Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu akitisi mopepe makasi

Yesu akitisi mopepe makasi

Mokapo 44

Yesu akitisi mopepe makasi

YESU asali mosala mingi mokolo mobimba: ateyaki bato na libongo mpe, na nsima, alimbolaki masese epai na bayekoli na ye, wana ezalaki ye na esika na ye moko. Ntango mpokwa ekómi, alobi ete: “Tokende na ngambo mosusu.”

Na ngambo ya libeke ya Galilai, epai na ebimelo na ntango, okokuta etúka ebengami Dekapoli, nkombo oyo euti na maloba ya greke deʹka, oyo elimboli “zomi,” mpe poʹlis, “engumba.” Atako Bayuda mingi bafandi mpe kuna, bingumba ya Dekapoli bizali mingimingi bingumba ya bagreke. Nzokande, Yesu asali mosala mingi kuna te. Ata na boumeli ya mobembo oyo, lokola tokomona yango liboso, bakopekisa ye ete aumela wana te.

Ntango Yesu ayebisi bango ete bakenda na ngambo mosusu, bayekoli bakotisi ye kati na masuwa. Kasi bokei na bango ekoki kobómbama te. Bato mosusu mpe baumeli te kobenda ba masuwa na bango kati na mai mpo ete bakenda kotika bango. Ntáka ezali molai mingi te mpo na kokatisa, mpamba te, mai ya Galilai ezali bobele etima moko monene, ezali na molai ya bakilometele 20 mpe na bonene ya bakilometele 12.

Yesu alembi, yango ekoki kokamwisa biso te. Ntina wana, moke boye nsima na konana, alali kati na masuwa kuna na nsima, atye motó na ye likoló na kusé mpe azwi mpongi makasi mpenza. Mingi kati na bantóma na ye bazali bato bameseni na mai, baoyo mbala mingi bazalaki kolóba mbisi na libeke ya Galilai. Na bongo, bazwi mokumba ya kotambwisa masuwa.

Kasi mosika te mikakatano mibandi. Lokola molunge emataka mingi na etando ya libeke, na koleka na metele 200 na nse ya nivo ya la mer, nzokande na bangomba ya penepene mopepe ezalaka malili, mbala mosusu mai eninganaka makasi mpe ebendaka mbonge makasi likoló na libeke. Yango nde esalamaki mpenza na mokolo wana. Mbonge ebandi kobeta masuwa mpe elingi kozindisa yango nyonso. Nde Yesu azali se kokoba na mpongi!

Lokola bazali bato bameseni kotambwisa masuwa, bayekoli babimisi makasi na bango nyonso mpo na kobenda masuwa na libongo. Na ntembe te yango esila kokomela bango na kotambwisa masuwa kati na mikakatano. Kasi ya mbala oyo, basilisi makasi na bango nyonso. Kobangáká mpo na bomoi na bango, balamusi Yesu na mpongi. Balobi na ye ete: ‘Molakisi, ozali komitungisa mpo na likambo moko te? Tozali kozinda! Bikisa biso, tokokufa na mai!’

Ntango alamuki, Yesu alobi na mopepe mpe na mai: “Telema! Zala nyee!” Na mbala moko mopepe ekiti mpe mai mafandi nyee. Yesu atuni na bayekoli na ye: ‘Mpo na nini bozali kobanga boye? Bozali naino na kondima te?’

Bayekoli babangi na nsomo mingi. Babandi kotunana ete: ‘Moto oyo azali nde nani? Mopepe mpe mai ezali kotosa ye boye.’

Yesu azali solo na nguya monene! Yango ezali elendiseli na koyeba ete Mokonzi na biso azali na nguya likoló na biloko bizalisami mpe ete, ntango akotya likebi na ye na mabelé na boumeli ya Bokonzi na ye, bato nyonso bakozala na bobángi te, bakobatelama na makambo ya nsomo oyo ekobimaka na biloko ya mokili!

Nsima wana mopepe makasi ekiti, Yesu mpe bayekoli na ye bakómi malamu na ngambo mosusu ya libeke. Mpo na masuwa mosusu, mbala mosusu ekomaki te na esika oyo mopepe ezalaki makasi, mpe ezongaki malamu na libongo, kozanga likama. Malako 4:35 kino 5:1; Matai 8:18, 23-27, Luka 8:22-26.

▪ Dekapoli ezali nini, mpe yango ezali epai wapi?

▪ Makambo nini mabimisáká mopepe makasi kati na libeke ya Galilai?

▪ Ntango bayekoli bamoni ete makoki na bango lokola batambwisi na masuwa esuki, likambo nini basali?