Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu aleisi nkoto mingi na bato na likamwisi

Yesu aleisi nkoto mingi na bato na likamwisi

Mokapo 52

Yesu aleisi nkoto mingi na bato na likamwisi

BANTOMA 12 basali mobembo ya ntina mingi mpo na kosakola kati na Galilai. Sikawa, mwa moke nsima na kobomama na Yoane, bazongi epai na Yesu mpe bayebisi ye makambo kitoko oyo bauti komona. Yesu amoni ete bantoma na ye balembi mpe bazwi ata ntango te mpo na kolya na ntina na ebele na bato oyo bazali koya mpe kokende; yango wana alobi na bango: ˈBoya bino mpenza tokende na lisobe mpe bopema moke.ˈ

Bakoti bongo na masuwa na bango, ekoki kozala pene na Kapernaume, mpe banani epai na esika moko ya kobombama, ekoki kozala na Est ya Yordani, koleka Betesaida. Kasi bato mosusu bamoni ete babandi kokende, mpe bamosusu bayoki yango. Bato wana nyonso bakimi mbangu pembenipembeni ya mai mpe, ntango masuwa masemi, bazali wana mpo na koyamba Yesu mpe bantoma na ye.

Ntango akiti na masuwa, Yesu ayoki mawa liboso na bato nyonso wana, mpamba te bazali lokola bampate bazangi mobateli. Abikisi bongo babeli kati na bango mpe abandi koteya bango makambo mingi.

Ntango ezali koleka mbango, na boye ete bayekoli na Yesu babelemi pene na ye mpe balobi na ye ete: “Oyo ezali esobe mpe ntango esili koleka. Pesa bango nzela ete bakende na bamboka minene mpe na bamboka mike na pembeni mpo basomba biloko ya kolya.”

Kasi, Yesu ayanoli bango ete: “Bino moko bopesa bango biloko ya kolya.” Na nsima, koyebaka eloko nini akosala, atuni Filipe mpo na komeka ye: “Epai wapi tokosomba mampa mpo ete bato oyo nyonso bazwa bilei?”

Na miso na Filipe, eloko na kosala mpenza ezali te. Mpamba te, ezali na mibali 5 000 oyo bayangani wana, mbala mosusu bato koleka 10 000 soki totangi basi mpe bana. Ayanoli bongo epai na Yesu ete: “Mampa na denali nkama mibale [denali moko ezalaki lifuti ya mokolo moko na mosala] ekokoka mpo na bango te ete moto na moto azwa mwa ndambo moke.”

Mbala mosusu mpo na komonisa ete likoki ya koleisa ebele na bato mingi boye ezali te, Andre alobi: “Mwana mobali moko moke azali awa oyo azali na mampa mitano mpe na mbisi mibale,” mpe abakisi ete: “Kasi yango ezali nini mpo na baoyo mingi boye?”

Lokola tozali pene na nsuka na sanza na marsi mpe ebandeli na aprili, mua mikolo liboso na Pasika ya mobu 32, matiti mazali mingi. Na bongo, na etinda na Yesu, bayekoli balobi na bato ete bafanda na matiti na bituluku ya bato 50 mpe 100. Na nsima Yesu akamati mampa mitano mpe mbisi mibale, atomboli miso na likolo mpe apamboli yango, na nsima abandi kobuka mampa mpe kokabola mbisi. Apesi bilei yango epai na bayekoli na ye baoyo, na ngala na bango, bakaboli yango epai na bato. Likambo na kokamwa, moto nyonso alei mpe atondi!

Na nsima na yango, Yesu alobi na bayekoli na ye ete: “Bolokota ndambo etikali ete eloko moko ebungana te.” Na bitika wana, bakotondisa bitunga 12! Matai 14:13-21; Malako 6:30-44; Luka 9:10-17; Yoane 6:1-13.

Mpo na nini Yesu azali koluka esika moko ya kobombama mpo na bayekoli na ye?

Yesu amemi bayekoli na ye epai wapi, mpe atako bongo mpo na nini bazwi likoki ya kopema te?

Ntango mpokwa ekoki, bayekoli balobi nini epai na Yesu, kasi ndenge nini ye akokisi mposa na bato?