Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu alandi koteya na mokolo na nsambo

Yesu alandi koteya na mokolo na nsambo

Mokapo 68

Yesu alandi koteya na mokolo na nsambo

TOZALI naino na mokolo na nsambo mpe mokolo na nsuka na elambo na Mingombo. Yesu azali koteya kati na “Ebombelo,” eteni moko ya tempelo oyo ezali, engebene bato, kati na Lakur to Libanda na basi. Kuna nde basanduku ebongisami mpo na kotya makabo.

Mpokwa nyonso, na boumeli ya elambo mobimba, libanda yango ezali esika oyo engengisami makasi. Batyaki wana makonzi minene minei mpo na miinda oyo moko na moko na yango ememi miinda minene minei mitondi na mafuta. Mpo na mafuta oyo mazali kopela kati na milangi 16, miinda wana mizali kobimisa pole moko kitoko mpo na kongengisa kino mosika mpenza kati na butu. Maloba oyo Yesu alobi yango sikawa makundoli mbala mosusu pole yango epai na bayoki na ye. Alobi na bango ete: “Ngai nazali moi na mokili. Ye oyo akolanda ngai akotambola kati na molili te kasi akozala na moi na bomoi.”

Bafalisai babeti ntembe: “Yo ozali kotatola mpo na yo moko; litatoli na yo ezali solo te.”

Mpo na eyano, Yesu alobi na bango ete: “Ata ngai natatoli mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali solo mpo ete nayebi esika euti ngai mpe esika ekokenda ngai.” Abakisi ete: “Ngai nazali kotatola mpo na ngai moko mpe Tata, motindi na ngai, azali kotatola mpo na ngai.”

Bafalisai batuni ye ete: “Wapi Tata na yo?”

“Bino boyebi ngai te, boyebi mpe Tata na ngai te. Soki boyebaki ngai mbele boyebi Tata na ngai lokola.” Atako Bafalisai balingi bobele kokangisa Yesu, nde moto moko te atye maboko likoló na ye.

Yesu alobi lisusu na bango ete: “Ngai nakokende mpe bokoluka ngai. Esika ekokenda ngai, bino bokokoka koya te.”

Ntango bayoki maloba wana, Bayuda batunani ete: “Akomiboma ye moko?—mpo ete alobi ete: ‘Esika ekokende ngai bino bokokoka koya te.’”

Yesu alimboli ete: “Bino bouti na nse, ngai nauti na likoló. Bino bouti na mokili oyo, ngai nauti na mokili oyo te.” Akobi ete: “Soko bokondima te ete ezali ngai, mbele bokokufa na masumu na bino.”

Yesu azali mpenza kolobela kozala na ye liboso ete akoma moto mpe lolenge na ye na Masiya oyo alakamaki, ye Klisto. Nzokande Bayuda batuni ye mpo na kotyola ye ete: “Yo nani?”

Yesu azongiseli bango ete: “Bobele yango elobi ngai na bino na ebandeli.” Abakisi lisusu ete: “Motindi na ngai azali sembo mpe yango eyoki ngai epai na ye, ngai nakosolola yango na mokili.” Mpe alobi: “Wana ekotombola bino Mwana na moto na likoló, bokoyeba ete ezali ngai mpo ete nazali kosala likambo moko na motema na ngai te kasi pelamoko Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo. Motindi na ngai azali na ngai elongo; atiki ngai mpamba te, mpo ete ntango nyonso, ngai nakosalaka makambo makosepelisa ye.”

Eyoki bango maloba wana, mingi babandi kondima ye. Yesu alobi epai na bato yango ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”

Banguna na ye bayanoli ye ete: “Tozali bana na Abrahame; kino lelo oyo tozalaki baombo na moto te. Mpo na nini ozali koloba ete: ‘Bokozala basikwi’?”

Atako mbala mingi bakweaki na maboko na boyangeli na bapaya, Bayuda bandimi bokonzi ya monguna moko te. Baboyi kobengama baombo. Nzokande Yesu amonisi bango ete bazali mpenza baombo. Na ndimbola nini? Yesu alimboli ete: “Solosolo nalobi na bino ete, moto na moto oyo akosalaka masumu azali moombo na masumu.”

Na koboyaka kondima ete bazali baombo na masumu, Bayuda bamitye kati na ezalela ya likama. Yesu alobi ete: “Moombo akoumelaka libela na ndako te; mwana akoumela libela.” Na yango, lokola moombo akoki kozwa libula moko te, bakoki kobengana ye ata na ntango nini. Bobele mwana oyo abotami na ndako to oyo abokwamaki wana lokola mwana mpenza nde akoumela wana “libela,” elingi koloba ntango nyonso oyo akozala na bomoi.

Yesu akobi ete: “Soko nde mwana akosikola bino, bokozala basikwi na solo.” Na bongo, solo oyo ezali kosikola bato ezali solo na ntina na Mwana, Yesu Klisto. Mbeka ya bomoi na ye ya moto na kokoka, yango moko, ekoki kosikola moto nyonso na masumu oyo ezali komema na liwa. Yoane 8:12-36.

▪ Esika nini Yesu azali koteya na mokolo na nsambo? Likambo nini lizali komonana na butu kati na esika yango, mpe boyokani nini ezali kati na yango mpe na makambo oyo Yesu azali koteya?

▪ Yesu alobi nini na ntina na esika oyo ye autaki, mpe yango mbele esengeli komonisa nini mpo na ye?

▪ Na ndimbola nini Bayuda bazali baombo, kasi solo nini ekosikola bango?