Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu abotami: epai wapi mpe ntango nini?

Yesu abotami: epai wapi mpe ntango nini?

Mokapo 5

Yesu abotami: epai wapi mpe ntango nini?

CESAR AUGUSTE, mokonzi monene ya Rome, abimisi mobeko ete bato na ye nyonso bakende moto na moto na mboka na ye kokomisa nkombo na bango na mikanda ya Leta. Yozefe akei bongo na Beteleme, epai kuna abotamaki.

Ebele na bato bayei kokomisa nkombo na Beteleme. Na bongo ndako ya kolala mpo na Yozefe mpe Marie ezwami te; bazwi esika bobele na ndako na bibwele lokola mpunda mpe banyama mosusu. Ezali wana nde esika Yesu abotami. Marie azingi ye noki na bilamba mpe alalisi ye na elyelo ya bibwele.

Ezali mpenza Nzambe nde apusaki César Auguste na kobimisa mobeko oyo ya kokomisa nkombo. Ezali mpo na yango nde Yesu abotami na Beteleme; nzokande Makomami masakolaki uta kala ete Mokonzi oyo alakamaki, asengeli kobotama na Beteleme.

Butu yango ezali ya kokamwa mingi. Kati na bilanga kongenga ya makasi ebimeli bongo etuluku moko ya babateli na mpate. Ezali bongo nkembo na Jehovah! Anzelu na Jehovah alobi na bango ete: “Bobanga te! Mpamba te tala, napesi bino nsango malamu na esengo monene ekozala na bino nyonso. Mpo ete Mobikisi, ye Klisto Nkolo, abotameli bino lelo na mboka na Davidi. Oyo mpe elembo mpo na bino, −bokomona mwana moke azingami na bilamba, alali na elielo ya bibwele.” Bibele na baanzelu mosusu babimeli bango pwasa, mpe babandi koyemba ete: “Nkembo na Nzambe kuna na likolo mpe kimya na nse epai na bato oyo asepeli na bango!”

Nsima wana baanzelu bakei, babateli na mpate balobani ete: “Tokende noki na Beteleme kotala likambo oyo Jehovah amonisi biso.” Bakei nokinoki mpe bakuti Yesu se na esika oyo anzelu alakisaki bango. Ntango babateli na mpate bayebisi maloba ya anzelu, bato banso bazali koyoka bango bakamwe. Marie nde azali kobomba makambo oyo nyonso na kati na motema na ye.

Lelo, bato mingi bandimaka ete Yesu abotamaki na le 25 decembre. Nzokande sanza ya decembre ezalaka mpio makasi mpe mbula mpembe na Beteleme. Babateli na mpate bakokaki te kozala libanda na butu elongo na bibwele na bango na eleko wana ya mobu. Lisusu, mokonzi ya Rome mbele akokaki kosenga te na libota oyo lizalaki ntango nyonso pene na kotomboka ete basala mobembo molai na ntango ya malili makasi, bobele mpo ete bakomisa nkombo na bango na buku ya Leta. Makambo manso mamonisi ete Yesu abotamaki pene na ebandeli ya sanza ya octobre ya mobu wana. Luka 2:1-20; Mika 5:2.

Mpo na nini Yozefe mpe Marie bakei na Beteleme?

Likambo nini ya kokamwa esalemi na butu oyo Yesu abotami?

Ndenge nini toyebi ete Yesu abotamaki na le 25 decembre te?