Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu abongisi bayekoli na ye mpo na minyoko

Yesu abongisi bayekoli na ye mpo na minyoko

Mokapo 50

Yesu abongisi bayekoli na ye mpo na minyoko

NSIMA na kolakisa bantóma ndenge bakoki kosakola, Yesu akebisi bango na ntina na banguna na bango. Alobi: “Nazali kotinda bino lokola bampate kati na nkoi. . . . Bokeba mpo na bato; bakokamba bino liboso na bazuzi, mpe bakobeta bino fimbo kati na biyanganelo na bango. Ee, bakokamba bino liboso na bayangeli mpe mikonzi mpo na ngai.”

Bayekoli na ye nde bakutani na minyoko makasi, kasi apesi bango elaka oyo na kolendisa: “Wana ekokaba bango bino, bomitungisa te soko bokoloba nini. Mpamba te bokozwa likambo likokoka na bino koloba bobele na ntango yango. Mpo ete bino mpenza bokoloba te kasi elimo na Tata na bino ekoloba na nzela na bino.”

Akobi na kolobaka ete: “Ndeko akokaba ndeko mpo na kufa mpe tata akokaba mwana mpe bana bakotelemela baboti mpe bakoboma bango.” Lisusu: “Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai. Kasi ye oyo akotya molende kino nsuka akobika.”

Mosala ya kosakola ezali mosala ya liboso; ezali mpo na yango Yesu alobeli makasi ntina ya kozala na bokengi mpo ete moto na moto abatela bonsomi na ye mpo na kokokisa malamu mosala yango. “Wana bakonyokola bino na mboka moko, bokima kino mosusu. Mpamba te nazali koloba na bino solo ete bokoleka kati na mboka nyonso na Yisraele te liboso na koya na Mwana na moto.”

Ya solo, ezali epai na bantoma na ye 12 nde Yesu apesaki malako wana, makebisi wana mpe bilendiseli wana, kasi akanisaki mpe mpo na baoyo bakosangana na mosala ya kosakola kati na mokili mobimba nsima na liwa na ye mpe lisekwa na ye. Yango ebimi kati na maloba na ye moko, ntango alobi ete bayekoli na ye ‘bakoyinama liboso na bato nyonso,’ nde bobele na Bayisraele te oyo bantóma bazwaki etinda ete basakola epai na bango. Lisusu, emonani ete bantóma bakambamaki liboso na bayangeli te soko mpe liboso na mikonzi te na eleko oyo Yesu abongisaki elongo na bango mobembo wana ya mokuse mpo na kosakola. Mpo na kosukisa, na ntango wana bandimi bakabamaki te na kufa epai na mabota na bango.

Na yango, na kolobaka ete bayekoli na ye bakoleka kati na mboka nyonso te “liboso na koya na Mwana na moto,” Yesu apesaki biso esakweli. Ezalaki mpo na koyebisa ete bayekoli na ye bakosilisa naino te kotambola kati na mokili mobimba oyo bato bafandi, mpo na kosakola Bokonzi ya Nzambe bosili kosalema, liboso ete ye, Mokonzi akembisami, azonga mpo na kokokisa bikateli na Jéhovah na Armagedon.

Kokobaka mateya na ye na ntina na kosakola, Yesu alobi: “Moyekoli aleki molakisi na ye te. Moombo mpe aleki nkóló na ye te.” Na bongo bayekoli na Yesu basengeli komizela na kozwa minyoko se ndenge moko lokola ye azwaki mpo ete azalaki kosakola Bokonzi na Nzambe. Kasi alendisi bango ete: “Bobanga bango te baoyo bayebi koboma nzoto nde bayebi koboma molimo te. Bobanga nde ye oyo azali na nguya kobebisa na molimo mpe na nzoto kati na Geena.”

Na ntina yango, Yesu asengelaki kopesa ndakisa. Na molende nyonso, andimaki liwa na esika ete azanga bosembo epai na Ye oyo azali na nguya nyonso, Jehovah Nzambe. Ee, ezali Jéhovah nde akoki koboma “molimo” na biso (elingi koloba elikya nyonso ya kozala mokolo mosusu molimo na bomoi), to kosekwisa moto mpe kopesa ye bomoi na seko. Oyo nde bolingo, mpe motema mawa ya Tata na biso ya likoló Jéhovah!

Na nsima, Yesu alendisi bayekoli na ye na nzela na elakiseli moko oyo emonisi bolingo nyonso oyo Jéhovah azali kobatela bango na yango. “Bato bakotekisaka bandeke mike mibale mpo na lofalanga te? Nde moko na bango akokwea na mabelé te soko Tata na bino ayebi te. Ata nsuki na mitó na bino etangami nyonso mituya. Boye bobanga te, bino boleki bandeke mike mingi.”

Nsango na Bokonzi oyo Yesu atindi bayekoli na ye basakola ekokabola bafandi kati na ndako moko na moko, mpamba te kati na mabota, bamoko bakondima mpe bamosusu bakoboya. Alimboli: “Bokanisa te ete nayei kotya kimya kati na mokili. Nayei kotya kimya te kasi mopanga.” Mpo na yango, ekosengela milende mingi na moto moko oyo, bobele ye moko kati na libota na ye nde andimi solo ya Biblia. “Ye oyo alingi Tata to mama koleka ngai abongi na ngai te; mpe ye oyo alingi mwana mobali to mwana mwasi koleka ngai abongi na ngai te.”

Yesu asukisi malako na ye na kolimbolaka ete baoyo bazali koyamba bayekoli na ye bazali mpe koyamba ye. “Ye oyo akopesa kopo na mai na mpio epai na moko na baoyo mike mpo ete azali moyekoli, solo nazali koloba na bino, akobungisa libonza na ye te.” Matai 10:16-42.

▪ Makebisi nini Yesu apesi na bayekoli na ye?

▪ Na maloba nini alendisi bango mpe apesi bango elikya?

▪ Mpo na nini malako na Yesu mazali ntango nyonso na ntina mpo na baklisto ya lelo?

▪ Na ndimbola nini moyekoli na Yesu aleki moto oyo ateyi ye te?