo na kolendisa bantóma na ye, alobi ete: “Tika mitema na bino mitungisama te. Bondimela Nzambe.” Mpe abakisi ete: “Bondimela mpe ngai.”

Yesu alandi koloba: “Na ndako na Tata na ngai bisika bizali mingi. Nakokenda kobongisela bino esika. . . . ete esika ezali ngai, bino bozala wana lokola.” Kasi bantóma bazali kososola te ete Yesu azali koloba na bango mpo na kokende na likoló; yango wana Toma atuni ete: “Nkolo toyebi te soko okokenda wapi. Tokoyeba nzela ndenge nini?”

Yesu azongisi ete: “Ngai nazali nzela, mpe solo, mpe bomoi.” Ya solo, moto akoki kokɔta epai na Tata ya likoló bobele soko andimi ye mpe amekoli lolenge ya bomoi na ye, mpamba te lokola Yesu alobi yango, “moto akokóma epai na Tata te soko na nzela na ngai te.”

Filipe atuni ete: “Nkolo, monisa biso Tata mpe wana ekokoka na biso.” Emonani ete Filipe azali na mposa ete Yesu amonisa bango mpenza Nzambe, lokola amimonisaki kala epai na Moïse, na Eliya mpe na Yisaya. Kasi, na solo mpenza, bantóma bazali na eloko oyo ezali kitoko koleka bimonaneli motindo wana, ezali yango nde Yesu amonisi awa: “Nazali na bino ntango molai boye mpe yo Filipe oyebi naino ngai te? Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.”

Yesu azali mpenza komonisa bomoto ya Tata na ye na lolenge ya kokoka, na boye ete kozala esika moko elongo na ye mpe komona ye, ezali lokola nde omoni Tata. Nzokande, Tata aleki Mwana, ezali yango nde Yesu amonisi awa ete: “Makambo mazali ngai koloba na bino, nalobi yango na bokonzi na ngai moko te.” Yesu amonisi ete mateya oyo ye azali kopesa mauti nde na Tata na ye ya likoló.

Ezali elendiseli mpo na bantóma na koyoka Yesu koloba na bango sikawa ete: “Moto oyo akondima ngai, akosala mpe misala oyo nazali kosala, mpamba te ngai nazali kokende epai na Tata.” Alingi koloba te ete bayekoli na ye bakozwa nguya ya kosala bikamwiseli koleka oyo ya ye. Kasi alingi nde koloba ete, bakosala mosala na bango na boumeli na ntango mingi, na etando eleki monene, mpe mpo na bato mingi.

Nsima na kokende na ye, Yesu akosundola bayekoli na ye te. Alaki ete: “Likambo nini likolɔmba bino na nkombo na ngai, ngai nakosala yango.” Abakisi lisusu ete: “Nakobondela Tata mpe akopesa bino mosungi mosusu ete afanda na bino libela, elimo ya solo.” Na nsima, ntango Yesu akomata na likoló, akosopa elimo santu, mosungi yango mosusu, likoló ya bayekoli na ye.

Kokende na Yesu ebelemi, mpe alobi ete: “Nsima na mwa ntango moke, bamokili bakomona ngai lisusu te.” Yesu akozala ekelamu ya elimo oyo akomonana lisusu na moto te awa na mokili. Kasi alaki lisusu bantóma na ye ya sembo ete: “Bino bokomona ngai mpo ete ngai nazali na bomoi mpe bino bokozala na bomoi.” Ya solo, ezali bobele te ete akomonana na bango na lolenge na moto na nsima na lisekwa na ye, kasi, na ntango na yango, akosekwisa mpe bango lokola bikelamu ya elimo ete bazala na bomoi elongo na ye kuna na likoló.

Sikawa, Yesu apesi lilako oyo kitoko. “Oyo azali na malako na ngai mpe azali kotósa yango, ye wana alingi ngai. Mpe ye oyo alingi ngai, akolingama na Tata na ngai, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye mpenza.”

Na ntango wana, ntóma Yuda, ye oyo abengami lisusu Tadé, akati ye maloba ete: “Nkolo, ntina nini okomimonisa epai na biso nde epai na bamokili te?”

Yesu Ayanoli ete: “Soko moto nani akolingaka ngai, akotósa maloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye. . . . Ye oyo akolingaka ngai te, akotósa maloba na ngai te.” Na kokesena na bayekoli na ye ya botósi, bamokili balingi mateya na Klisto te. Mpe ye azali komimonisa na bango te.

Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu asili koteya makambo mingi epai na bantóma na ye. Ndenge nini bakomikundola makambo yango nyonso, mingi mpenza soki bazali kokanga ntina te, lokola kino sikawa? Likambo na esengo mpenza, Yesu apesi elaká oyo: “Mosungi, elimo santu oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye akolakisa bino makambo nyonso mpe akokundwela bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino.”

Mpo na kolendisa bango lisusu, Yesu alobi ete: “Nazali kotikela bino kimya, nazali kopesa bino kimya na ngai. . . . Tika ete mitema na bino mitungisama te!” Ya solo, Yesu alingi kotika bango, nde alimboli ete: “Soki bolingaki ngai, mbele bosepeli ete nazali kokende epai na Tata, mpamba te Tata aleki ngai.”

Ntango oyo etikali na ye mpo na kolekisa elongo na bango ezali moke. Alobi ete: “Nakosolola na bino lisusu mingi te, mpamba te, mokóló na mokili azali koya mpe azwi eloko kati na ngai te.” Satan le Diable, ye oyo akɔtaki epai na Yuda mpe ayangelaki motema na ye, nde azali mokóló na mokili. Kasi mposa mabe moko ezali te kati na Yesu oyo Satana akoki kozwela yango litomba mpo na kopengola ye na mosala ya Nzambe.

Boyokani malamu elongo na Yesu

Nsima na elambo na ekaniseli, Yesu auti kolendisa bantóma na ye na kosololáká na bango na polele mpe na bosembo nyonso. Mbala mosusu esili koleka katikati na butu. Yango wana Yesu alobi: “Botelema, tolongwa awa.” Kasi, liboso ete bakende, na bolingo oyo azali na yango epai na bango, alandi koloba na bango na kopesáká bango lisese moko kitoko.

Alandi koloba ete: “Ngai nazali vinyo ya solo mpe Tata na ngai azali molóni.” Molóni monene, Jéhovah Nzambe, akónaki vinyo wana ya elilingi na ntango apakolaki Yesu na elimo santu, na ntango azwaki batisimo, na sanza Okotobre ya mobu 29 ya ntango na biso. Kasi Yesu amonisi na nsima ete vinyo ezali bobele elilingi na ye moko te: “Etape na etape kati na ngai oyo ekobota mbuma te, akolongola yango, mpe etape na etape oyo ekobotaka mbuma, akopetola yango, mpo ete ebota mbuma, akopetola yango, mpo ete ebota mbuma mingi. . . . Lokola etape ekoki kobota mbuma yango mpenza te soko ekoumela na vinyo te, bino mpe bokoki kobota mbuma te soko bokoumela kati na ngai te. Ngai mowiti na solo, bino bitape.”

Mikolo 51 nsima na Pantekote, bantóma mpe baklisto mosusu bakokóma bitape ya mowiti ntango elimo santu ekosopama likoló na bango. Na nsuka na yango, bato 144 000 bakokóma bitape ya mowiti na elilingi. Elongo na Yesu Klisto, mobimbi na mowiti ya elilingi, bato yango bakosala mowiti ya elilingi oyo ekobota mbuma ya Bokonzi na Nzambe.

Yesu alimboli lolenge nini kobota mbuma: “Ye oyo aumeli kati na ngai, mpe ngai kati na ye, akobota mbuma mingi mpamba te bokoki kosala likambo longwa na ngai te.” Nde soki moto akobota mbuma te, “akobwakama lokola etape mpe akokauka; bato bakolokota yango mpe bakobwaka yango na móto mpe ekozikisama.” Lisusu, Yesu alaki ete: “Soko bokoumela kati na ngai mpe maloba na ngai makoumela kati na bino, bokolɔmba likambo nini elingi bino, mpe yango ekosalamela bino.”

Mpe Yesu alobi lisusu ete: “Tata na ngai akokumisama na likambo oyo ete, bobotaka mbuma mingi mpe bokoma bayekoli na ngai.” Mbuma oyo Nzambe alingi ete bitape bibota yango ezali bongo bizaleli bikokani na oyo ya Klisto, mpe mingi mpenza bolingo. Lisusu, mpo ete Yesu azalaki mosakoli ya Bokonzi na Nzambe, kati na mbuma yango malamu esangisi mpe mosala ya kozalisa bayekoli lokola ye asalaki yango.

Sikawa Yesu apesi bango etinda oyo ete: “Boumela kati na bolingo na ngai.” Kasi lolenge nini bantoma na ye bakoki kosala yango? Alobi ete: “Soko bokotósa malako na ngai, bokoumela kati na bolingo na ngai.” Mpe alobi lisusu ete: “Lilako na ngai ezali boye ete bolingana lokola ngai nasili kolinga bino. Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.”

Nsima na mwa ngonga, Yesu akomonisa bolingo yango monene na kopesáká bomoi na ye mpo na bantóma na ye, mpe mpo na baoyo nyonso bakondimela ye. Ndakisa na ye esengeli kopusa bayekoli na ye na komonisa kati na bango, bolingo yango oyo ezali komema kino na komipesa mpo na bamosusu. Yango ekozala elembo ekokesenisa bango, lokola Yesu alobaki yango mwa liboso: “Bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”

Komonisáká banani bazali baninga na ye, Yesu alobi ete: “Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolaka bino. Nakobyanga bino lisusu baombo te, mpamba te moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye te. Nde nasili kobyanga bino baninga, mpamba te nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.”

Oyo nde libaku malamu: kozala baninga ya motema na Yesu! Kasi mpo na kozala ntango nyonso na boyokani elongo na ye, bayekoli basengeli kobota mbuma. Yesu alobi na bango ete, soko bozali kosala bongo, “likambo nyonso ekolɔmba bino epai na Tata na nkombo na ngai, [akopesa] bino yango.” Ya solo, ekozala mbano kitoko mpenza likoló na kobota mbuma ya Bokonzi! Mpe Yesu alendesi lisusu bantóma ete ‘bazalana na bolingo,’ mpe alimboli bango ete mokili ekoyina bango. Kasi, alendisi bango na maloba oyo: “Soko bamokili bazali koyina bino, boyeba ete basili koyina ngai liboso naino bayinaki bino te.” Nsima na yango amonisi ntina oyo bamokili bakoyina bayekoli na ye, ete: “Mpo ete bozali bato ya mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, mpo na yango bamokili bazali koyina bino.”

Kolimboláká lisusu ntina oyo mokili ekoyina bango, abakisi ete: “Bakosalela bino makambo oyo nyonso mpo na nkombo na ngai, mpamba te bayebi Motindi [Jéhovah Nzambe] na ngai te.” Ya solo, makamwisi na Yesu mazali mpenza kokweisa bato oyo bazali koyina ye, lokola amonisi yango na maloba oyo: “Soko nasalaki kati na bango te misala misalaki moto mosusu te, mbele bazali na lisumu te. Nde sikawa basili komona ngai mpe bayini ngai, mpe Tata na ngai lokola.” Na yango lokola Yesu alobi yango, likomami likokani ete: “Bayinaki ngai na ntina te.”

Lokola asalaki yango mwa liboso, Yesu ayikisi bantóma na ye mpiko mpe apesi bango elaká ete akotindela bango mosungi, elimo santu, elingi koloba bokasi na Nzambe oyo ekosalaka misala. “Yango ekotatola mpo na ngai. Mpe bino bokotatola.”

Batoli ya nsuka

Yesu mpe bantóma na ye balingi kobima na eteni na ndako na likoló. Yesu alobi lisusu ete: “Nalobi na bino makambo oyo mpo ete botuta libaku te.” Mpe apesi bango likebisi oyo monene ete: “Bakobimisa bino na biyanganelo. Ee, ntango ekoya wana moto na moto oyo akoboma bino, akobanza ete azali kosalela Nzambe mosala.”

Emonani ete, bantóma batungisami mingi na likebisi oyo. Atako Yesu asilaki koyebisa bango ete mokili ekoyina bango, kasi kino sikawa, ayebisi naino bango te ete bakobomama. Alimboli ete: “Nalobaki na bino makambo oyo na ebandeli te mpo ete nazalaki na bino elongo.” Kasi, asali malamu wana abongisi bango na kopesáká bango batoli liboso na kokende na ye!

Yesu alandi koloba ete: “Sikawa nakokende epai na Motindi na ngai nde moko na bino te azali kotuna ngai ete: ‘Okokende wapi?’” Mosika te na mpokwa, bayebi epai wapi azalaki kokende, kasi sikawa batungisami mingi mpenza na likambo oyo auti koyebisa bango mpe bazali na mituna mingi te na likambo yango. Yesu ayei koloba ete: “Mpo ete nalobi na bino makambo oyo, yango mawa etondisi mitema na bino.” Bantóma bazali na mawa bobele te mpo bayebi ete bakokutana na minyoko makasi mpe bakobomama, kasi lisusu mpo ete Nkolo na bango alingi kotika bango.

Yango wana Yesu alimboli bango ete: “Ekoyeisa litomba na bino soko nakokende. Mpo ete soki nakokende te, mosungi mpe akoyela bino te. Kasi soko nakokende, nakotinda ye epai na bino.” Lokola azali moto na nzoto ya mosuni, Yesu akozala bobele na esika moko, kasi ntango akokende na likoló, akotinda mosungi, elimo santu ya Nzambe epai na bayekoli na ye, mpe soko epai wapi bakozala na mabelé. Boye, kokende na Yesu ekozala na bango litomba.

Yesu alobi ete, elimo santu “ekolakisa bamokili polele na ntina na lisumu, mpe na ntina na boyengebene mpe na ntina na kosambisama.” Lisumu ya bamokili, kozanga kondima na bango epai na Mwana na Nzambe, ekomonisama polele. Lisusu, bilembo ya boyengebene na Yesu bikopesama wana ekomata ye epai na Tata. Mpo na kosukisa, likambo oyo ete Satana mpe mokili mabe oyo ye azali koyangela bakokaki te na kobebisa bosembo na Yesu, ezali elembo oyo emonisi ete mokóló na mokili asili kosambisama mpe akweisami.

Yesu akóbi koloba ete: “Nazali na makambo mingi ya koloba na bino nde bokoki koyamba yango sikawa te.” Ezali mpo na yango nde Yesu alaki ete na ntango akosopa elimo santu, bokasi na Nzambe oyo ekosalaka mosala, elimo yango ekosalisa bango na kokanga ntina ya makambo yango, na kotalela makoki na bango mpo na kobómba yango.

Likambo oyo bantóma bazali kokanga ntina te, mingimingi, ezali likambo oyo ete, Yesu akokufa mpe akobimela bango lisusu, wana akosekwa. Yango wana bazali komituna bamoko epai na bamosusu ete: “Oyo azali koloba na biso ete: ‘Nsima na ntango moke bokomona ngai te, kasi nsima na mwa ntango moke lisusu bokomona ngai,’ mpe ete: ‘Mpamba te ngai nakokende epai na Tata,’ elimboli nini?”

Yesu ayebi ete balingi kotuna ye; yango wana alimboli ete: “Solo solo nazali koloba na bino ete: bokooka mawa mpe bokolela, nde bamokili bakosepela; bino bokooka mawa nde mawa na bino ekobongwana esengo.” Na nsima na midi, wana Yesu akobomama, mikóló ya mangomba bakosepela, kasi bayekoli bakooka mawa. Kasi, mawa na bango ekobongwana esengo na ntango Yesu akosekwa. Mpe esengo na bango ekoumela na ntango akotondisa bango na nguya mpo bazala batemwe na ye, na kosopeláká bango elimo santu na Nzambe, na mokolo ya Pantekote.

Kokokanisáká ezalela ya bantóma na ye na oyo ya mwasi azali na mpasi ya kobota, Yesu alobi ete: “Mwasi azali na mpasi wana ezali ye kobota mpo ete elaká na ye ekoki.” Kasi amonisi ete, akokanisa lisusu mpasi na ye te na ntango mwana abotami. Yesu alobi ete: “Bino mpe bozali sikawa na mawa; kasi nakomona bino lisusu [na ntango nakosekwa], mpe mitema na bino mikosepela, mpe moto akolongola esengo na bino te.”

Kino ntango wana, bantóma basali naino libondeli te na nkombo na Yesu, kasi Yesu sikawa alobi ete: “Soko bokolɔmba Tata eloko nini na nkombo na ngai, akopesa bino yango. . . . Mpamba te Tata ye moko alingi bino mpo ete bosili kolinga ngai mpe bondimi ete nayei na mokili lokola momonisi na Tata. Nabimi longwa na Tata mpe nayei na mokili; lisusu nazali kolongwa na mokili mpe nakokende epai na Tata.”

Maloba na Yesu mazali elendiseli monene mpo na bantóma. Bango balobi ete: “Na likambo oyo tondimi ete obimi epai na Nzambe.” Yesu atuni ete: “Bondimi bobele sikawa? Tala ntango ekoya, ee, esili koya, wana bokopanzana moko na moko epai na ye mpenza, mpe bokotika ngai bobele ngai moko.” Ezali likambo limonani lokola ete ekosalema te, kasi yango nde ekosalema liboso ete butu esuka!

Yesu alimboli ete: “Nasili koloba na bino makambo oyo ete bozala na kimya kati na ngai.” Mpe asukisi ete: “Kati na mokili bozali na bolozi, nde boyika mpiko! Nasili kolonga mokili.” Yesu alongaki mokili na kokokisáká mokano na Nzambe na bosembo nyonso atako makambo nyonso oyo Satana mpe mokili oyo ye azali koyangela bamekaki kobebisa bosembo na ye.

Libondeli ya nsuka kati na eteni na ndako na likoló

Kotondáká na bolingo mozindo mpo na bantóma na ye, Yesu abongisi bango mpo na kokende na ye oyo ebelemi. Nsima na kopesa bango toli mpe na kolendisa bango na boumeli ya ntango molai, atomboli miso na likoló mpe abondeli Tata na ye ete: “Kumisa Mwana na yo ete Mwana na yo akumisa yo, lokola esili yo kopesa ye bokonzi likoló na bato nyonso, ete apesa bomoi ya seko epai na bango nyonso oyo osili kopesa ye.”

Bomoi ya seko! Yesu abandi lisoló moko kitoko. Lokola asili kozwa “bokonzi likoló na bato nyonso,” Yesu akozala na likoki ya kopesa matomba ya mbeka na ye ya lisiko epai na bato nyonso oyo balakamaki mpo na liwa. Kasi, akopesa bomoi ya seko bobele epai na bato oyo bandimami na Tata na ye. Kolimboláká lisoló oyo, bomoi ya seko, Yesu akóbi libondeli na ye na kolobaka ete:

“Oyo ezali bomoi ya seko ete bayeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” Ya solo, mpo na kobika, esengeli koyeba Nzambe mpe Mwana na ye. Kasi boyebi ya likolólikoló ekoki te.

Esengeli koyeba Nzambe mpe Mwana na ye na mozindo mpe kozala na boyokani malamu elongo na bango. Esengeli kokanisa lokola bango mpe kozala na emoneli ya makambo lokola oyo na bango. Mingi mpenza, esengeli kosala makasi mpo na komekola bizaleli na bango bikokani na mosusu te kati na boyokani na biso elongo na bato mosusu.

Yesu akóbi libondeli na ye: “Ngai nasili kokumisa yo na mokili, nasilisi mosala mopesi yo ngai ete nasala yango.” Lokola akokisi mosala na ye kino sikawa, mpe andimisami ete mosala yango mokozwa elónga, asengi Nzambe ete: “Tata, kumisa ngai pene na yo na lokumu lozalaki na ngai pene na yo liboso, naino mokili mozalaki te.” Asengi ete azongisama na bomoi, na nzela ya lisekwa, kati na nkembo oyo azalaki na yango na liboso na likoló.

Likoló na mosala na ye ya ntina mingi oyo asili kokokisa na mabelé, Yesu alobi na mokuse ete: “Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bato oyo opesaki ngai bango uta na mokili. Bazalaki bato na yo mpe opesi ngai bango mpe batosi liloba na yo.” Yesu asalelaki nkombo ya Nzambe, Jéhovah, kati na mosala na ye mpe alakisaki ebengeli na yango ya solo, kasi alakisaki makambo mingi epai na bantóma na ye, nde bobele nkombo na Nzambe te. Akolisaki lisusu boyebi na bango na ntina etali Jéhovah, bomoto na ye mpe mikano na ye, mpe botondi na bango epai na Ye.

Mpo na komonisa ete Jéhovah azali Mokonzi na ye mpe ete azali kolanda litambwisi na Ye, Yesu alobi na komikitisa nyonso ete: “Maloba mapesi yo ngai, nasili kopesa bango yango mpe bayambi yango, mpe bayebi solo ete nabimi [lokola momonisi na yo,] mpe basili kondima ete yo otindi ngai.”

Mpo na kokesenisa bayekoli na ye mpe bato mosusu, Yesu akóbi libondeli na ye ete: “Nazali kobondela na ntina na bango; nazali kobondela na ntina na mokili te kasi na ntina na baoyo yo osili kopesa ngai . . . Ezalaki ngai na bango elongo, nabatelaki bango . . . nasenzelaki bango, moko kati na bango abebaki te bobele mwana na libeli,” elingi koloba Yuda Iskariote. Na ntango oyo, Yuda azali kokokisa mosala na ye mabe, mpo na kokaba Yesu. Kozanga koyeba, azali nde kokokisa Makomami.

Yesu alobi ete: “Bamokili basili koyina bango . . . Nalɔmbi te ete olongola bango na mokili, kasi ete obatela bango na ye oyo mabe. Basangani na mokili te pelamoko ngai nasangani na mokili te.” Bayekoli na Yesu bafandi kati na mokili, bato nyonso oyo bayangelami na Satana, nde bakabwani na mokili mpe basengeli ntango nyonso kokabwana na yango mpe na mabe na yango.

Yesu alobi ete: “Bulisa bango na nzela ya solo; liloba na yo lizali solo.” Awa, azali kobenga Makomami na liebele oyo azali kotanga ntango nyonso ete “solo.” Nzokande, mateya oyo apesaki epai na bayekoli na ye mpe mateya oyo makosala Makomami na greke na boklisto, oyo bango basengeli kokoma na nsima na kopemama na Nzambe, ezali mpe “solo.” Solo yango ekoki kobulisa moto, kobongola mpenza bomoi na ye mpe kosala ete azala moklisto oyo akabwani na mokili.

Sikawa, Yesu abondeli “bobele mpo na bango te kasi mpe mpo na baoyo bakondima [ye] mpo na maloba na bango.” Na yango, Yesu abondeli mpo na baoyo bakozala bayekoli na ye bapakolami mpe bayekoli mosusu oyo bakoyanganisama kati na “etonga moko.” Eloko nini asengi mpo na bango nyonso wana?

“Ete bazala moko pelamoko yo, Tata, ozali kati na ngai mpe ngai kati na yo . . . ete bazala moko pelamoko biso tozali moko.” Yesu mpe Tata na ye basali moto moko te, kasi bazali na boyokani kati na makambo nyonso. Yesu abondeli mpo ete bayekoli na ye bazala na bomoko lokola bango, ete “bamokili bayeba ete yo otindi ngai mpe osili kolinga bango pelamoko elingaki yo ngai.”

Mpo na baoyo bakozala bayekoli na ye bapakolami, Yesu asali sikawa libondeli epai na Tata na ye na likoló. Yango nini? “Ete bazala na ngai elongo na esika ezali ngai ete bamona nkembo na ngai esili yo kopesa ngai, mpo ete olingaki ngai liboso na ebandeli ya mokili,” elingi koloba na ntango oyo Adam mpe Eva babotaki mwana. Liboso na ntango yango, Nzambe alingaki Mwana na ye bobele moko, oyo akomaki Yesu Klisto.

Esilisi ye kobondela, Yesu alobi lisusu ete: “Nayebisaki bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango ete bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala kati na bango, ngai mpe kati na bango.” Mpo na bantóma, koyeba nkombo ya Nzambe elimbolaki koyeba mpenzampenza bolingo na Nzambe. Yoane 14:1 kino 17:26; 13:27, 35, 36; 10:16; Luka 22:3, 4; Exode 24:10; 1 Mikonzi 19:9-13; Yisaya 6:1-5; Bagalatia 6:16; Nzembo 35:19; 69:4; Masese 8:22, 30.

▪ Yesu akei epai wapi, mpe eyano nini Toma azwi na ntina na nzela oyo esengeli mpo na kokende kuna?

▪ Na ndenge emonani, Filipe atuni nini epai na Yesu?

▪ Mpo na nini ye oyo amoni Yesu asili mpe komona Tata?

▪ Na ndimbola nini bayekoli na Yesu bakosala misala minene koleka oyo na ye?

▪ Na ndimbola nini Satana azalaki na nguya moko te likoló na Yesu?

▪ Na eleko nini Jéhovah alonaki mowiti ya elilingi, mpe ntango nini mpe ndenge nini bato mosusu bakómaki bitape na mowiti yango?

▪ Na nsuka, mowiti ya elilingi ekómaki na bitape boni?

▪ Mbuma nini Nzambe alingi ete ebotama na bitape?

▪ Ndenge nini tokoki kozala baninga na Yesu?

▪ Mpo na nini mokili ezali koyina bayekoli na Yesu?

▪ Yesu apesi likebisi nini oyo litungisi bantóma na ye?

▪ Mpo na nini bantoma bazali kotuna Yesu te na ntina na esika oyo ye azali kokende?

▪ Likambo nini mpenza oyo bantóma bazali kokanga ntina te?

▪ Yesu asaleli lisese nini mpo na komonisa ete mawa ya bantóma ekobongwana esengo?

▪ Engebene Yesu, likambo nini bantóma bakosala mosika te?

▪ Lolenge nini Yesu alóngaki mokili?

▪ Na ndimbola nini Yesu azwaki “bokonzi likoló na bato nyonso”?

▪ Koyekola koyeba Nzambe mpe Mwana na ye elimboli nini?

▪ Mitindo nini Yesu ayebisi nkombo ya Nzambe?

▪ “Solo” ezali nini, mpe ndenge nini ezali ‘kobulisa’ moklisto?

▪ Na ndimbola nini Nzambe, Mwana na ye mpe basambeli na ye nyonso ya solo bazali moko?

▪ “Ebandeli ya mokili” etyamaki uta ntango nini?