Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu akweisi batemeli na ye

Yesu akweisi batemeli na ye

Mokapo 109

Yesu akweisi batemeli na ye

YESU abulunganisi batemeli na ye bakonzi ya mangomba na boye ete babangi kotuna ye mituna mosusu. Bongo azwi ekateli ya kotondola bango ete bazangi boyebi. Atuni ete: “Bino bokanisi nini mpo na Klisto? Azali mwana na nani?”

Bafalisai bayanoli ye ete: “Mwana na Davidi.”

Lokola baboyi te ete, na mosuni, Davidi azali nkóko ya Klisto to Masiya, Yesu atuni ete: “Mpo na nini Davidi na kopemama na Nzambe [na Nzembo 110], abyangi ye ‘Nkolo,’ mpe koloba ete: ‘Jéhovah alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fanda na loboko na ngai na mobali kino nakotya bayini nyonso na yo na nsé na makolo na yo?”’ Soko nde Davidi abyangi ye ‘Nkolo,’ azali mwana na ye boni?”

Bafalisai bafandi nyee bakoki kozongisa liloba te, mpamba te bayebi te soko Klisto to mopakolami azalaki nani mpenza. Na likeseni na oyo Bafalisai bazali kokanisa, Masiya azali bobele mokitani na Davidi te, kasi azali na bomoi na likoló mpe aleki Davidi; azalaki Nkolo na ye.

Kolobáká sikawa epai na ebele mpe epai na bayekoli na ye, Yesu akebisi bango mpo na bakomeli mpe Bafalisai. Lokola mibali yango nde bazali koteya Mibeko na Nzambe, na “kofanda na kiti na Moïse,” Yesu alobi ete: “Makambo nyonso makoloba bango na bino, bosala yango mpe botósa yango.” Nde abakisi ete: “Bosala mosala mokosalaka bango te, mpamba te bakolobaka nde bazali kosala te.”

Bazali bakosi, mpe Yesu akweisi bango na maloba lokola oyo asalelaki mokolo oyo alyaki epai na Mofalisai moko, mwa basanza liboso. Alobi ete: “Bazali kosala misala nyonso na bango mpo ete bamonana na bato.” Mpe apesi bandakisa:

“Bazali koyeisa filakateli na bango minene.” Sanduku yango moko moke oyo bazali kokangisa na elongi to kolata na loboko, ezali kati na yango na biteni minei ya Mibeko: Exode 13:1-10, 11-16; mpe Deteronome 6:4-9; 11:13-21. Bafalisai, bango, bazali koyeisa sanduku yango minene mpo na komonisa ete bazali kobatela Mibeko na molende.

Yesu alobi lisusu ete: “Bazali koyeisa nsé na bilamba na bango milai.” Na Mituya 15:38-40, Bayisraele bazwaki etinda ya kobakisa eteni ya elamba na nsé na nzambala na bango; kasi Bafalisai bayeisi oyo na bango molai koleka banso. Misala na bango nyonso, ezali mpo na komimonisa na bato! Yesu alobi ete: “Balingi bobele bisika ya lokumu.”

Mawa mpenza, bayekoli na ye mpe balongamaki na mposa yango ya kozwa etelemelo monene. Na yango, Yesu apesi bango toli oyo ete: “Bino bobyangama Labi te, mpamba te molakisi na bino azali bobele moko, bino nyonso bozali bandeko. Bobyanga moto tata awa na mokili te, mpamba te Tata na bino azali bobele moko, oyo na likoló. Bobyangama mpe ‘bakambi’ te, mpamba te moko azali Mokambi na bino, ye Klisto.” Kati na mitema na bango, bayekoli basengeli kolongola mposa ya kozala na esika ya liboso. Ezali mpo na yango nde Yesu alendisi bango na maloba oyo ete: “Ye oyo aleki monene kati na bino, akozala mosaleli na bino.”

Lisusu, abimisi maloba mingi ya kolakela mabe likoló na bakomeli mpe Bafalisai, na kolobáká mbala mingi ete bazali bakósi. Alobi ete, bazali ‘kofúnga bokonzi na makoló liboso na bato’ mpe “bakobotolaka biloko ya basi-bakufeli-mibali mpe bakosalaka mabondeli milai mpo na kokósa.”

Yesu alobi ete: “Mawa na bino, bakambi bakufi miso.” Akweisi Balifasai mpo ete bazali kozwa biloko ya elimo na motuya te, yango emonani mitinda oyo bango moko bazali kopesa yango. Na ndakisa, bazali koloba ete: ‘Soki moto akokata ndai na tempelo azali na likambo te; nde soko nani akokata ndai na wolo oyo ezali kati na tempelo, akangami na ndai na ye.’ Na kolobela mingi mpo na wolo na tempelo koleka motuya na makambo na elimo ya esika wana na losambo, bazali komonisa ezalela na bango ya kokufa miso mpo na bizaleli malamu.

Mpe, lokola asilaki kosala yango, Yesu akweisi Bafalisai mpo ete bazali komonisa bopotu na “makambo na ntina mingi kati na Mibeko, yango: boyengebene mpe motema mawa mpe bosembo,” nzokande bazali komonisa motuya mingi na kofuta ya ndambo na zomi, elingi koloba ndambo na zomi na biloko bizangi ntina, lokola ndunda na solo kitoko.

Yesu abyangi Bafalisai ete ‘bakambi bakufi miso, baoyo bazali kokanga ngungi na kiyungulu nde bazali komela kamela!’ Ya solo, soki na kiyungulu, bakokanga ngungi oyo ekwei kati na vinyo na bango, ezali bobele te mpo ete ezali nyama moke, kasi mpo ete yango ezali mbindo engebene losambo. Nzokande, na kozaláká na bopotu na makambo na ntina mingi na Mibeko, ezali lokola nde bamelaki kamela, nyama oyo ezali mpe mbindo engebene milulu ya losambo. Matai 22:41 kino 23:24; Malako 12:35-40; Luka 20:41-47; Levitike 11:4, 21-24.

▪ Mpo na nini Bafalisai bakoki kozongisa liloba te ntango Yesu atuni bango na ntina na maloba na Davidi, maye makomami kati na Nzembo 110?

▪ Mpo na nini Bafalisai bayeisi minene, basanduku na bango oyo ezali na mikapo ya Makomami kati na yango, mpe mpo na nini bazali koyeisa nsé na bilamba na bango molai?

▪ Toli nini Yesu apesi epai na bayekoli na ye?

▪ Mitinda nini Bafalisai basali bango moko, mpe ndenge nini Yesu akweisi ezaleli ya bopotu oyo bazali komonisa mpo na makambo ya ntina mingi?